কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ - লিঙ্গালা ভাষায় অনুবাদ * - অনুবাদসমূহের সূচী

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অর্থসমূহের অনুবাদ সূরা: সূরা ইউনুস   আয়াত:

Yûnus (YONA)

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡحَكِيمِ
1. Alif, lâm, râ(1). Wana ezali mikapo ya buku ya bwanya.
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَكَانَ لِلنَّاسِ عَجَبًا أَنۡ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ رَجُلٖ مِّنۡهُمۡ أَنۡ أَنذِرِ ٱلنَّاسَ وَبَشِّرِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَنَّ لَهُمۡ قَدَمَ صِدۡقٍ عِندَ رَبِّهِمۡۗ قَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٞ مُّبِينٌ
2. Ezali kokamwisa bato ete topesaki boyebi na mobali moko kati na bango mpo akebisa bato mpe apesa sango elamu epai ya baye bazali kondima, ya soló, bango bazali na lokumu epai ya Nkolo wa bango (тропа mokolo mwa lobi)? Мре bapengwi balobi oyo azali nganga ya polele.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ رَبَّكُمُ ٱللَّهُ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَۖ مَا مِن شَفِيعٍ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ إِذۡنِهِۦۚ ذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمۡ فَٱعۡبُدُوهُۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
3. Ya soló, Nkolo wa bino nde Allah oyo akelaki likolo na mabele na mikolo motoba, sima atombuami likolo ya ngwende azali kotambwisa makambo manso. Moko te akolobelela moninga sé sima ya ye kopesa ndingisa. Wana nde Allah Nkolo wa bino, bobondela ye. Boye bozali kokanisa te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِلَيۡهِ مَرۡجِعُكُمۡ جَمِيعٗاۖ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقًّاۚ إِنَّهُۥ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥ لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ بِٱلۡقِسۡطِۚ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَهُمۡ شَرَابٞ مِّنۡ حَمِيمٖ وَعَذَابٌ أَلِيمُۢ بِمَا كَانُواْ يَكۡفُرُونَ
4. Epai naye nde bokozongisama bino banso; elaka ya Allah ezali sólo, yende abanda kokela bikelamu bia ye mbala ya liboso, sima akosekwisa biango lisusu, mpo afuta na bosembo baye bandimaki mpe basalaki misala milamu. Mpe bapengwi bakomelaka mayi ya moto mpe bakozala na etumbu ya makasi na ntina ete bazalaki bapengwi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ ٱلشَّمۡسَ ضِيَآءٗ وَٱلۡقَمَرَ نُورٗا وَقَدَّرَهُۥ مَنَازِلَ لِتَعۡلَمُواْ عَدَدَ ٱلسِّنِينَ وَٱلۡحِسَابَۚ مَا خَلَقَ ٱللَّهُ ذَٰلِكَ إِلَّا بِٱلۡحَقِّۚ يُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
5. Ye nde akela mwese (moyi) lokola muinda mpe akela sanza engengisaka, mpe akokisaki botamboli bia yango, mpo boyeba kotanga mibu, mpe boyeba mituya. Allah akelaki yango te sé na bosôló, azali kolimbola bilembo bia ye mpo bato bayeba.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ فِي ٱخۡتِلَٰفِ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ وَمَا خَلَقَ ٱللَّهُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَّقُونَ
6. Ya soló, na kati ya bokeseni ya butu mpe moyi mpe na manso maye Allah akela na likolo mpe na mabele, ezali bilembo тропа bato baye bazali kobanga.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا وَرَضُواْ بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَٱطۡمَأَنُّواْ بِهَا وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَنۡ ءَايَٰتِنَا غَٰفِلُونَ
7. Ya solo, baye bazali kolikya te kokutana na biso, mpe basepeli na bomoyi ya nsé mpe bamoni ete bazali na kimia тропа yango, ndenge moko na baye bazali kokanisa te na mikapo mpe bilembo bia biso.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أُوْلَٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمُ ٱلنَّارُ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
8. Baye bana esika na bango ekozalaka nde na moto тропа maye bazalaki kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ يَهۡدِيهِمۡ رَبُّهُم بِإِيمَٰنِهِمۡۖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمُ ٱلۡأَنۡهَٰرُ فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
9. Ya solo, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokambaka bango тропа bondimi. Na bango bakozalaka o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakovandaka o Iola eye etonda bomengo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
دَعۡوَىٰهُمۡ فِيهَا سُبۡحَٰنَكَ ٱللَّهُمَّ وَتَحِيَّتُهُمۡ فِيهَا سَلَٰمٞۚ وَءَاخِرُ دَعۡوَىٰهُمۡ أَنِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
10. Kuna na kati kosenga na bango ekozalaka sé ete: Lokumu nayo Nzambe, mpe losako na bango ekozala sé kimia, mpe mabondeli na bango ya suka nde ete matondi na Allah Nkolo wa molongo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ وَلَوۡ يُعَجِّلُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ ٱلشَّرَّ ٱسۡتِعۡجَالَهُم بِٱلۡخَيۡرِ لَقُضِيَ إِلَيۡهِمۡ أَجَلُهُمۡۖ فَنَذَرُ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا فِي طُغۡيَٰنِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
11. Mpe soki Allah atiyelaka bato mabe ezua bango na lombango ndenge balukaka bolamu na lombangu, nde suka ya bomoyi bwa bango esila kokoka. Mpe topesi elaka na baye bazali kolikya te na bokutani bwa biso. Bazali na koyimayima na kati ya kolekisa ndelo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِذَا مَسَّ ٱلۡإِنسَٰنَ ٱلضُّرُّ دَعَانَا لِجَنۢبِهِۦٓ أَوۡ قَاعِدًا أَوۡ قَآئِمٗا فَلَمَّا كَشَفۡنَا عَنۡهُ ضُرَّهُۥ مَرَّ كَأَن لَّمۡ يَدۡعُنَآ إِلَىٰ ضُرّٖ مَّسَّهُۥۚ كَذَٰلِكَ زُيِّنَ لِلۡمُسۡرِفِينَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
12. Mpe soki pasi ezui moto, abengi biso, mpe alali na mopanzi to azali ya kovanda to ya kotelema; mpe tango tokolongola ye pasi ena, akomi kotambola lokola moto abelelaki biso na pasi ezuaki ye te. Na boye nde ebongisami mpo na bato mabe maye bazalaki kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَا ٱلۡقُرُونَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَمَّا ظَلَمُواْ وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَمَا كَانُواْ لِيُؤۡمِنُواْۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
13. Mpe ya soló, tosilaki koboma mapinga ebele maye malekaki liboso lia bino, тропа bobubi bwa bango, mpe batindami ba bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimaki te. Ndenge wana nde tokofutaka batomboki.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ثُمَّ جَعَلۡنَٰكُمۡ خَلَٰٓئِفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لِنَنظُرَ كَيۡفَ تَعۡمَلُونَ
14. Sima na bango, tokitanisaki bino o kati ya mokili, mpo totala ndenge nini bokosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَاتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا ٱئۡتِ بِقُرۡءَانٍ غَيۡرِ هَٰذَآ أَوۡ بَدِّلۡهُۚ قُلۡ مَا يَكُونُ لِيٓ أَنۡ أُبَدِّلَهُۥ مِن تِلۡقَآيِٕ نَفۡسِيٓۖ إِنۡ أَتَّبِعُ إِلَّا مَا يُوحَىٰٓ إِلَيَّۖ إِنِّيٓ أَخَافُ إِنۡ عَصَيۡتُ رَبِّي عَذَابَ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
15. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bazali kolikya na bokutani na biso te, bakolobaka: Yaka na kurani mosusu kasi oyo te, to bobongola yango! Loba: Esengeli na ngai te kobalola yango na lolenge na ngai, nazali kolanda bobele maye bayebisaki ngai. Ya soló, nazali kobanga soki nazangi botosi na Nkolo wa ngai, noki nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُل لَّوۡ شَآءَ ٱللَّهُ مَا تَلَوۡتُهُۥ عَلَيۡكُمۡ وَلَآ أَدۡرَىٰكُم بِهِۦۖ فَقَدۡ لَبِثۡتُ فِيكُمۡ عُمُرٗا مِّن قَبۡلِهِۦٓۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
16. Loba ete: Soki Allah alingaki, nde natangeli bino yango te, nde mpe nalakisi bino yango te.(1) nasilaki kofanda na bino mibu miyike liboso na yango, boye bozali kokanisa te?
