1. Eh Bino bato! Bobanga Nkolo na bino oyo akeli bino na molimo moko, mpe akeli na molimo wana mwasi Naye. Mpe abimisi o’kati na bango mibali ebele mpe basi, mpe bobanga Allah oyo bozali komitunana ba mposa ya bino. Mpe bobanga kokata bondeko ya makila. Ya sôló Allah azali mokengeli wa bino.
2. Mpe bopesa bana bitike misolo mwa bango, mpe bobongola mabe na bolamu te, mpe bolia misolo mia bango te na misolo mia bino. Ya sôló, maye wana mazali masumu minene.
3. Mpe soki bobangi ete bokozala na bosembo te kati kati ya bana bitike, esengeli na bino kobala basi baye bosepeli na bango, mibale, to mpe misato to mpe minei, kasi soki bobangi ete bokokoka te mpe bokozala semba kati na bango te, ezali malamu kozala na moko, to mpe bawumbu na bino baye bazali na maboko mabino, wana nde ezali malamu mpo ete bobunga te na kokweya na masumu.
4. Mpe bopesa basi misolo mia bango ya libala na motema ya malamu, ezali lotomo mpona bango, kasi soki bango moko batikeli bino eloko na kati na yango, bolia yango na esengo.
5. Mpe bopesa bazoba misolo mia bino te, oyo Allah atia yango mpona kotelemisa bomoyi bwa bino, mpe boleisa bango o kati ya maye wana, mpe bolatisa bango mpe boloba na bango maloba malamu.
6. Bomeka mayele ya bana bitike mpona koyeba ete bakoli to naino bakoli te, mpe soki bomoni ete bakomi na kibomoto, bopesa bango misolo mia bango. Kasi bowela na lombango te mpona kolia misolo mia bango na lolenge ya mabe, na bango bazali naino bana mike, mpe oyo kati na bino azali na bozui naye, amipesa lokumu ete alia mbongo ya bana bitike te, kasi oyo azali na bozui te, alia yango na lolenge ya malamu, mpe soki bolingi kozongisela bango bozui na bango esengeli ezala liboso ya banzeneneke, mpe Allah akoki na motango moye bokopesa bango.
7. Mibali bakozua eteni na kati ya bozui eye baboti batikaki, mpe bato ya libota, basi mpe bazali na eteni okati ya bozui eye baboti batikaki, lolenge mpe bato basusu ya libota, bozui yango ezala moke to ebele ezali eteni ya lotomo.
8. Mpe soki bato ya zinga zinga ya libota, Mpe bana bitike mpe babola bayei kotelema na mokolo ya kokabola nkita ya bawei, esengeli kopesa bango mwa eloko okati ya nkita wana. Mpe bolobela bango maloba ya malamu.
9. Kasi baye bazali na mikumba ya bana bitike babanga konyokolo bango lolenge moko babangaka kokufa, mpe kotika bana na bango ya mike na sima ete banyokwama te, esengeli na bango kobanga Allah, mpe balobaka na bana bitike maloba ya malamu.
10. Ya sôló baye bazali kolia misolo ya bana bitike na lolenge ya mabe, ya sôló bazali kolia móto okati ya mabumu na bango. Mpe bakokota okati ya móto oyo ezali kopela.
11. Allah atieli bino mobeko mpona bana na bino (na likambo litali bokitani): Mwana mobali akozua bozui ya motuya ya bana basi mibale. Mpe soki bana basi bazali Mibale to Koleka, bakozua mibale ya misato ya maye moweyi atikaki, mpe soki azali sé ye moko mwana mwasi akozua kati kati ya bozui, kasi baboti ya moweyi moko na moko akozua moko ya motoba ya maye mowei atikaki, soki moweyi atikaki mwana, kasi soki atikaki mwana te mama naye akozua moko ya misato, mpe soki azali na bandeko, mama naye akozua moko ya motoba, wana ekozala sima yako futa nyongo to mpe malako atikaki; batata na bino na bana na bino boyebi te nani kati na bango akosalisa bino, wana ezali lotomo kowuta epayi ya Allah, ya sôló Allah azali na boyebi atonda bwanya.
12. Bokozua kati kati ya bozui oyo basi na bino batikaki, soki bazali na bana te. Kasi soki bazalaki na bana, bino mibali na bango bokozua moko na minei, sima ya kofuta nyongo atikaki to mpe elaka alakaki; bango basi mpe bakozua moko na minei na bozui oyo botikaki soki bozalaki na bana te, kasi soki bozalaki na bana, bango basi na bino bakozua moko na mwambe ya maye botikaki, wana sima ya bofuti nyongo botikaki to mpe elaka bolakaki. Kasi soki mowei mobali to mpe mwasi azali na baboti te, azali mpe na bana te, mpe ye azali na ndeko ya mobali to mpe ndeko ya mwasi, moko na moko akozua moko na motoba, kasi soki bazali ebele, basi mpe mibali, bakosangana okati ya moko na misato, sima ya kofuta nyongo ya mowei to mpe elaka alakaki yango na limemia nyoso, kasi na monyokoli te, wana ezali mobeko mowuti epayi ya Allah, mpe Allah azali boyebi atondo ngolu.
