قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا * - ترجمے کی لسٹ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ قٓ   آیت:

Qâf

قٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡمَجِيدِ
1. Qâf(1) Na kurani ya lokumu.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
عربی تفاسیر:
بَلۡ عَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡ فَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا شَيۡءٌ عَجِيبٌ
2. Kasi bazali kokamwa ete mokebisi ayeli bango okati na libota na bango moko, mpe bapagano balobi ete: Oyo ezali likambo ya kokamwa.
عربی تفاسیر:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗاۖ ذَٰلِكَ رَجۡعُۢ بَعِيدٞ
3. Boye soki tango tokokufaka tokokomaka putulu? Wana ekozalaka bozongi ya mosika.
عربی تفاسیر:
قَدۡ عَلِمۡنَا مَا تَنقُصُ ٱلۡأَرۡضُ مِنۡهُمۡۖ وَعِندَنَا كِتَٰبٌ حَفِيظُۢ
4. Ya soló, toyebi ndenge nini mabele ekolia banzoto na bango, mpe tozali na buku eye ezali kobomba manso.
عربی تفاسیر:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ فَهُمۡ فِيٓ أَمۡرٖ مَّرِيجٍ
5. Kasi baboyaki kondima na bosôló oyo eyelaki bango, mpe bazali komiyeba lisusu te.
عربی تفاسیر:
أَفَلَمۡ يَنظُرُوٓاْ إِلَى ٱلسَّمَآءِ فَوۡقَهُمۡ كَيۡفَ بَنَيۡنَٰهَا وَزَيَّنَّٰهَا وَمَا لَهَا مِن فُرُوجٖ
6. Boye bazali kornona likolo te lolenge nini tokela mpe topesaki yango bonzenga? Tokembisaki yango ezala kopasuka te.
عربی تفاسیر:
وَٱلۡأَرۡضَ مَدَدۡنَٰهَا وَأَلۡقَيۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجِۭ بَهِيجٖ
7. Мре lolenge nini fotandaki mabele (na bonene), тре tolendisaki yango na bangomba, тре tobotisi yango lolenge nyoso ya biloko.
عربی تفاسیر:
تَبۡصِرَةٗ وَذِكۡرَىٰ لِكُلِّ عَبۡدٖ مُّنِيبٖ
8. Mpo mowumbu nyoso oyo azali kolikia na bozongi amona mpe akanisa.
عربی تفاسیر:
وَنَزَّلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ مُّبَٰرَكٗا فَأَنۢبَتۡنَا بِهِۦ جَنَّٰتٖ وَحَبَّ ٱلۡحَصِيدِ
9. Mpe tozali kokitisa mayi mapamboama kowuta na likolo, mpe tobotisi na yango bilanga na ba mbuma oyo bazali kobuka yango.
1 Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
عربی تفاسیر:
وَٱلنَّخۡلَ بَاسِقَٰتٖ لَّهَا طَلۡعٞ نَّضِيدٞ
10. Mpe nagh’l(1) ya milai na biteni na yango ezali ya kokangama.
1 Nagh’l: Bótala na suratu Al-Isrâ mokapo: 91. Na suratu Al-Kahf: 32.
عربی تفاسیر:
رِّزۡقٗا لِّلۡعِبَادِۖ وَأَحۡيَيۡنَا بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗاۚ كَذَٰلِكَ ٱلۡخُرُوجُ
11. (Ezala) bozui тропа bawumbu (na ngai), mpe na yango topesaki bomoyi na mboka oyo ekufa. Lolenge wana nde lisekwa ekozala.
عربی تفاسیر:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَأَصۡحَٰبُ ٱلرَّسِّ وَثَمُودُ
12. Bato ya Núh mpe ya Rass mpe ba Thamúd baboyaki liboso kondima.
عربی تفاسیر:
وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ وَإِخۡوَٰنُ لُوطٖ
13. Lolenge moko na ba aad mpe falo na bandeko ya Loth.
عربی تفاسیر:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡأَيۡكَةِ وَقَوۡمُ تُبَّعٖۚ كُلّٞ كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ وَعِيدِ
14. Mpe bato ya Aykah, na bato ya Tubba, banso baboyaki kondima na batindami kasi bakozuaka etumbu.