1 Kurani.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِـَٔايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
17. Mpe oyo alekisi kobuba nde oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondimela mikapo mia ye? Ya solo, ye akolongisa batomboki te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَضُرُّهُمۡ وَلَا يَنفَعُهُمۡ وَيَقُولُونَ هَٰٓؤُلَآءِ شُفَعَٰٓؤُنَا عِندَ ٱللَّهِۚ قُلۡ أَتُنَبِّـُٔونَ ٱللَّهَ بِمَا لَا يَعۡلَمُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
18. Mpe bazali kobondela basusu baye bakoki kosala bango mabe to malamu te, batiki Allah, mpe bazali koloba: Ba oyo nde bakolobelela biso epai ya Allah. Loba: Bolingi koloba ete Allah ayebi te maye mazali o likolo na mabele? Lokumu naye Nkolo wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا كَانَ ٱلنَّاسُ إِلَّآ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ فَٱخۡتَلَفُواْۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَقُضِيَ بَيۡنَهُمۡ فِيمَا فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
19. Mpe bato bazalaki (na ebandeli) sé umma(1) moko sima bakabwani na bokeseni na bango. Soki ezalaki na mokano ya Nkolo nayo te, nde likambo lisilaki kokatama kati na bango na ntina ya maye bazalaki kokesene na yango.
1 Umma: Awa elakisi lingomba, bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَقُولُونَ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۖ فَقُلۡ إِنَّمَا ٱلۡغَيۡبُ لِلَّهِ فَٱنتَظِرُوٓاْ إِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُنتَظِرِينَ
20. Bakolobaka ete: Soki ata Nkolo naye akitiselaka ye likamwisi liwuta epai ya Nkolo waye! Mpe loba: Ya soló, mabombami mazali ya Allah, na yango bozela, ya sólo, ngai mpe nazali kozela elongo na bino.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِذَآ أَذَقۡنَا ٱلنَّاسَ رَحۡمَةٗ مِّنۢ بَعۡدِ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُمۡ إِذَا لَهُم مَّكۡرٞ فِيٓ ءَايَاتِنَاۚ قُلِ ٱللَّهُ أَسۡرَعُ مَكۡرًاۚ إِنَّ رُسُلَنَا يَكۡتُبُونَ مَا تَمۡكُرُونَ
21. Mpe soki topesi bato bolamu o sima ya mabe kozua bango, bakomi kobundisa mikapo mia biso. Loba: Allah azali lombango na mwango. Ya sólo batindami na biso (ba anzelu) bazali кокота mwango bozali kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُوَ ٱلَّذِي يُسَيِّرُكُمۡ فِي ٱلۡبَرِّ وَٱلۡبَحۡرِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا كُنتُمۡ فِي ٱلۡفُلۡكِ وَجَرَيۡنَ بِهِم بِرِيحٖ طَيِّبَةٖ وَفَرِحُواْ بِهَا جَآءَتۡهَا رِيحٌ عَاصِفٞ وَجَآءَهُمُ ٱلۡمَوۡجُ مِن كُلِّ مَكَانٖ وَظَنُّوٓاْ أَنَّهُمۡ أُحِيطَ بِهِمۡ دَعَوُاْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ لَئِنۡ أَنجَيۡتَنَا مِنۡ هَٰذِهِۦ لَنَكُونَنَّ مِنَ ٱلشَّٰكِرِينَ
22. Yende azali kotambwisa bino na mokili mpe na ebale. Kino tango bozalaka o kati ya masua, azali kotindela bino mopepe ya kitoko, bozali kosepela na yango. Kino mopepe makasi ya mabe mpe na mbonge moko wuta bipai na bipai mpe bamoni, ete basili kozingama mpe bakomi kobelela Allah na bosembo mpenza, koloba: Soki obikisi biso na oyo, tokozala kati ya baye bazali kotonda yo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَلَمَّآ أَنجَىٰهُمۡ إِذَا هُمۡ يَبۡغُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ بِغَيۡرِ ٱلۡحَقِّۗ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنَّمَا بَغۡيُكُمۡ عَلَىٰٓ أَنفُسِكُمۖ مَّتَٰعَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ ثُمَّ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُكُمۡ فَنُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
23. Mpe soki abikisi bango, okomona bango bakomi kobebisa na bobubi o kati na mokili, batiki bosôló. Oh bino bato! Botomboki bwa bino, bokozongela sé bino moko. Bomoyi búa nsé bisengo ya ntango шоке, sima epai na biso nde bokozongisama, mpe tokoyebisaka bino maye bozalaki kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّمَا مَثَلُ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا كَمَآءٍ أَنزَلۡنَٰهُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ فَٱخۡتَلَطَ بِهِۦ نَبَاتُ ٱلۡأَرۡضِ مِمَّا يَأۡكُلُ ٱلنَّاسُ وَٱلۡأَنۡعَٰمُ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَخَذَتِ ٱلۡأَرۡضُ زُخۡرُفَهَا وَٱزَّيَّنَتۡ وَظَنَّ أَهۡلُهَآ أَنَّهُمۡ قَٰدِرُونَ عَلَيۡهَآ أَتَىٰهَآ أَمۡرُنَا لَيۡلًا أَوۡ نَهَارٗا فَجَعَلۡنَٰهَا حَصِيدٗا كَأَن لَّمۡ تَغۡنَ بِٱلۡأَمۡسِۚ كَذَٰلِكَ نُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لِقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
24. Ya soló, ndakisa ya bomoyi bwa nsé ezali lokola mayi tokitisaka kowuta o likolo, mpe esangani na milona (matiti) ya mabele, ezali koleisa bato na banyama, kino mabele ekozua bonzenga na yango mpe ekomisi bilanga kitoko, bakolo na yango bazali kokanisa ete bazali na bokoki likolo na yango, mpe mokano na biso moko eyelaki yango butu to moyi, mpe tokomisi yango pamba lolenge mosusu lokola eloko ezalaki te liboso. Lolenge wana nde tozali kolimbola bilembo bia biso, mpo bato bakoka kososolo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱللَّهُ يَدۡعُوٓاْ إِلَىٰ دَارِ ٱلسَّلَٰمِ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
25. Allah azali kobenga bato na ndako ya kimia, mpe akambaka oyo alingi o nzela ya semba.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ لِّلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ ٱلۡحُسۡنَىٰ وَزِيَادَةٞۖ وَلَا يَرۡهَقُ وُجُوهَهُمۡ قَتَرٞ وَلَا ذِلَّةٌۚ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
26. Mpona baye bazali kosala bolamu, babombeli bango (lifuti) ya kitoko koleka na litabisi(1) mpe bilongi bia bango bikoyindaka na milinga te, mpe bikokitisama te. Bango nde bato ba Iola, bakovandaka libela kati na yango.