13. Oyo nde mibeko mia Allah. Mpe moto oyo atosi Allah na motindami wa ye, akokotisa ye na lola o’kati na yango mingala mizali kotiola seko na seko. Oyo nde elonga ya monene.
15. Otei ya basi na bino baye bakokweya na ekobo, boya na banzeneneke minei okati na bino, mpe soki batatoli yango bofandisa bango o’kati ya bandako kino liwa eyela bango to mpe Allah atia mobeko mosusu likolo na bango.
16. Mpe mibale kati na bino bakwei na ekobo, bogangela bango, kasi soki batubeli mpe babongisi, botika kotungisa bango. Mpamba te Allah ya sôló, azali moyambi ya tubela mpe atonda ngolu.
17. Ya sôló, tubela epai ya Allah ezali mpona baye basali mbeba na boyinga, mpe bawelisi na kotubela. Ba oyo wana nde Allah akondima tubela na bango. Mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya.
18. Tubela ezali te, na baye bazali kosala mbeba tii kino liwa likomeli moko na bango. Akoloba: Ya sôló, ngai natubeli sika oyo. Mpe (tubela) ezali te na baye bazali kowa mpe bango bazali bapagano; baye wana nde tobongisi mpona bango etumbu ya makasi.
19. Eh bino bandimi! Bozua nkita ya basi te sé na ndingisa na bango. Mpe bopekisa bango te kobala sima ya liwa ya mibali na bango, na likanisi ya kozua ndambu ya misolo bopesaki bango na libala. Longola sé soki basali likambo ya mabe, lokola ekobo oyo emonani polele. Kasi soki bongo te, bofanda na bango na lolenge ya malamu, mpe soki bozali kosepela na bango te, kasi boyeba ete soki bozali koyina eloko tango mosusu Allah asili kotia bolamu ebele okati na yango.
20. Mpe soki bolingi kotia mwasi ya sika na esika ya oyo bosilaki kokabuana naye, mpe ata soki bopesaki moko na bango misolo ebele bozua eloko moko na kati te, bolingi kozua yango na kobuba mpe lisumu monene!.
23. Epekisami epai na bino ete: bobala ba mama ba bino, mpe bana na bino ya basi, mpe ba ndeko na bino ya basi, mpe ba tata mwasi na bino, mpe ba ndeko ya mama na bino ya basi, mpe bana basi ya ndeko na bino ya mobali, mpe bana basi ya ndeko na bino ya mwasi, mpe ba mama baye bamelisaki bino mabele, mpe bandeko na bino ya basi baye bomelaki na bango mabele moko, mpe ba mama ya basi na bino, mpe bana basi ya basi na bino baye bafandaka na bandako na bino baye bosangana na bango nzoto, kasi soki bosanganaki na bango nzoto te, ezali lisumu te ete bobala bana na bango, mpe basi ya bana na bino baye babimi na mikongo na bino, mpe lisusu epekisami ete bosangisa bandeko basi mibale na libala moko, longola sé na maye maleka liboso, ya sôló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
24. Mpe kobala basi ya mabala, longola sé bawumbu baye bosomba bango na mbongo na bino. Manso wana ezali mibeko mia Allah likolo na bino. Kasi bozali na ndingisa ya kobala basi banso batangami te okati ya mikapo miye. Kasi botambola na bango na mobulu te na ekobo te; bopesa bango misolo mia bango ya libala mpo ete bofanda na bango na maye bosepeli na yango kati na bango; mpe soki bosili kopesa bango misolo mia bango, bozali na lisumu te mpo ete bosili koyokana na bango; ya sôló Allah azali moyebi atonda bwanya.
25. Mpe oyo okati na bino azui makoki te ya kobala ba nsomi kati ya basi ya bandimi, akoki kozua na kati ya bawumbu nabino bana basi ya bandimi. Mpe Allah ayebi bondimi kati na bino, mpo bozali bino na bino. Bobala bango na ndingisa ya baboti na bango, mpe bopesa bango mbongo ya libala na ndenge ya malamu. Mpo ete bazali basi ya malamu, kasi boluka bango te na ndenge ya kobatama to mpe na ndenge ya ekobo. Mpe soki basili kokota na libala mpe bakwei na ekobo, bakozua kati kati ya etumbu ya basi ya bonsomi. Wana ezali nzela epesamelaki bino mpona baye bazali kobanga kokweya na ekobo. Kasi soki bokangi mitema ezali malamu mingi mpona bino, mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
26. Allah alingi kolimbolela bino, mpe alingi kokamba bino na nzela ya baye balekaki liboso na bino, mpe andima batubela na bino. Mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
29. Eh bino bandimi! Bolia mbongo na bino te kati kati na bino na lolenge ya mabe. Kasi ezala nde nzela ya mombongo molongobani na bosepeli kati na bino. Mpe bomiboma te, mpamba te Allah azali na mawa na bino.
32. Bosala likunya te na maye Allah apesi baninga kati na bino, mibali bazali na eteni ya lifuta na maye basalaki, basi mpe bazali na lifuta na maye basalaki, bosenga nde Allah apesa bino bolamu naye. Ya sôló, Allah azali na boyebi likolo na biloko binso.
