Check out the new design

Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго * - Таржималар мундарижаси

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Маънолар таржимаси Сура: Аъроф   Оят:
إِنَّ وَلِـِّۧيَ ٱللَّهُ ٱلَّذِي نَزَّلَ ٱلۡكِتَٰبَۖ وَهُوَ يَتَوَلَّى ٱلصَّٰلِحِينَ
Ya solo, mokonzi na ngai Allah nde oyo akitisi buku (kurani) mpe ye nde mobateli ya bato ya malamu.
Арабча тафсирлар:
وَٱلَّذِينَ تَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ لَا يَسۡتَطِيعُونَ نَصۡرَكُمۡ وَلَآ أَنفُسَهُمۡ يَنصُرُونَ
Kasi baye bozali kobondela na kotika Allah bakokoka kosunga bino te mpe milimo na bango moko te.
Арабча тафсирлар:
وَإِن تَدۡعُوهُمۡ إِلَى ٱلۡهُدَىٰ لَا يَسۡمَعُواْۖ وَتَرَىٰهُمۡ يَنظُرُونَ إِلَيۡكَ وَهُمۡ لَا يُبۡصِرُونَ
Mpe soki obengi bango na nzela ya nsemba bakoyoka te, mpe ozali kornona bango bazali kotala yo kasi bazali kornona te.
Арабча тафсирлар:
خُذِ ٱلۡعَفۡوَ وَأۡمُرۡ بِٱلۡعُرۡفِ وَأَعۡرِضۡ عَنِ ٱلۡجَٰهِلِينَ
Zala na mawa, tinda kosala bolamu, mpe zala mosika na baye bazanga mayele.
Арабча тафсирлар:
وَإِمَّا يَنزَغَنَّكَ مِنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ نَزۡغٞ فَٱسۡتَعِذۡ بِٱللَّهِۚ إِنَّهُۥ سَمِيعٌ عَلِيمٌ
Mpe soki satana akoteli yo été osala mabe, luka libateli epai na Allah mpo été azali moyoki mpe moyebi.
Арабча тафсирлар:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ إِذَا مَسَّهُمۡ طَٰٓئِفٞ مِّنَ ٱلشَّيۡطَٰنِ تَذَكَّرُواْ فَإِذَا هُم مُّبۡصِرُونَ
Ya soló, baye bazali na bobangi Allah soki emoniseli ya satana ekoteli bango, bakanisi nsima, tala bango ndenge bakomi ekenge.
Арабча тафсирлар:
وَإِخۡوَٰنُهُمۡ يَمُدُّونَهُمۡ فِي ٱلۡغَيِّ ثُمَّ لَا يُقۡصِرُونَ
Bandeko balongani na bango basatana bakozindisa bango na libunga mpe bakotika te.
Арабча тафсирлар:
وَإِذَا لَمۡ تَأۡتِهِم بِـَٔايَةٖ قَالُواْ لَوۡلَا ٱجۡتَبَيۡتَهَاۚ قُلۡ إِنَّمَآ أَتَّبِعُ مَا يُوحَىٰٓ إِلَيَّ مِن رَّبِّيۚ هَٰذَا بَصَآئِرُ مِن رَّبِّكُمۡ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
Mpe soki oyeli bango bikamwiseli te, bakoloba: Mpona nini okosala yango na ndenge nayo te? Loba: Ngai na zali kolanda sé maye makiteli ngai epai na Nkolo wa ngai. Oyo (mikapo mia kurani) mizali bilembetele (bilembo) biwuti epai na Nkolo na bino, bokambi mpe ngolu mpo na bandimi.
Арабча тафсирлар:
وَإِذَا قُرِئَ ٱلۡقُرۡءَانُ فَٱسۡتَمِعُواْ لَهُۥ وَأَنصِتُواْ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
Mpe soki kurani ezali kotangama boyoka yango mpe bofanda nye mpo été bozwa ngolu (ya Allah).
Арабча тафсирлар:
وَٱذۡكُر رَّبَّكَ فِي نَفۡسِكَ تَضَرُّعٗا وَخِيفَةٗ وَدُونَ ٱلۡجَهۡرِ مِنَ ٱلۡقَوۡلِ بِٱلۡغُدُوِّ وَٱلۡأٓصَالِ وَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡغَٰفِلِينَ
Мре kundola nkombo ya Nkolo nayo na kati nayo na kobanga mpe na komikitisa na mongongo ya katikati ntongo mpe mpokua. Kasi kozala te elongo na baye bazangi makanisi.
Арабча тафсирлар:
إِنَّ ٱلَّذِينَ عِندَ رَبِّكَ لَا يَسۡتَكۡبِرُونَ عَنۡ عِبَادَتِهِۦ وَيُسَبِّحُونَهُۥ وَلَهُۥ يَسۡجُدُونَۤ۩
Ya soló baye bazali epai ya Nkolo nayo (ba anzelu) bazali kosala lolendo te тропа kobondela ye, mpe bazali kokumisa ye na kofukamela ye.
Арабча тафсирлар:
 
Маънолар таржимаси Сура: Аъроф
Суралар мундарижаси Бет рақами
 
Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго - Таржималар мундарижаси

Закарийё Муҳаммад Бенгогу таржимаси.

Ёпиш