1 Litabisi: Kornona elongi ya Allah.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱلَّذِينَ كَسَبُواْ ٱلسَّيِّـَٔاتِ جَزَآءُ سَيِّئَةِۭ بِمِثۡلِهَا وَتَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٞۖ مَّا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِنۡ عَاصِمٖۖ كَأَنَّمَآ أُغۡشِيَتۡ وُجُوهُهُمۡ قِطَعٗا مِّنَ ٱلَّيۡلِ مُظۡلِمًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
27. Mpe baye basalaki mabe, bakofutamaka na mabe lokola yango, mpe milinga miyindo mia mabe mikolinga bango. Bakosalisaka bango na etumbu ya Allah te, lokola eteni ya butu na molili ya makasi mozipaki bilongi bia bango. Bango nde bato ba moto, bakovandaka libela o kati na yango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَوۡمَ نَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا ثُمَّ نَقُولُ لِلَّذِينَ أَشۡرَكُواْ مَكَانَكُمۡ أَنتُمۡ وَشُرَكَآؤُكُمۡۚ فَزَيَّلۡنَا بَيۡنَهُمۡۖ وَقَالَ شُرَكَآؤُهُم مَّا كُنتُمۡ إِيَّانَا تَعۡبُدُونَ
28. Mpe kanisa mokolo moye tokosangisaka bango banso, sima tokolobaka na baye basangisaki (ngai na banzambe mosusu): Wapi esika na bino na banzambe na bino! Mpe tokaboli kati na bango mpe banzambe na bango bakoloba ete: Bozalaki kobondela biso te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَكَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدَۢا بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمۡ إِن كُنَّا عَنۡ عِبَادَتِكُمۡ لَغَٰفِلِينَ
29. Allah akoki lokola nzeneneke kati na biso na bino. Ya soló, penza tozalaki na bokeseni na mabondeli na bino.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُنَالِكَ تَبۡلُواْ كُلُّ نَفۡسٖ مَّآ أَسۡلَفَتۡۚ وَرُدُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِ مَوۡلَىٰهُمُ ٱلۡحَقِّۖ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
30. Na tango wana molimo na molimo akoyeba maye awelisaki kosala liboso. Mpe sima, bakozongisama epai ya Allah mokonzi na bango ya sólo, mpe bakobungisa maye manso basalaki.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ مَن يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ أَمَّن يَمۡلِكُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَمَن يُخۡرِجُ ٱلۡحَيَّ مِنَ ٱلۡمَيِّتِ وَيُخۡرِجُ ٱلۡمَيِّتَ مِنَ ٱلۡحَيِّ وَمَن يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَۚ فَسَيَقُولُونَ ٱللَّهُۚ فَقُلۡ أَفَلَا تَتَّقُونَ
31. Loba: Nani azali koleisa bino kowuta na likolo mpe na nsé?, тре nani apesaka bomoni na boyoki? Mpe nani apesaka bomoyi kowuta na liwa, mpe liwa kowuta na bomoyi, mpe nani azali kokamba mokili? Bakolobaka: Allah. Мре loba na bango: Boye bozali kobanga te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَذَٰلِكُمُ ٱللَّهُ رَبُّكُمُ ٱلۡحَقُّۖ فَمَاذَا بَعۡدَ ٱلۡحَقِّ إِلَّا ٱلضَّلَٰلُۖ فَأَنَّىٰ تُصۡرَفُونَ
32. Wana nde Allah, Nkolo wa bino ya soló. Nini sima ya bosembo eyaka sé libungi, kasi тропа nini bozali kotengama?
আরবি তাফসীরসমূহ:
كَذَٰلِكَ حَقَّتۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ عَلَى ٱلَّذِينَ فَسَقُوٓاْ أَنَّهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
33. Ndenge wana nde liloba lia Nkolo wayo lizalaki solo epai ya baye babebisaki, mpo solo penza bazalaki kondima te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۚ قُلِ ٱللَّهُ يَبۡدَؤُاْ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥۖ فَأَنَّىٰ تُؤۡفَكُونَ
34. Loba: Nalingi koyeba banzambe na bino, basusu kati na bango bakelaka mpe bazongisaka ekelamu na bomoyi (o sima ya liwa?) loba: Allah ye mei nde abandaki ekelamu mpe akozongisa ye, тропа nini bolingi komitiya mosika na kokumisa ye?
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ هَلۡ مِن شُرَكَآئِكُم مَّن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّۚ قُلِ ٱللَّهُ يَهۡدِي لِلۡحَقِّۗ أَفَمَن يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلۡحَقِّ أَحَقُّ أَن يُتَّبَعَ أَمَّن لَّا يَهِدِّيٓ إِلَّآ أَن يُهۡدَىٰۖ فَمَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
35. Loba: Boye okati ya banzambe na bino, ezali na moko oyo azali kokamba na nzela ya bosembo? Loba: Allah nde akambaka na bosoló, boye oyo akambaka na nzela ya bosóló nde akoki ete balanda to oyo akambaka sé soki akambami? Ndenge nini bozali kokata likambo na motindo oyo?