33. Mpe totiaki libota na libota bakitani kowuta na maye baboti batiki to mpe ba ndeko okati ya libota, kasi, mpona bato basusu baye bopesaki bango elaka, bopesa bango nkita eye bolakaki bango, ya sôló Allah azali nzeneneke likolo ya biloko binso.
34. Mibali bazali na bokonzi likolo ya basi, na ntina na lokumu oyo Allah apesi bango koleka basi. Mpe mpona misolo mia bango, babimisaka mpona basi; basi ya malamu bazali baye batosaka mibali na bango mpe babatelaka oyo esengeli ebatelama ata na tango oyo mibali na bango bazali te, maye Allah atiaki yango ete ebatelama, kasi baye bozali kobangela bango ete bazangi botosi bopesa bango ntoli to mpe bozala mosika na bango na mbeto, to mpe bobeta bango, soki bayoki mpe batosi bino bolukela bango lisusu mindondo te. Pamba te Allah azali monene azali likolo koleka.
35. Mpe soki bobangi bokeseni kati na bango, botinda mosemboli moko kowuta na libota lia mobali mpe mosemboli mosusu kowuta na libota lia mwasi, mpe soki balingi boyokani, Allah akoyokanisa bango mibale. Ya sôló, Allah azali na boyebi atonda ba sango.
36. Mpe bobondela Allah mpe bosangisa ye na eloko mosusu te, mpe bosala malamu na baboti mpe bandeko ya libota mpe bana bitike, mpe babola mpe baninga ya libota lia penepene, mpe mozalani ya mosika mpe moninga mpe moto wa mobembo oyo makoki maye masili, mpe na bawumbu na bino. Ya sôló, Allah alingaka te oyo azali komimonisa mpe azali lolendo likolo ya bato.
38. Mpe na baye bazali kobimisa mbongo na bango mpona komilakisa epai na bato, mpe baboyi kondima na Allah mpe na mokolo mwa suka. Mpe moto oyo azali moninga ya satana mpe oyo nde molongani ya mabe.
39. Mpasi nini ezali kosala bango soki bandimaki na Allah mpe na mokolo ya suka, mpe babimisi na misolo miye Allah apesi bango (na nzela ya Allah)? Kasi ya sôló, Allah ayebi bango malamu.
40. Ya sôló, Allah abubaka moto te na mosala naye ata moke lokola mbuma. Mpe soki ezali mosala ya malamu, (Allah) akobakisela bango mbala ebele. Mpe akopesa mbano enene kowuta epai naye.
43. Eh bino bandimi! Bopusana na losambo te tango bozali na molangwa, kino bokososola maye bozali koloba, mpe tango bozali na mbindo kino bokosukola, longola sé oyo azali na nzela ya mobembo, kasi soki bozali na bokono to mpe bozali na mobembo to mpe moko kati na bino awuti na nzongo ya monene to nzongo ya moke, to mpe bosangani na basi, mpe bozui mayi te mpo ya kopetola nzoto, bosimba mabele ya mpeto mpe bopangusa yango na bilongi na bino, mpe maboko ma bino. Yasôló, Allah azali molimbisi atonda ngolu.
46. Ezali o’kati ya bayuda baye bazali kobongola liloba na esika na yango. Mpe balobaka ete: Toyoki mpe toboyi kotosa, mpe balobi lisusu: Yoka kasi bapesa yo te ndenge ya koyokela, mpe pesa biso litomba, bazali kobimisa lolemu na bango mpona kofinga lingomba (ya Allah)! kasi soki balobaka ete: Toyoki mpe totosi, mpe balobi na bato ete: Yoka mpe tala biso, nde ezalaki malamu mpe semba mpona bango. Kasi Allah alakeli bango botutu na ntina na bopagano na bango; mpe bakondimaka te sé moke kati na bango.
47. Eh bino baye bozua buku! Bondima na maye tokitisaki mpe ezali kondima na maye bozalaki na yango liboso ete tolimwisa bilongi, mpe tokobalola yango na sima mpe tokolakela bango ndenge tolakelaki bato ya Saba botutu. Mpamba te, mokano ya Allah ekokisamaka.
48. Ya sôló, Allah akolimbisa te oyo akosangisa ye na eloko. Mpe azali kolimbisa masumu misusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah, ya sôló mpenza ye akwei na lisumu linene.
49. Omoni te, baye wana batatoli ete bango bazali petoa? Kasi Allah nde akopetolaka oyo ye alingi, mpe bakosala bango mabe ata moke te lokola Fatîl.(1)
51. Omonaki te epai ya ba oyo bazuaki eteni ya buku?(1) bazali kondima na bonganga mpe bazali kondima na tarut,(2) mpe bazali koloba na ba oyo basali bopagano: bango nde bazali na nzela ya semba koleka ba oyo bandimi.(3)
54. To bazali kosala bato likunya likolo ya maye Allah apesaki bango kowuta na ngrásia naye? Ya sôló, tosilaki kopesa libota lia Ibrâhîm buku, mpe bwanya, mpe topesaki bango bokonzi ya monene.