عربی تفاسیر:
أَفَعَيِينَا بِٱلۡخَلۡقِ ٱلۡأَوَّلِۚ بَلۡ هُمۡ فِي لَبۡسٖ مِّنۡ خَلۡقٖ جَدِيدٖ
15. Te. Tolembaki te na bokeli ya liboso. Kasi bazali na tembe na ntina ya bokeli ya sika.
عربی تفاسیر:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ وَنَعۡلَمُ مَا تُوَسۡوِسُ بِهِۦ نَفۡسُهُۥۖ وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنۡ حَبۡلِ ٱلۡوَرِيدِ
16. Мре ya soló, tokelaki moto, mpe toyebi eloko nini oyo etungisaka ye. Na yango biso tozali pembeni naye koleka mosisa naye ya kingo.
عربی تفاسیر:
إِذۡ يَتَلَقَّى ٱلۡمُتَلَقِّيَانِ عَنِ ٱلۡيَمِينِ وَعَنِ ٱلشِّمَالِ قَعِيدٞ
17. Tango bayambi mibale bakofanda ngambu ya (loboko) ya mobali mpe ya mwasi.
عربی تفاسیر:
مَّا يَلۡفِظُ مِن قَوۡلٍ إِلَّا لَدَيۡهِ رَقِيبٌ عَتِيدٞ
18. Akoloba liloba moko te kino ekozala pembeni naye oyo azali kotala mpe azali kokoma.
عربی تفاسیر:
وَجَآءَتۡ سَكۡرَةُ ٱلۡمَوۡتِ بِٱلۡحَقِّۖ ذَٰلِكَ مَا كُنتَ مِنۡهُ تَحِيدُ
19. Mpe molangwa ya liwa eyaki na bosembo, wana nde oyo ozalaki kokima.
عربی تفاسیر:
وَنُفِخَ فِي ٱلصُّورِۚ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلۡوَعِيدِ
20. Mpe bakofula na kelelo. Wana nde mokolo ya elaka.
عربی تفاسیر:
وَجَآءَتۡ كُلُّ نَفۡسٖ مَّعَهَا سَآئِقٞ وَشَهِيدٞ
21. Mpe molimo nyoso mokoyaka na mokambi naye mpe na nzeneneke.
عربی تفاسیر:
لَّقَدۡ كُنتَ فِي غَفۡلَةٖ مِّنۡ هَٰذَا فَكَشَفۡنَا عَنكَ غِطَآءَكَ فَبَصَرُكَ ٱلۡيَوۡمَ حَدِيدٞ
22. Opesaki likebi na yango te, mpe tolongoli elamba oyo ezipaki yo, miso nayo lelo ekomona.
عربی تفاسیر:
وَقَالَ قَرِينُهُۥ هَٰذَا مَا لَدَيَّ عَتِيدٌ
23. Mpe Molingani naye akoloba: Tala oyo ezali epai na ngai, ezali pembeni.
عربی تفاسیر:
أَلۡقِيَا فِي جَهَنَّمَ كُلَّ كَفَّارٍ عَنِيدٖ
24. Bino mibale, bobwaka mopagano mpe motomboki okati na lifelo,
عربی تفاسیر:
مَّنَّاعٖ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٖ مُّرِيبٍ
25. (Mpo azalaki) kopekisa bolamu, (тропа bawumbu ya Allah), azalaki motomboki тре moto ya tembe.
عربی تفاسیر:
ٱلَّذِي جَعَلَ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَأَلۡقِيَاهُ فِي ٱلۡعَذَابِ ٱلشَّدِيدِ
26. Ye nde atielaki Allah nzambe mosusu, bino mibale bobwaka ye okati ya etumbu ya makasi.
عربی تفاسیر:
۞ قَالَ قَرِينُهُۥ رَبَّنَا مَآ أَطۡغَيۡتُهُۥ وَلَٰكِن كَانَ فِي ضَلَٰلِۭ بَعِيدٖ
27. Moninga naye akolobaka: Nkolo ezali ngai te moto natiyaki ye azala motomboki, kasi azalaki na libunga ya mozindo.
عربی تفاسیر:
قَالَ لَا تَخۡتَصِمُواْ لَدَيَّ وَقَدۡ قَدَّمۡتُ إِلَيۡكُم بِٱلۡوَعِيدِ
28. (Allah) akolobaka: Bosuana liboso na ngai te, nasilaki kopesa bino elaka.
عربی تفاسیر:
مَا يُبَدَّلُ ٱلۡقَوۡلُ لَدَيَّ وَمَآ أَنَا۠ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ
29. (Epai nangai) liloba libongwanaka te, mpe nazali mobubi ya bawumbu te.
عربی تفاسیر:
يَوۡمَ نَقُولُ لِجَهَنَّمَ هَلِ ٱمۡتَلَأۡتِ وَتَقُولُ هَلۡ مِن مَّزِيدٖ
30. Mokolo moye tokolobaka na lifelo ete otondi, ekoyanolaka: Ya kobakisa ezali?
عربی تفاسیر:
وَأُزۡلِفَتِ ٱلۡجَنَّةُ لِلۡمُتَّقِينَ غَيۡرَ بَعِيدٍ
31. Mpe bakopusaka lola pene ya babangi (Allah) ekozalaka mosika te.