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا يَتَّبِعُ أَكۡثَرُهُمۡ إِلَّا ظَنًّاۚ إِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِمَا يَفۡعَلُونَ
36. Mpe ebele kati na bango bazali kolanda sé makanisi, kasi makanisi ekosala bosembo eloko moko te, ya soló Allah ayebi malamu maye bazali kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا كَانَ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانُ أَن يُفۡتَرَىٰ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِن تَصۡدِيقَ ٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِ وَتَفۡصِيلَ ٱلۡكِتَٰبِ لَا رَيۡبَ فِيهِ مِن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
37. Kurani oyo ekoki kokelama te mpe bakoki kopesa yango na moto mosusu te na esika ya Allah, kasi; eyei тропа kondima na oyo ekitaki liboso na yango, mpe ezali ndimbola ya buku, tembe ezali te kati na yango, ewuti epai ya Nkolo ya molongo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ فَأۡتُواْ بِسُورَةٖ مِّثۡلِهِۦ وَٱدۡعُواْ مَنِ ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
38. To bazali koloba ete: (Muhammad) nde asalaki yango na ndenge naye, loba: Boya na suratu lokola oyo, mpe bobenga baye banso bakoki kosalisa bino na botiki Allah soki bozali bato ya bosembo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِمَا لَمۡ يُحِيطُواْ بِعِلۡمِهِۦ وَلَمَّا يَأۡتِهِمۡ تَأۡوِيلُهُۥۚ كَذَٰلِكَ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلظَّٰلِمِينَ
39. Kasi baboyaki kondima na eloko ya motuya oyo bazali na boyebi na yango te mpe bososoli na yango ekomelaki mpe bango te, lolenge moko na baye balekaki liboso na bango babukaki lokuta. Mpe tala ndenge nini bato mabe basukaki.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمِنۡهُم مَّن يُؤۡمِنُ بِهِۦ وَمِنۡهُم مَّن لَّا يُؤۡمِنُ بِهِۦۚ وَرَبُّكَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُفۡسِدِينَ
40. O kati na bango, basusu bazali kondima na yango, mpe basusu bazali kondima na yango te. Kasi Nkolo wayo ayebi malamu babebisi koleka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِن كَذَّبُوكَ فَقُل لِّي عَمَلِي وَلَكُمۡ عَمَلُكُمۡۖ أَنتُم بَرِيٓـُٔونَ مِمَّآ أَعۡمَلُ وَأَنَا۠ بَرِيٓءٞ مِّمَّا تَعۡمَلُونَ
41. Mpe soki baboyi kondimela yo, loba: Nazali na mosala mwa ngai, mpe bozali na mosala mia bino. Bino bozali kowangana maye nazali kosala, ngai mpe nawangani maye bozali kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمِنۡهُم مَّن يَسۡتَمِعُونَ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تُسۡمِعُ ٱلصُّمَّ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يَعۡقِلُونَ
42. Mpe kati na bango ezali na baye bazali koyokela yo. Boye yo nde okoyokisa bakufi matoyi, ata soki bazali koyeba te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمِنۡهُم مَّن يَنظُرُ إِلَيۡكَۚ أَفَأَنتَ تَهۡدِي ٱلۡعُمۡيَ وَلَوۡ كَانُواْ لَا يُبۡصِرُونَ
43. Mpe kati na bango, baye bazali kotala yo. Boye yo nde okambaka bakufi miso, ata soki bazali kornona te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَظۡلِمُ ٱلنَّاسَ شَيۡـٔٗا وَلَٰكِنَّ ٱلنَّاسَ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
44. Ya soló, Allah abubaka bato na eloko te, bato bango moko nde bazali komibuba.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ كَأَن لَّمۡ يَلۡبَثُوٓاْ إِلَّا سَاعَةٗ مِّنَ ٱلنَّهَارِ يَتَعَارَفُونَ بَيۡنَهُمۡۚ قَدۡ خَسِرَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱللَّهِ وَمَا كَانُواْ مُهۡتَدِينَ
45. Mpe mokolo oyo akosangisa bango, ekozala lokola bavandaki ngonga moko ya mokolo, bakoyebana bango na bango. Kasi baye bazali koboya kondima na bokutani na Allah, bango nde bazangi, mpe bakambami te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِمَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ ثُمَّ ٱللَّهُ شَهِيدٌ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ
46. Mpe soki tolingi tokolakisa yo ndambu ya etumbu oyo tokani тропа bango, to mpe okokufa liboso mpo ete eyela bango sima nayo, mpe na sima epai na biso nde bakozongisama, mpe na suka Allah azali nzeneneke likolo ya maye bazali kosala.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلِكُلِّ أُمَّةٖ رَّسُولٞۖ فَإِذَا جَآءَ رَسُولُهُمۡ قُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡقِسۡطِ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
47. Mpe umma(1) nionso ezali na motindami. Mpe tango motindami na bango ayaki makambo ekatanaki na bosembo, mpe moko te abubamaki.
1 Umma: Ezali etonga: Allah azalaki kotinda na etonga nionso motindami to ntoma, kowuta na Adam, kino Muhammad oyo azali motindami mpe ntoma yasuka na ndembe na biso bótala mpe na suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
48. Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali bato ya bosembo?.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُل لَّآ أَمۡلِكُ لِنَفۡسِي ضَرّٗا وَلَا نَفۡعًا إِلَّا مَا شَآءَ ٱللَّهُۗ لِكُلِّ أُمَّةٍ أَجَلٌۚ إِذَا جَآءَ أَجَلُهُمۡ فَلَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ سَاعَةٗ وَلَا يَسۡتَقۡدِمُونَ
49. Loba: Nazali na eloko moko te ya kosala na nzoto na ngai kowuta na pasi to bisengo sé maye Allah akolinga. Mpe umma nionso bazali na elaka na bango. Soki ngonga yango ekoki, bakozongisa yango sima te, mpe bakotindika yango liboso te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِنۡ أَتَىٰكُمۡ عَذَابُهُۥ بَيَٰتًا أَوۡ نَهَارٗا مَّاذَا يَسۡتَعۡجِلُ مِنۡهُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
50. Loba: Bomoni boni, soki etumbu naye eyeli bino na butu mpe na moyi? Boye batomboki bakoki kokima yango?
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَثُمَّ إِذَا مَا وَقَعَ ءَامَنتُم بِهِۦٓۚ ءَآلۡـَٰٔنَ وَقَدۡ كُنتُم بِهِۦ تَسۡتَعۡجِلُونَ
51. Mpe boye soki (etumbu) ekweyeli bino bokondimaka na yango? (bakoyebisaka bino) sikoyo; bozalaki kolinga eyela bino noki?