55. Mpe kati na bango ezali na oyo andimi na yango, mpe na kati na bango ezali na oyo amipekisi na yango. Mpe lifelo ekoki mpo na bango mpo bazikisama.
56. Ya sôló, baye bapengwi na bilembo bia biso, tokomema bango na kati ya móto. Tango inso loposo na bango ekozika, tokozongisa yango na loposo ya sika mpo ete bayoka etumbu mpenza. Ya sôló Allah azali na nguya atonda bwanya.
57. Mpe mpona baye bandimi mpe basali misala ya malamu, tokokotisa bango na lola epai wapi mingala mizali kotiola o’nse na yango, mpe bakozala okati na yango seko na seko. Okati na yango ezuami mpona bango basi ya mpetoa. Mpe tokokotisa bango o esika ya mpio tango inso.
58. Ya sôló, Allah atieli bino lotomo ete: Bozongisa biloko ya bato epai na bakolo na yango, mpe soki bokati makambo kati na bato, bokata na bosembo. Ya sôló, Allah atonda bolamu azali kolendisa bino na yango. Ya sôló, Allah azali moyoki mpe azali momoni.
59. Eh bino bandimi! Botosa Allah mpe botosa motindami mpe bakonzi(1) na bino awa na nsé. Mpe soki bozui kpokoso na likambo kati na bino, bozongisa yango epai na Allah na motindami, soki ya sôló bozali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Wana nde ezali kitoko mpe lolenge ya malamu ya kosilisa likambo.
1 Bakonzi: Elakisi mpe banganga ya nzambe. Kotosa bango na maye oyo batindi ya malamu, ezali na kati ya botosi ya Allah. Na motindami naye.
60. Omoni te ete baye bakobete ntolo ete bango bandimi na maye tokitiselaki yo, mpe na maye tokitisaki epai ya baye bayaki liboso nayo? Bango balingaka kosambisa mambi ma bango epai ya motomboki.(1) nzoka nde batindamaki ete bapengwa na yango. Kasi satana alingi kobungisa bango na libunga moko ya mosika.
1 Motomboki: Bótala Na mokapo 51 ya suratu oyo. Na suratu Al-Baqarah 256, 257.
62. Mpe ndenge nini soki mpasi ezui bango kowuta na maye maboko na bango moko esalaki, sima bakoyela yo mpe bakolapa na nkombo ya Allah ete: Tolingaki sé bolamu na boyokani?!
63. Bango wana nde Allah ayebi maye mazuami o’mitema mia bango. Kolanda makambo na bango te, mpe lendisa bango, mpe lobela bango maloba ya polele ya bosembo.
64. Mpe totindaki motindami moko te epai ya bato bobele ete batosa ye sé na ndingisa ya Allah. Mpe bango tango basalaki milimo na bango mabe, bayaki epai nayo mpona kosenga Allah bolimbisi, mpe motindami asengela bango bolimbisi, balingaki kokuta Allah moyambi monene ya tubela mpe moyoki mawa.
65. Mpe na nkombo ya Nkolo wayo, bakozala bandimi te kino bako tia yo zuzi ya likambo likwei kati na bango mpe bakoyoka mpasi te na mitema mpona likambo okateli bango, mpe na sima bandima mpe batosa yango.
66. Mpe soki totielaki bango mobeko ete: Bomiboma to bomibimisa na bandako na bino, mbele balingaki kosala yango te, longola sé ndambu moke kati na bango. Kasi soki basalaka maye bateyamaki na yango, nde elingaki ezala malamu mpona bango, mpe lilendisi ya makasi.
69. Oyo akotosa Allah na motindami, bango wana nde bakozala elongo na baye Allah atondisela bango bolamu naye kati na bantoma, mpe bato ya bosembo, mpe baye bakufaki na kobunda na nzela na Allah, mpe bato ya malamu, oyo nde balongani ya kitoko.
72. Mpe okati na bino ezali na basusu akolekisa tango mpona kotikala na sima, mpe soki likama ezui bino na bitumba akoloba ete:Ya sôló, Allah asili kosala ngai malamu na ntina ete nazalaki na bango elongo te, mpo noki nalingaki nakufa na bitumba,
73. Kasi soki bolamu ya Allah ekiteli bino, akoloba lokola bolingo ezalaki kati na bino te, eh! Ngai mawa na ngai soki nazalaki na bango elongo nde nazui elonga ya monene!
74. Babundisa na nzela ya Allah, baye bazali kotekisa lola na ntalo moke mpona kozua bomoyi na nsé, kasi oyo akobunda na nzela ya Allah, mpe akufi na bitumba to alongi bitumba, tokopesa ye lifuta ya monene.
75. Eloko nini ekopekisa bino kobunda na nzela ya Allah, mpe mpona baye bazangi makasi kati ya mibali mpe basi, mpe bana mike bazali koloba: Eh Nkolo na biso! Bimisa biso na mboka oyo bato na yango bazali mabe. Pesa biso mokonzi kowuta epai nayo, mpe tiela biso mosungi kowuta epai nayo.
76. Bandimi babundaka na nzela ya Allah, kasi bapagano babundaka na nzela ya motomboki.(1) Bobundisa balandi ya satana; mpamba te likita ya satana ezalaka makasi te.