عربی تفاسیر:
هَٰذَا مَا تُوعَدُونَ لِكُلِّ أَوَّابٍ حَفِيظٖ
32. Oyó nde balakaki bino, тропа (moto) oyo atubelaka mpe abatelaka mibeko.
عربی تفاسیر:
مَّنۡ خَشِيَ ٱلرَّحۡمَٰنَ بِٱلۡغَيۡبِ وَجَآءَ بِقَلۡبٖ مُّنِيبٍ
33. Oyo azalaki kobanga Ar- Rahmán, ata azali kornona ye te, mpe ayei na motema ya kotubela.
عربی تفاسیر:
ٱدۡخُلُوهَا بِسَلَٰمٖۖ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلۡخُلُودِ
34. Bokota na kimia okati na yango, wana nde mokolo ya seko.
عربی تفاسیر:
لَهُم مَّا يَشَآءُونَ فِيهَا وَلَدَيۡنَا مَزِيدٞ
35. Bakozuaka nyoso oyo bakolinga mpe pembeni na biso bazali na litomba mosusu.
عربی تفاسیر:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّن قَرۡنٍ هُمۡ أَشَدُّ مِنۡهُم بَطۡشٗا فَنَقَّبُواْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ هَلۡ مِن مَّحِيصٍ
36. Bato boni tobomaka liboso na bango, mpe balekaki bango na makasi, mpe batongaki bandako ya milai mpe ya kitoko, boye bazali na esika ya kokima (etumbu na biso?)
عربی تفاسیر:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَذِكۡرَىٰ لِمَن كَانَ لَهُۥ قَلۡبٌ أَوۡ أَلۡقَى ٱلسَّمۡعَ وَهُوَ شَهِيدٞ
37. Wana ezali bokundoli тропа oyo azali na motema to azali koyoka mpe kornona.
عربی تفاسیر:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ وَمَا مَسَّنَا مِن لُّغُوبٖ
38. Mpe tosilaki kokela likolo na nsé na nyoso oyo ezali o kati na yango mibale na mikolo motoba, kasi bolembu ezuaki biso te.
عربی تفاسیر:
فَٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ قَبۡلَ طُلُوعِ ٱلشَّمۡسِ وَقَبۡلَ ٱلۡغُرُوبِ
39. Kanga motema тропа maye bazali koloba, mpe sanzola matondo ya Nkolo wayo, yambo ya kobima na moyi mpe yambo ya kokoto na yango.
عربی تفاسیر:
وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَأَدۡبَٰرَ ٱلسُّجُودِ
40. Mpe pesa ye lokumu kati kati ya butu mpe gumbama (тропа kosambela)
عربی تفاسیر:
وَٱسۡتَمِعۡ يَوۡمَ يُنَادِ ٱلۡمُنَادِ مِن مَّكَانٖ قَرِيبٖ
41. Мре yoka, о mokolo oyo mobeleli akobelela na esika oyo ezali pene.
عربی تفاسیر:
يَوۡمَ يَسۡمَعُونَ ٱلصَّيۡحَةَ بِٱلۡحَقِّۚ ذَٰلِكَ يَوۡمُ ٱلۡخُرُوجِ
42. Mokolo oyo bakoyokaka ya soló bogangi ya makasi, wana nde mokolo ya bosekwisami.
عربی تفاسیر:
إِنَّا نَحۡنُ نُحۡيِۦ وَنُمِيتُ وَإِلَيۡنَا ٱلۡمَصِيرُ
43. Ya soló, biso nde topesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai na biso bozongi ekozala.
عربی تفاسیر:
يَوۡمَ تَشَقَّقُ ٱلۡأَرۡضُ عَنۡهُمۡ سِرَاعٗاۚ ذَٰلِكَ حَشۡرٌ عَلَيۡنَا يَسِيرٞ
44. Mokolo oyo mabele ekopasukaka тропа bango na lombangu, bosangani wana ezali pete тропа ngai.
عربی تفاسیر:
نَّحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَقُولُونَۖ وَمَآ أَنتَ عَلَيۡهِم بِجَبَّارٖۖ فَذَكِّرۡ بِٱلۡقُرۡءَانِ مَن يَخَافُ وَعِيدِ
45. Toyebi malamu oyo bazali koloba, kasi ozali na mibeko ya komatela bango te, kundola na kurani moto azali kobanga etumbu na ngai.
عربی تفاسیر:
 
معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ قٓ
سورتوں کی لسٹ صفحہ نمبر
 
قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا - ترجمے کی لسٹ

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بند کریں