আরবি তাফসীরসমূহ:
ثُمَّ قِيلَ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡخُلۡدِ هَلۡ تُجۡزَوۡنَ إِلَّا بِمَا كُنتُمۡ تَكۡسِبُونَ
52. Sima ekolobama na baye basalaki mabe ete: Bomeka etumbu ya libela, boye bokofutama sé na maye bosalaki?
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ وَيَسۡتَنۢبِـُٔونَكَ أَحَقٌّ هُوَۖ قُلۡ إِي وَرَبِّيٓ إِنَّهُۥ لَحَقّٞۖ وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ
53. Mpe bazali kotuna yo sango ya etumbu mpe lisekwa ete: Ezali ya soló? Loba: Iyo; nalapi na Nkolo wa ngai! Ezali ya soló penza. Mpe bokokoka kokima yango te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَوۡ أَنَّ لِكُلِّ نَفۡسٖ ظَلَمَتۡ مَا فِي ٱلۡأَرۡضِ لَٱفۡتَدَتۡ بِهِۦۗ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّدَامَةَ لَمَّا رَأَوُاْ ٱلۡعَذَابَۖ وَقُضِيَ بَيۡنَهُم بِٱلۡقِسۡطِ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
54. Soki maye mazali na mabele ezalaki na maboko ya moto oyo asili kosala masumu ebele, alingaki kopesa yango na lombango тропа komikangola na etumbu na biso. Mpe bakobombaka mawa na bango tango bamoni etumbu, mpe bakata makambo kati na bango na bosembo, mpe bakobubamaka te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَلَآ إِنَّ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ أَلَآ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
55. Maye manso mazali kati na likolo na mabele, mazali ma Allah. Elaka ya Allah ezali solo, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
56. Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai naye nde bokozonga.
আরবি তাফসীরসমূহ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ قَدۡ جَآءَتۡكُم مَّوۡعِظَةٞ مِّن رَّبِّكُمۡ وَشِفَآءٞ لِّمَا فِي ٱلصُّدُورِ وَهُدٗى وَرَحۡمَةٞ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
57. Oh bino bato! Ya sólo, malendisi masili koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino, mpe yango ezali libiki (kurani) ya maye mazali okati ya mitema, ezali mpe lisungi na nzela ya bokambi mpe ngolu тропа bandimi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ بِفَضۡلِ ٱللَّهِ وَبِرَحۡمَتِهِۦ فَبِذَٰلِكَ فَلۡيَفۡرَحُواْ هُوَ خَيۡرٞ مِّمَّا يَجۡمَعُونَ
58. Loba: Oyo ewuti na ngolu ya Allah na bolamu naye, mpe wana ezali mpo basepela na yango koleka maye bazali kosangisa.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ أَرَءَيۡتُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ لَكُم مِّن رِّزۡقٖ فَجَعَلۡتُم مِّنۡهُ حَرَامٗا وَحَلَٰلٗا قُلۡ ءَآللَّهُ أَذِنَ لَكُمۡۖ أَمۡ عَلَى ٱللَّهِ تَفۡتَرُونَ
59. Loba: Bomoni boni тропа bozui oyo Allah akitiseli bino, sima bokaboli yango, ya mabe na ya malamu? Loba: Boye Allah nde apesi bino ndingisa wana to bozali kobukela Allah lokuta?
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا ظَنُّ ٱلَّذِينَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَذُو فَضۡلٍ عَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَشۡكُرُونَ
60. Mpe baye bazali kobukela Allah lokuta bakanisaka nini тропа mokolo mwa suka? Ya soló, Allah azali Nkolo bolamu тропа bato, kasi ebele na bango bazali kotondo te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا تَكُونُ فِي شَأۡنٖ وَمَا تَتۡلُواْ مِنۡهُ مِن قُرۡءَانٖ وَلَا تَعۡمَلُونَ مِنۡ عَمَلٍ إِلَّا كُنَّا عَلَيۡكُمۡ شُهُودًا إِذۡ تُفِيضُونَ فِيهِۚ وَمَا يَعۡزُبُ عَن رَّبِّكَ مِن مِّثۡقَالِ ذَرَّةٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِ وَلَآ أَصۡغَرَ مِن ذَٰلِكَ وَلَآ أَكۡبَرَ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٍ
61. Ozalaka kati ya moko ya likambo te, otangaka kurani te mpe bosalaka eloko te, sé ete tozala na yango ba nzeneneke tango bozali kokana тропа kosala. Mpe Nkolo nayo abungisaka eloko te ata ezali токе lokola mbuma ya zelo ezali na nsé to likolo, ata ezali токе lisusu koleka wana, na ya monene lokola, esila kokomama na buku ya polele.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَلَآ إِنَّ أَوۡلِيَآءَ ٱللَّهِ لَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
62. Talá ya sólo, balingami ya Allah, kobanga ezali тропа bango te mpe bakoyoka mawa te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَكَانُواْ يَتَّقُونَ