79. Bolamu oyo ekokomela yo ewuti epai na Allah; mpe mabe soki ezui yo ewuti nayo moko. Mpe totindaki yo ozala motindami epai ya bato. Allah nde akoki nayo lokola nzeneneke.
81. Bazali koloba ete: Totosi, mpe soki babimi epai nayo,(1) bakei na kati na butu lisanga kati na bango bazali koloba maye yo olobaki te. Kasi, Allah azali kokoma maye bazali kosala na butu. Zala mosika na bango, mpe pesa elikia nayo epai na Allah, Allah akoki nayo lokola mobateli.
83. Mpe soki sango ya kimia to ya bobangi eyeli bango, babimisi yango. Soki bazongisaki yango epai ya motindami mpe epai ya bato bazali na mitindo kati na bango, nde bato ya mayele kati na bango bayebaki yango. Soki mpona ngolu ya Allah te mpe bolamu naye te likolo na bino, nde bolandaki satana, longola sé moke ya bato kati na bino.
84. Mpe bunda na nzela ya Allah. Ozali kokonza sé nzoto nayo moko (kasi basusu te). Mpe olendisa bandimi (mpona kobunda). Mpo ete Allah akosukisa nkanda ya bapagano, Allah atonda nguya koleka mpe azali makasi na etumbu.
85. Oyo okati na bino akozala molobeli ya malamu akozua lifuta ya malamu, kasi oyo mpe akozala molobeli ya mabe, akozua mpe lifuta ya mabe. Ya sôló Allah azali na nguya likolo ya biloko binso.
86. Soki bopesami losako, bozongisa yango na malamu koleka to mpe bozongisa ndenge bapesi bino. Ya sôló, Allah azali na motango likolo ya biloko binso.
88. Mpona nini bolingi kokabwana na biteni mibale mpona bato ya bilongi mibale? Mpe Allah asilaki kobengana bango na ntina ya maye basalaki. Bino bolingi bosembola bato oyo Allah asili kobungisa? Na moto oyo Allah abungisi, okoki te(1) kozongisa ye na nzela.
89. Balingi bopengwa ndenge bapengui, mpo ete bozala ndenge moko. Mpe bozua te kati na bango ba ninga kino babima na nzela ya Allah. Mpe soki bapesi mokongo bokanga bango mpe boboma bango bipai binso bokokuta bango. Mpe bozua kati na bango moninga te mpe mosalisi te.
90. Longola sé baye bakokota na lisanga ya bato oyo boyokani ezali kati na bino na bango, to mpe bayeli bino mitema ya komata ete babundisa bino, to mpe kobundisa bato na bango. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bango nguya likolo na bino, mpona kobundisa bino. Kasi soki batelemi na kati kati mpe babundisi bino te, mpe bazali kotindela bino losako, Allah apesi bino nzela te yako bundisa bango.
91. Bokokuta basusu kati na bango bazali koluka ete bosepela na bango mpe libota na bango. Kasi tango inso bakozua komekama bakokweyisama ebele okati ya bopagano, na yango soki batelemi na kati kati te, mpe bapesi bino losako te, mpe balongoli maboko na bango likolo na bino te, bozua bango mpe boboma bango na bisika binso bokokuta bango. Mpe topesi bino bokonzi monene likolo na bango.
92. Esengeli te na mondimi koboma mondimi, sé soki asali yango na libaku. Na moto oyo abomi mondimi na libaku, esengeli naye akangola mowumbu moko ya mondimi mpe afuta makila ya mowei epayi ya libota naye, longola sé soki bango moko baboyi kozua lifuta yango. Kasi soki mowei, azali moto ya libota oyo ezali monguna na bino, mpe azali mondimi, mobomi akokangola sé kaka mowumbu ya mondimi. Kasi soki mowei azali moto ya libota oyo boyokani ezali kati na bino na bango, mobomi akofuta makila ya mowei epai na libota naye mpe akokangola mowumbu moko ya mondimi; kasi mpona oyo azui makoki te, esengeli naye akanga ngizi sanza mibale ya kolandana tubela mpona ye kowuta epayi ya Allah, mpe Allah azali na boyebi atonda bwanya.
93. Mpe oyo akoboma mondimi na nko lifuti naye ezali lifelo. Akozala libela na kati na yango, mpe Allah asilikeli ye mpe alakeli ye botutu mpe abongiseli ye etumbu ya monene.
94. Eh bino bandimi! Soki bokei na bitumba na nzela ya Allah bososola. Kasi boloba te na moto oyo bokutani naye apesi bino mbote ya kimia ete: Ozali mondimi te, bozali koluka na yango bomengo ya mokili. Mpe epai ya Allah nde bomengo ezali ebele. Bino mpe bozalaki liboso lokola bango, mpe na ngolu ya Allah likolo na bino asali ete bokoma bandimi, bososola, ya sôló, Allah ayebi mpe azali na sango ya maye manso bozali kosala.
95. Mapinga kati ya bandimi baye babundi na nzela na Allah na misolo mia bango mpe na milimo mia bango, bakokani te na baye bafandi na bandako na bango longola sé ba oyo bazali na kpokoso. Allah atomboli baye ya mapinga likolo na baye bafandi na nsé, kasi na bango nyoso Allah alaki bolamu. Kasi Allah atondisi bolamu naye mingi likolo na mapinga naye mpe lifuta linene.