63. Baye bandimaki mpe bazalaki na bobangi (Allah).
আরবি তাফসীরসমূহ:
لَهُمُ ٱلۡبُشۡرَىٰ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِۚ لَا تَبۡدِيلَ لِكَلِمَٰتِ ٱللَّهِۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
64. Bakopesama sango elamu na bomoyi bwa mokili na o mokolo mwa suka, mpe liloba lia Allah likobongwamaka te. Wana nde elonga enene.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَا يَحۡزُنكَ قَوۡلُهُمۡۘ إِنَّ ٱلۡعِزَّةَ لِلَّهِ جَمِيعًاۚ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
65. Koyoka mpasi te тропа maye bazali koloba. Ya soló, bokasi bonso bozali bwa Allah. Azali moyoki atonda boyebi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَلَآ إِنَّ لِلَّهِ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَن فِي ٱلۡأَرۡضِۗ وَمَا يَتَّبِعُ ٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ شُرَكَآءَۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَإِنۡ هُمۡ إِلَّا يَخۡرُصُونَ
66. Yeba ete, maye manso mazuami o likolo mpe o mabele mazali ma Allah. Baye bazali kokumisa banzambe basusu na botiki Allah, bazali kolanda nini? Bazali kolanda sé makanisi, kasi bazali sé komikosa.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِتَسۡكُنُواْ فِيهِ وَٱلنَّهَارَ مُبۡصِرًاۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَسۡمَعُونَ
67. Ye nde atiyelaki bino butu mpo bopema na yango, mpe moyi mpo bótala mpe botambola. Wana ezali solo bilembo mpo ete bato bakokaka koyoka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قَالُواْ ٱتَّخَذَ ٱللَّهُ وَلَدٗاۗ سُبۡحَٰنَهُۥۖ هُوَ ٱلۡغَنِيُّۖ لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ إِنۡ عِندَكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭ بِهَٰذَآۚ أَتَقُولُونَ عَلَى ٱللَّهِ مَا لَا تَعۡلَمُونَ
68. Bazali koloba ete: Allah azui mwana nkembo naye. Atonda bomengo, manso mazali na likolo na mabele mazali ya ye. Boye bozali na elembetele moko тропа yango? (mpo bozali koloba ete; Allah abota), boye Bozali koloba na Allah (makambo) maye bozali na boyebi na yango te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ لَا يُفۡلِحُونَ
69. Loba: Baye bazali kobukela Allah lokuta, bakolongaka te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
مَتَٰعٞ فِي ٱلدُّنۡيَا ثُمَّ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ ثُمَّ نُذِيقُهُمُ ٱلۡعَذَابَ ٱلشَّدِيدَ بِمَا كَانُواْ يَكۡفُرُونَ
70. Bazali sé na bosepeli (токе) kati ya mokili, sima bakozongisamaka epai na biso, mpe tokomekisaka bango etumbu ekasi тропа maye bapengwaki na yango,.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ وَٱتۡلُ عَلَيۡهِمۡ نَبَأَ نُوحٍ إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦ يَٰقَوۡمِ إِن كَانَ كَبُرَ عَلَيۡكُم مَّقَامِي وَتَذۡكِيرِي بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَعَلَى ٱللَّهِ تَوَكَّلۡتُ فَأَجۡمِعُوٓاْ أَمۡرَكُمۡ وَشُرَكَآءَكُمۡ ثُمَّ لَا يَكُنۡ أَمۡرُكُمۡ عَلَيۡكُمۡ غُمَّةٗ ثُمَّ ٱقۡضُوٓاْ إِلَيَّ وَلَا تُنظِرُونِ
71. Mpe betela bango sango ya Nûh, tango alobaki na bato naye: Oh bato na ngai! Soki kofanda na ngai na bino, mpe mateya na ngai тропа bilembo ya Allah eleki bino kilo, kasi namipesi (mobimba mwa ngai) nyonso epai ya Allah. Boyokana na basangani ba bino banso mpe bobomba makanisi та bino te. Sima bozuela ngai mokano, kasi bozelisa te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَمَا سَأَلۡتُكُم مِّنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِۖ وَأُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
72. Kasi soki bopesi mikongo na koboya, nasengi bino lifuta te, lifuta lia ngai likowutaka sé epai ya Allah, тре natindamaki mpo nazala o kati ya bamizilima.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَكَذَّبُوهُ فَنَجَّيۡنَٰهُ وَمَن مَّعَهُۥ فِي ٱلۡفُلۡكِ وَجَعَلۡنَٰهُمۡ خَلَٰٓئِفَ وَأَغۡرَقۡنَا ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَاۖ فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
73. Baboyaki kondimela ye, mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa, mpe totiyelaki bango bakitani (kati na mokili) mpe tozindisaki baye baboyaki kondima na bilembo bia biso. Tala ndenge suka ya bakebisami ezalaka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ثُمَّ بَعَثۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِۦ رُسُلًا إِلَىٰ قَوۡمِهِمۡ فَجَآءُوهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَمَا كَانُواْ لِيُؤۡمِنُواْ بِمَا كَذَّبُواْ بِهِۦ مِن قَبۡلُۚ كَذَٰلِكَ نَطۡبَعُ عَلَىٰ قُلُوبِ ٱلۡمُعۡتَدِينَ
74. Sima naye, totindaki batindami epai ya bato ba bango, bayelaki bango bilembo, kasi bandimaki te, sé lokola baye baboyaki kondima liboso. Ndenge wana nde tokangaka mitema mia balekisi ndelo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ثُمَّ بَعَثۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِم مُّوسَىٰ وَهَٰرُونَ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ بِـَٔايَٰتِنَا فَٱسۡتَكۡبَرُواْ وَكَانُواْ قَوۡمٗا مُّجۡرِمِينَ
75. Totindaki Mûssa na Hâruna(1) sima na bango, epai ya falo na bankumu naye na bilembo bia biso, basalaki lolendo, mpe bazalaki batomboki.
1 Hâruna: Bótala suratu: Al-A’râf: 142, Al-An’âm: 84, An-Nisâ: 163, na sarati mokapo: 248.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَلَمَّا جَآءَهُمُ ٱلۡحَقُّ مِنۡ عِندِنَا قَالُوٓاْ إِنَّ هَٰذَا لَسِحۡرٞ مُّبِينٞ
76. Mpe tango bosôló bwa biso boyelaki bango, balobi: Ya soló, oyo ezali bonganga ya polele!
আরবি তাফসীরসমূহ:
قَالَ مُوسَىٰٓ أَتَقُولُونَ لِلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَكُمۡۖ أَسِحۡرٌ هَٰذَا وَلَا يُفۡلِحُ ٱلسَّٰحِرُونَ
77. Mpe Mûssa alobaki na bango été: Bokolobela bosôló na tango esili koyela bino? Kasi yango ezali bonganga mpe banganga balongaka te?
আরবি তাফসীরসমূহ:
قَالُوٓاْ أَجِئۡتَنَا لِتَلۡفِتَنَا عَمَّا وَجَدۡنَا عَلَيۡهِ ءَابَآءَنَا وَتَكُونَ لَكُمَا ٱلۡكِبۡرِيَآءُ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا نَحۡنُ لَكُمَا بِمُؤۡمِنِينَ
78. Balobi: Oyeli biso mpo otiya biso mosika na maye tokutaki bankoko ba biso na yango mpo bokoma bato minene awa na mokili bino mibale? Kasi tokondimelaka bino te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَقَالَ فِرۡعَوۡنُ ٱئۡتُونِي بِكُلِّ سَٰحِرٍ عَلِيمٖ
79. Mpe falo alobi: В óyela ngai banganga banso baye bayebi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَلَمَّا جَآءَ ٱلسَّحَرَةُ قَالَ لَهُم مُّوسَىٰٓ أَلۡقُواْ مَآ أَنتُم مُّلۡقُونَ
80. Mpe tango banganga bayei, Mûssa alobi na bango: Bobwaka maye bolingi kobwaka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَلَمَّآ أَلۡقَوۡاْ قَالَ مُوسَىٰ مَا جِئۡتُم بِهِ ٱلسِّحۡرُۖ إِنَّ ٱللَّهَ سَيُبۡطِلُهُۥٓ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُصۡلِحُ عَمَلَ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
81. Tango babwaki, Mûssa alobi: Oyo boyeyi na yango ezali sé bonganga, Allah akobebisa yango. Ya sólo, Allah abongisaka misala mia babebisi te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيُحِقُّ ٱللَّهُ ٱلۡحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
82. Mpe Allah azali kolongisa bosembo na maloba naye ata soki batomboki bazali koboya.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَمَآ ءَامَنَ لِمُوسَىٰٓ إِلَّا ذُرِّيَّةٞ مِّن قَوۡمِهِۦ عَلَىٰ خَوۡفٖ مِّن فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِمۡ أَن يَفۡتِنَهُمۡۚ وَإِنَّ فِرۡعَوۡنَ لَعَالٖ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِنَّهُۥ لَمِنَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ
83. Mpe bandimaki na Mûssa te sé lisanga moko ya bilenge ya bato ya falo mpo été bazalaki kobanga falo mpe bankumu ya pembeni naye, noki basala bango mabe. Kasi ya soló, falo amitombolaki o kati ya mokili, mpe azalaki o kati ya balekisi ndelo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَقَالَ مُوسَىٰ يَٰقَوۡمِ إِن كُنتُمۡ ءَامَنتُم بِٱللَّهِ فَعَلَيۡهِ تَوَكَّلُوٓاْ إِن كُنتُم مُّسۡلِمِينَ
84. Mpe Mûssa alobaki: Oh bato ba ngai! Soki bondimi na Allah, bomipesa naye. Soki bozali batosi. (bamizilima)
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَقَالُواْ عَلَى ٱللَّهِ تَوَكَّلۡنَا رَبَّنَا لَا تَجۡعَلۡنَا فِتۡنَةٗ لِّلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
85. Balobaki: Tomipesi na Allah, Oh Nkolo wa biso! Kotiyela biso etumbu ya babubi te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَنَجِّنَا بِرَحۡمَتِكَ مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
86. Mpe kangola biso na mawa mayo, o maboko ya bapagano.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ مُوسَىٰ وَأَخِيهِ أَن تَبَوَّءَا لِقَوۡمِكُمَا بِمِصۡرَ بُيُوتٗا وَٱجۡعَلُواْ بُيُوتَكُمۡ قِبۡلَةٗ وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
87. Mpe toyebisaki na Mûssa na ndeko waye, bosalela bato ba bino bandako na egipito, mpe botiyela yango bisika ya kosambela, mpe botelemisa losambo. Mpe pesa sango elamu epai ya bandimi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَقَالَ مُوسَىٰ رَبَّنَآ إِنَّكَ ءَاتَيۡتَ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَأَهُۥ زِينَةٗ وَأَمۡوَٰلٗا فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا رَبَّنَا لِيُضِلُّواْ عَن سَبِيلِكَۖ رَبَّنَا ٱطۡمِسۡ عَلَىٰٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ وَٱشۡدُدۡ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَلَا يُؤۡمِنُواْ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
88. Mpe Mûssa alobi: Nkolo wa biso! Sólo opesi falo na bato baye bolamu na mokili. Bazali kobungisa na yango (bato) nzela nayo. Oh Nkolo wa biso! Bebisa misolo mia bango, mpe kanga mitema mia bango ete bandima te, kino bakomona etumbu ya makasi ekoyelaka bango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قَالَ قَدۡ أُجِيبَت دَّعۡوَتُكُمَا فَٱسۡتَقِيمَا وَلَا تَتَّبِعَآنِّ سَبِيلَ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
89. Alobi:(1) kosenga na bino esili kondimama. Botikala na bokambami o nzela ya semba, kasi bolanda te nzela ya baye bazanga boyebi.
1 Allah.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ وَجَٰوَزۡنَا بِبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱلۡبَحۡرَ فَأَتۡبَعَهُمۡ فِرۡعَوۡنُ وَجُنُودُهُۥ بَغۡيٗا وَعَدۡوًاۖ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَدۡرَكَهُ ٱلۡغَرَقُ قَالَ ءَامَنتُ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱلَّذِيٓ ءَامَنَتۡ بِهِۦ بَنُوٓاْ إِسۡرَٰٓءِيلَ وَأَنَا۠ مِنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
90. Mpe tokatisaki bana ya isalayele ebale. Mpe falo na basoda naye balandaki bango na bonguna mpe likunya, kino amonaki liwa na miso naye okati ya ebale, alobaki: Nandimi ya soló été, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé bobele oyo bana ya isalayele bandimi naye, mpe ngai nazali o kati ya bamisilima.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ءَآلۡـَٰٔنَ وَقَدۡ عَصَيۡتَ قَبۡلُ وَكُنتَ مِنَ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
91. (Allah alobi): Sik’oyo nde ondimi; kasi oboyaki kotosa liboso, mpe ozalaki o kati ya babebisi?
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَٱلۡيَوۡمَ نُنَجِّيكَ بِبَدَنِكَ لِتَكُونَ لِمَنۡ خَلۡفَكَ ءَايَةٗۚ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلنَّاسِ عَنۡ ءَايَٰتِنَا لَغَٰفِلُونَ
92. Lelo, tokobomba nzoto nayo mpo etikala elembo na baye bakoya sima nayo, kasi ebele ya bato bazali kokeba te na bilembo bia biso.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَقَدۡ بَوَّأۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ مُبَوَّأَ صِدۡقٖ وَرَزَقۡنَٰهُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ فَمَا ٱخۡتَلَفُواْ حَتَّىٰ جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُۚ إِنَّ رَبَّكَ يَقۡضِي بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
93. Sólo mpenza tovandisaki bana ya isalayele na esika ya lokumu, mpe topesaki bango bilei ya kitoko. Na sima bakabwanaki sé wana boyebi ekomeli bango. Ya sólo, Nkolo wayo akosambisa kati na bango o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki kokesene na yango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَإِن كُنتَ فِي شَكّٖ مِّمَّآ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ فَسۡـَٔلِ ٱلَّذِينَ يَقۡرَءُونَ ٱلۡكِتَٰبَ مِن قَبۡلِكَۚ لَقَدۡ جَآءَكَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ
94. Mpe soki ozali na tembe тропа maye tokitiselaki yo, tuna baye bazali kotanga buku eye ekitaki liboso nayo. Bosôló bosili koyela yo kowuta epai ya Nkolo wayo. Kasi kozala te elongo ya baye bazali kotiya tembe mpe koyimayima.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَتَكُونَ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
95. Mpe kozala te elongo na baye bazali kozua mikapo mpe bilembo bia Allah été yango ezali lokuta, noki okozala o kati ya bazangi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ حَقَّتۡ عَلَيۡهِمۡ كَلِمَتُ رَبِّكَ لَا يُؤۡمِنُونَ
96. Ya soló, baye liloba lia Nkolo wayo lisila kokweyela bango, bakotikalaka kondima te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَوۡ جَآءَتۡهُمۡ كُلُّ ءَايَةٍ حَتَّىٰ يَرَوُاْ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
97. Ata soki bilembo binso biyeli bango, kino bakomonaka etumbu ya makasi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَلَوۡلَا كَانَتۡ قَرۡيَةٌ ءَامَنَتۡ فَنَفَعَهَآ إِيمَٰنُهَآ إِلَّا قَوۡمَ يُونُسَ لَمَّآ ءَامَنُواْ كَشَفۡنَا عَنۡهُمۡ عَذَابَ ٱلۡخِزۡيِ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ
98. Mpe soki ezalaki na etuka oyo ekokaki kondima (na Allah), longola sé etuka ya Yûnus tango endimaki mpe bondimi na bango esungaki bango? Na yango tolongolaki bango etumbu oyo esilisaki bango lokumu awa na nsé, mpe sima topesaki bango nkembo ya bomoyi ya mwa tango токе.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَوۡ شَآءَ رَبُّكَ لَأٓمَنَ مَن فِي ٱلۡأَرۡضِ كُلُّهُمۡ جَمِيعًاۚ أَفَأَنتَ تُكۡرِهُ ٱلنَّاسَ حَتَّىٰ يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
99. Mpe soki Nkolo wayo alingaki nde bato banso awa na mokili bakomi bandimi, boye yo nde okondimisa bato nionso na makasi?