97. Ya sôló, baye bamisalaki mabe, ba anzelu bazali kolongola milimo mia bango na koloba ete: Bozalaki lolenge nini? Bakozongisa eyano ete: Biso tozangaki makasi likolo ya mabele, (ba anzelu) bakoloba ete: Mabele ya Allah ezalaki monene te ete bokimela? Bango wana efandeli na bango ekozala lifelo. Oyo nde esika ya mabe!
100.Mpe moto oyo akotika mboka naye mpona Allah, akozua esika ya komibatela, mpe akofunguama. Mpe oyo abimi na ndako naye akei epai na Allah na motindami naye, mpe liwa lizui ye, ya sôló, lifuta naye ezali epai ya Allah. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa.
101. Mpe soki bozali na mobembo; ezali lisumu te mpona bino soki bokutoli losambo, soki bozali kobanga komekama ya bapagano. Ya sôló, baye bampengwi. Bazali na kimonguna ya polele likolo na bino.
102. Mpe soki ozali na kati na bango, mpe ozali kosambelisa bango, eteni moko kati na bango etelema elongo nayo, mpe bazala na minduki na bango. Mpe soki basilisi ko ngumbama, bazonga na sima, mpe basusu baya oyo naino ba sambeli te batelemisa losambo elongo nayo, bamilengela mpe bazua mindoki na bango, bapagano bakosepela komona bino botiki mandoki mpe mikumba mia bino mpo ete bakwela bino mbala moko. Mpe ezali lisumu te likolo na bino soki ezui bino minioko ya mbula to mpe bozali na bokono, botika mandoki na bino, na ntango wana bomilengele, ya sôló, Allah abongisi etumbu ya makasi pona bapagano.
103. Mpe soki bosilisi kotelemisa losambo, botanga nkombo ya Allah, ya kotelema to ya kofanda to na mipanzi na bino na kolala, mpe soki bozui kimia, botelemisa losambo na lolenge na yango. Ya sôló, losambo ezali lotomo mpona bandimi ete etelemisama na ngonga na yango.
104. Bozala na bolembu te na kolanda banguna, soki boyoki mpasi bango mpe bayoki mpasi lokola bino; bozali na elikia epai na Allah. Kasi bango bazali na elikia te, Allah azali na boyebi atonda bwanya.
105. Ya sôló, tokitisaki buku epai nayo na bosembo nyoso mpo ete okata na yango likambo na kati kati ya bato na ndenge Allah akolakisa yo. Kasi kozala mosalisi ya bato mabe te.
108. Mpe bazali koluka kobombana bato, kasi bakokoka kobombana Allah te, mpe ye azali na bango bisika nyoso bazali, bazali koloba na butu liloba ezali kosepelisa Allah te, mpe Allah azingi bango bisika binso bazali na maye bazali kosala.
109. Bino nde ba oyo bato bozali kosuana mpona bango mpona bomoyi ya nsé; kasi nani akosuanisa na Allah mpona bango na mokolo ya suka? To nani akozala mobateli na bango?.
113. Mpe soki ezalaki bolamu ya Allah mpe mawa naye te likolo nayo, nde lisanga kati na bango balukaki kobungisa yo. Kasi bakomibungisa sé bango moko. Mpe bakosala yo mabe moko te. Mpe Allah akitisi buku epai nayo na bwanya. Mpe atangisi yo maye ozalaki na boyebi na yango te. Mpe lisalisi ya Allah ezali epai nayo ebele.
114. Litomba ezali te na ebele ya makita na bango bazali kosala, sé na moto oyo azali kotinda na bokabi mpe na bolamu to mpe boyokani kati ya bato. Oyo akosala yango na koluka bosepelisi ya Allah, tokopesa ye lifuta linene.
115. Kasi oyo akosala bokeseni na motindami sima na polele mpe lisungi esili koyela ye, mpe alandi nzela ya bandimi te, tokopesa ye maye azali koluka, mpe tokomema ye na lifelo, mpe oyo nde bozongi ya mabe!
116. Ya sôló, Allah alimbisaka te soki basangisi ye na banzambe misusu, kasi alimbisaka masumu masusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah asili kobunga libunga ya mosika.
122. Kasi ba oyo bandimi mpe basali misala ya malamu, tokokotisa bango na kati ya paradizu, wapi epai mingala mizali kotiola. Na kati bakozala seko na seko. Elaka ya Allah ezali ya sôló. Nani yango akoloba bosembo koleka Allah?!
123. Oyo ezali kowuta na mposa na bino te ezali mpe kowuta na mposa ya baye bazua buku liboso na bino te. Oyo akosala mosala ya mabe akofutama na yango, mpe akozua mobateli te na botiki Allah, mpe akozua mosalisi te.
125. Nani azali na lingomba ya kitoko koleka moto oyo amisoki mpe apesi elongi naye epai ya Allah, mpe ye azali moto malamu, mpe alandi lingomba ya Ibrâhîm ya bomoko ya Allah, kasi Allah azuaki Ibrâhîm moninga naye.
127. Bakotunaka yo(1) mpo ete olimbola bango likambo litali basi, loba: Allah atie mobeko na likolo na yango, mpe na maye masilaki kotangema okati ya buku likambo ya bitike ya basi bozali kopesa bango te maye ekomami mpo na bango. Mpe bozali kolikia ete bobala bango, mpe lisusu bana mike baye bakomi naino makasi te. Esengeli na bino kozala semba kati kati na bana bitike. Kasi maye manso ya malamu, bozali kosala Allah ayebi, mpe azali komona yango.
1 Muhammad: Kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye.
128. Mpe soki mwasi azali kobanga ete mobali naye asundola ye, ezali lisumu te ete bayokana na likambo moko boye ya malamu, mpe boyokani nde ezali malamu; mpamba te, mpo milimo ya bato emesana mingi na mabe, mpe soki bobongisi mpe bobangi Allah, ya sôló, Allah ayebi mpe azali na sango ya maye bozali kosala.
129. Bokokoka te kozala semba kati kati ya basi na bino ata bosali ndenge nyoso. Kasi bopesa mokongo te na mosusu nakosundola ye mobimba. Mpe soki boyokani mpe bobangi, ya sôló, Allah azali molimbisi atonda mawa.
134. Moto oyo akolinga lifuta ya bomoyi ya mokili, ayeba ete lifuta ya bomoyi ya mokili na ya mokolo ya suka ezali epai na Allah. Mpe Allah azali moyoki mpe momoni.
135. Eh bino bandimi! botelema ngwii na bosembo bozala banzeneneke ya Allah, ata likolo ya banzoto na bino, to baboti na bino to mpe mabota ma bino, ata moto yango azali na bozui to azali mobola, Allah azali na bokonzi likolo na bango. Bolanda bamposa ya nzoto te oyo ekotikisa bino bosembo, soki bomemi litatoli ya lokuta to mpe boboyi kotatola, kasi boyeba ete ya sôló, Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
136. Eh bino bandimi! Bondima na Allah mpe na motindami naye, mpe na buku eye akitisaki epai ya motindami naye mpe buku eye akitisaki liboso na bino. Kasi oyo akopengwa na Allah na ba anzelu naye na babuku naye, mpe na batindami naye mpe na mokolo ya suka, ya sôló, ye wana nde asili kobunga libunga moko ya mosika.
137. Ya sôló, ba oyo bandimi sima bapengwi, sima bandimi sima bapengwi lisusu, sima bamibakisi bopengwi, Allah akolimbisa bango te akokamba mpe bango na nzela ya semba te.
140. (Allah) asilaki kokitisa epai na bino o’kati na buku ete soki boyoki bazali kopengwa na mikapo mia Allah to bazali kotiola yango, bofanda esika moko na bato wana te kino bakotika, mpe kozua lisolo mosusu. Noki te bokozala lokola bango. Ya sôló, Allah akosangisa bato ya bilongi mibale na bapagano na esika moko na lifelo.
141. Bango bazali kokengele bino na mayele mabe, sókó elonga ekomeli bino kowuta epai ya Allah, bango bakoloba ete: Tozali na bino elongo te? Sókó bapagano bazui elonga bakoloba biso nde tolongisi bino, mpe tobateli bino likolo ya bandimi? Allah azali zuzi likolo na bino o mokolo mwa lisekwa, mpe Allah akopesa bapagano nzela te likolo ya bandimi.
146. Longola sé baye batubeli mpe babongisi, sima bakangami na Allah, mpe babongisi lingomba na bango mpona Allah; bango wana nde bazali na bandimi elongo mpe Allah akopesa bandimi lifuta ya monene.
150. Ya sôló, baye bazali kompengwa na Allah na batindami naye, mpe balingaka kokabola Allah na batindami naye, mpe balobaka ete: Tondimi na ndambu mpe tompengwi na ndambu, mpe balukaka na yango nzela ya kobimela,
152. Mpe ba oyo bandimi na Allah na batindami naye, mpe bakaboli kati na batindami naye te, bango wana nde bakozua lifuta na bango. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
153. Baye bazua buku bazali kotuna yo ete okitisela bango buku kowuta na likolo. Basilaki kotuna Mûssa ya monene koleka wana. Mpe balobaki naye ete: Lakisa biso Allah tomona ye polele! Na sima nkake ya makasi ebetaki bango na ntina na mabe na bango. Mpe basambelaki mwana ngombe sima ya maye bazalaki na ndimbola na yango, mpe tolimbisaki bango, na sima topesaki Mûssa bokonzi ya polele.
154. Mpe totombolaki likolo na mitu na bango ngomba(1) mpona elaka tozuaki na bango, mpe tolobaki na bango ete: bokota na monoko ya ndako na kofukama. Mpe tolobaki na bango lisusu ete: Bobebisa mobeko ya mokolo ya mposo te (saba), mpe tozuaki na bango elaka moko ya makasi.