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَمَا كَانَ لِنَفۡسٍ أَن تُؤۡمِنَ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ وَيَجۡعَلُ ٱلرِّجۡسَ عَلَى ٱلَّذِينَ لَا يَعۡقِلُونَ
100. Мре moto akoki kondima te sé na ndingisa ya Allah. Mpe apesaka etumbu na baye bakanisaka te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلِ ٱنظُرُواْ مَاذَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَمَا تُغۡنِي ٱلۡأٓيَٰتُ وَٱلنُّذُرُ عَن قَوۡمٖ لَّا يُؤۡمِنُونَ
101. Loba: Bótala nini ezali na likolo na mabele. Kasi bilembo ya bokamwisi mpe na bakebisi,(1) bakokaki te kosalisa bato bazanga kondima.
1 Bakebisi: Elingi koloba! Batindami.
আরবি তাফসীরসমূহ:
فَهَلۡ يَنتَظِرُونَ إِلَّا مِثۡلَ أَيَّامِ ٱلَّذِينَ خَلَوۡاْ مِن قَبۡلِهِمۡۚ قُلۡ فَٱنتَظِرُوٓاْ إِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُنتَظِرِينَ
102. Boye, bazali kozela eloko esusu, lokola etumbu eye ezalaki o tango ya baye babebisaki liboso? Loba: Bozela, ngai lokola nakozela elongo na bino.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ثُمَّ نُنَجِّي رُسُلَنَا وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ كَذَٰلِكَ حَقًّا عَلَيۡنَا نُنجِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
103. Sima tokangolaki batindami na biso elongo na baye bandimaki. Ndenge wana nde ezalaki lotomo epai na biso тропа kokangola bandimi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِن كُنتُمۡ فِي شَكّٖ مِّن دِينِي فَلَآ أَعۡبُدُ ٱلَّذِينَ تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ وَلَٰكِنۡ أَعۡبُدُ ٱللَّهَ ٱلَّذِي يَتَوَفَّىٰكُمۡۖ وَأُمِرۡتُ أَنۡ أَكُونَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
104. Loba: Oh bino bato! Soki bozali na tembe na lingomba lia ngai na kobondela te oyo bozali kobondela na botiki Allah, kasi nakobondela Allah oyo akoboma bino, mpe natindamaki тропа kozala moko o kati ya bandimi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَأَنۡ أَقِمۡ وَجۡهَكَ لِلدِّينِ حَنِيفٗا وَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
105. Mpe balóla elongi nayo okati na lingomba ya bopeto ya bomoko ya Allah, kasi kozala elongo na basambeli bikeko na binzambe nzambe te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَا تَدۡعُ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُكَ وَلَا يَضُرُّكَۖ فَإِن فَعَلۡتَ فَإِنَّكَ إِذٗا مِّنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
106. Mpe kobondela basusu te na botiki Allah baye bakoki kosala yo bolamu mpe mabe te. Soki osali yango, soló okozuama o kati ya babubi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِن يَمۡسَسۡكَ ٱللَّهُ بِضُرّٖ فَلَا كَاشِفَ لَهُۥٓ إِلَّا هُوَۖ وَإِن يُرِدۡكَ بِخَيۡرٖ فَلَا رَآدَّ لِفَضۡلِهِۦۚ يُصِيبُ بِهِۦ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦۚ وَهُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
107. Mpe soki Allah atiki ete pasi ezua yo, moto mosusu akoki kolongola yo yango te sé ye moko. Soki mpe alingeli yo bolamu, moko te akoki koboya bolamu naye, apesaka yango na oyo alingi o kati ya bawumbu naye. Mpe azali molimbisi atonda ngolu.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ قَدۡ جَآءَكُمُ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكُمۡۖ فَمَنِ ٱهۡتَدَىٰ فَإِنَّمَا يَهۡتَدِي لِنَفۡسِهِۦۖ وَمَن ضَلَّ فَإِنَّمَا يَضِلُّ عَلَيۡهَاۖ وَمَآ أَنَا۠ عَلَيۡكُم بِوَكِيلٖ
108. Loba: Oh Bino bato! bosôló bosilaki koyela bino kowuta epai ya Nkolo wa bino. Oyo akomikamba, amikambi тропа ye moko (o nzela ya semba) mpe oyo akomibungisa, amibungisi ye moko. Mpe nazali mobateli wa bino te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱتَّبِعۡ مَا يُوحَىٰٓ إِلَيۡكَ وَٱصۡبِرۡ حَتَّىٰ يَحۡكُمَ ٱللَّهُۚ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلۡحَٰكِمِينَ
109. Mpe landa maye makiteli yo, mpe kanga motema kino Allah akosambisa; mpo ye azali zuzi malamu wa ba zuzi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
 
অর্থসমূহের অনুবাদ সূরা: সূরা ইউনুস
সূরাসমূহের সূচী পৃষ্ঠার নাম্বার
 
কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ - লিঙ্গালা ভাষায় অনুবাদ - অনুবাদসমূহের সূচী

লিঙ্গালা ভাষায় কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ। অনুবাদক: যাকারিয়া মুহাম্মদ বালিঙ্গো

বন্ধ