155. Mpe na ntina ete tolakeli bango mabe mpona kozanga botosi na elaka na bango, mpe mpona bopagano na bango ya koboya kondima na emoniseli ya Allah, mpe mpona bizaleli na bango ya koboma ba ntoma na ntina te, mpe na maloba na bango: Mitema mia biso mikangama, kasi Allah nde abeteli yango mpalata mpona bopagano na bango, bakondimaka te sé bato moke kati na bango.
157. Mpe na maloba na bango: Ya sôló biso tobomi Issa masiya mwana na Maryam motindami ya Allah, kasi babomaki ye te, mpe babakaki ye te, nzoka nde eyelaki bango elongi lokola ye, mpe ba oyo bakabwanaki mpona ye batikalaki na kati na koyimayima, bazali na boyebi na likambo yango mpenza te sé makanisi, kasi ya sôló mpenza babomaki ye te.
161. Mpe bazali kozua ekotama, na bango basilaki kopekisama na yango mpe kolia misolo ya bato na lokuta, mpe tolengeli bapagano kati na bango etumbu ya makasi.
162. Kasi baye batonda mayele kati na bango na bandimi bazali kondima na maye ekiti epai nayo na maye makiti liboso nayo, mpe baye batelemisaka losambo, mpe bapesaka zakat, mpe bandimaka na Allah na mokolo ya suka, bango wana nde tokopesa bango lifuta ya monene.
163. Ya sôló tokitisi epai nayo emoniseli ndenge moko tokitisàki epai na Nûh na bantoma sima naye, mpe tokitisaki epai na Ibrâhîm, mpe Ismâïl na Is’hâq na Ya’qûb na bamabota, ndenge moko mpe tokitisaki epai ya Issa na Ayûb na Yûnus na Hâruna(1) mpe Suleyman, mpe topesaki Dâwud zabur.(2)
1 Hâruna: Bótala suratu Al-Baqarah: 248.
2 Zabur: Ezali buku ya Dâwud (Davidi).
165. Batindami baye bazali bapesi sango malamu, mpe bakebisi mpona etumbu mpo ete bato bazala lisusu na likambo ya koloba te liboso na Allah sima ya boyei ya batindami, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya.
166. Kasi Allah azali kotatola na maye akitisi yango epai nayo ete akitisaki yango na boyebi naye moko, mpe ba anzelu bazali kotatola na yango, mpe Allah akoki lokola motatoli.
170. Eh! Bino bato, ya sôló motindami asili koyela bino bosembo kowuta epai na Nkolo na bino bondima na yango ezali malamu mpona bino, kasi soki boboyi, boyeba ete ya sôló maye manso mazali na likolo mpe na nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
171. Eh! Bino bozwa buku bolekisa ndelo te na lingomba na bino, mpe bolobela Allah sé bosembo, ya sôló Masiya Issa mwana ya Maryam azali sé motindami ya Allah mpe liloba naye oyo atia epai ya Maryam mpe molimo kowuta epai naye,(1) bondima na Allah na batindami naye, kasi boloba te ete(1) azali misato, soki botiki ezali malamu mpona bino, ya sôló Allah azali Nzambe moko nkembo naye ete azala na mwana, maye manso mazali o’likolo mpe o’nse mazali ya ye, Allah ye nde azali mobateli oyo akoka.
172. Masiya akoyoka nsoni te ete azala mowumbu ya Allah ndenge moko na ba anzelu (naye) ya pembeni, na moto oyo akoyoka nsoni na mabondeli naye (Allah) mpe asali lolendo, bayeba ete ye (Allah) akosangisa bango nyonso epai naye.
176. Bakotunaka yo loba: Allah azali kopesa bino mobeko naye mpona kalâlat,(1) soki mobali akufi azali na mwana te kasi azali na ndeko ya mwasi akozua kati kati ya biloko ya mowei atiki, kasi ye akokitana naye na biloko nyoso oyo ndeko mwasi atiki soki azali na mwana te, kasi soki atikaki bandeko mibale ya basi, bakozua mibale na misato, kasi soki atiki bandeko ya basi ebele na bandeko ya mibali ebele, eteni ya mobali ezali eteni ya basi mibale, naboye nde Allah azali kolimbola bino mpo ete bobunga te mpe Allah azali moyebi ya biloko binso.
4. إبقاء معلومات نسخة الترجمة الموجودة داخل المستند.
5. إفادة المصدر (QuranEnc.com) بأي ملاحظة على الترجمة.
6. تطوير الترجمات وفق النسخ الجديدة الصادرة من المصدر (QuranEnc.com).
7. عدم تضمين إعلانات لا تليق بترجمات معاني القرآن الكريم عند العرض.
نتائج البحث:
API specs
Endpoints:
Sura translation
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/sura/{translation_key}/{sura_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified sura (by its number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114)
Returns:
json object containing array of objects, each object contains the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".
GET / https://quranenc.com/api/v1/translation/aya/{translation_key}/{sura_number}/{aya_number} description: get the specified translation (by its translation_key) for the speicified aya (by its number sura_number and aya_number)
Parameters: translation_key: (the key of the currently selected translation) sura_number: [1-114] (Sura number in the mosshaf which should be between 1 and 114) aya_number: [1-...] (Aya number in the sura)
Returns:
json object containing the "sura", "aya", "translation" and "footnotes".