কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ - লিঙ্গালা ভাষায় অনুবাদ * - অনুবাদসমূহের সূচী

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অর্থসমূহের অনুবাদ সূরা: সূরা আর-রাদ   আয়াত:

Ar-Ra’d (NKAKE)

الٓمٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِۗ وَٱلَّذِيٓ أُنزِلَ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَ ٱلۡحَقُّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يُؤۡمِنُونَ
1. Alif, lâm, mím, rá.(1) wana ezali mikapo mia buku, mpe oyo ekiti epai nayo kowuta epai ya Nkolo nayo ezali bosôló. Kaši ebele ya bato bazali kondima na yango te.
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱللَّهُ ٱلَّذِي رَفَعَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ بِغَيۡرِ عَمَدٖ تَرَوۡنَهَاۖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ كُلّٞ يَجۡرِي لِأَجَلٖ مُّسَمّٗىۚ يُدَبِّرُ ٱلۡأَمۡرَ يُفَصِّلُ ٱلۡأٓيَٰتِ لَعَلَّكُم بِلِقَآءِ رَبِّكُمۡ تُوقِنُونَ
2. Allah nde atelemisi mapata likolo na bino ezali na makonzi te, bozali kornona yango, mpe sima atombuami likolo ya ngwende. Мре akeli mwese na sanza ezali kotambola moko na moko na tango na yango, azali kokamba makambo (kotia mibeko) mpe azali kolimbola mikapo na bilembo, mpo été bobanga mpe bondima na bokutani na Nkolo wa bino.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَهُوَ ٱلَّذِي مَدَّ ٱلۡأَرۡضَ وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِيَ وَأَنۡهَٰرٗاۖ وَمِن كُلِّ ٱلثَّمَرَٰتِ جَعَلَ فِيهَا زَوۡجَيۡنِ ٱثۡنَيۡنِۖ يُغۡشِي ٱلَّيۡلَ ٱلنَّهَارَۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَتَفَكَّرُونَ
3. Мре ye nde atandi mabele mpe apiki piki bangomba likolo na yango, mpe mingala mpe ba mbuma ya ndenge na ndenge, mpe akeli biloko binso mibale mibale, azali kozipa moyi na butu. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَفِي ٱلۡأَرۡضِ قِطَعٞ مُّتَجَٰوِرَٰتٞ وَجَنَّٰتٞ مِّنۡ أَعۡنَٰبٖ وَزَرۡعٞ وَنَخِيلٞ صِنۡوَانٞ وَغَيۡرُ صِنۡوَانٖ يُسۡقَىٰ بِمَآءٖ وَٰحِدٖ وَنُفَضِّلُ بَعۡضَهَا عَلَىٰ بَعۡضٖ فِي ٱلۡأُكُلِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
4. Mpe okokuta na mokili ya nsé (mabele) mapango ekangama kangama, mpe bilanga ya a’náb(1) mpe mbuma, mpe ba nzete ya tamru bibotama ebele ya kokangama esika moko. Mpe bisusu bizali na bituka kati kati na yango (biteni biteni) mayi mazali kobwakama na yango, mpe tozali kopesa elengi na misusu koleka misusu тропа kólia. Ya soló, nyoso wana ezali bilembo mpo bato basosolo.
1 A’náb: Ezali ba mbuma ya mike mike ba liaka (raisin) bótala lisusu na suratu Al-An’ám: 99.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ وَإِن تَعۡجَبۡ فَعَجَبٞ قَوۡلُهُمۡ أَءِذَا كُنَّا تُرَٰبًا أَءِنَّا لَفِي خَلۡقٖ جَدِيدٍۗ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡأَغۡلَٰلُ فِيٓ أَعۡنَاقِهِمۡۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
5. Mpe soki ozali kokamwa kasi liloba na bango nde ezali kokamwisa koleka, tango bazali koloba été: Soki tokufi mpe tokomi mputulu, boye tokozonga lisusu bikelamu ya sika? В aye wana nde bapengwi na Nkolo na bango, mpe bango nde miniololo makozalaka na bakingo na bango, bango nde bato ya moto bakozala okati na yango seko na seko.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَسۡتَعۡجِلُونَكَ بِٱلسَّيِّئَةِ قَبۡلَ ٱلۡحَسَنَةِ وَقَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهِمُ ٱلۡمَثُلَٰتُۗ وَإِنَّ رَبَّكَ لَذُو مَغۡفِرَةٖ لِّلنَّاسِ عَلَىٰ ظُلۡمِهِمۡۖ وَإِنَّ رَبَّكَ لَشَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
6. Mpe bazali kowela kosenga yo été mabe eyela bango noki, kasi bazali kowelela te kosenga bolamu. Mpe ya sólo, bitumbu ya ndenge wana esi esalami liboso na bango, mpe ya sólo, Nkolo nayo atonda bolimbisi тропа bato likolo ya mabe na bango, mpe ya soló, Nkolo nayo apesaka etumbu ya makasi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦٓۗ إِنَّمَآ أَنتَ مُنذِرٞۖ وَلِكُلِّ قَوۡمٍ هَادٍ
7. Mpe bapengwi bazali koloba: Boye тропа nini te makamwisi mikitelaki ye (Muhammad) kowuta epai ya Nkolo waye? Ya sólo, ozali nde mokebisi, mpe bato na bato bazali na mokambi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تَحۡمِلُ كُلُّ أُنثَىٰ وَمَا تَغِيضُ ٱلۡأَرۡحَامُ وَمَا تَزۡدَادُۚ وَكُلُّ شَيۡءٍ عِندَهُۥ بِمِقۡدَارٍ
8. Allah ayebi oyo mwasi amemi okati ya libumu naye, na eleko oyo ekosala o kati ya libumu, na bozingami bona, mpe atiya eloko na eloko na ndelo na yango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ ٱلۡكَبِيرُ ٱلۡمُتَعَالِ
9. (Ye nde) moyebi ya oyo mabombami nyoso na maye mazali котопапа polele, azali monene, azali likolo koleka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
سَوَآءٞ مِّنكُم مَّنۡ أَسَرَّ ٱلۡقَوۡلَ وَمَن جَهَرَ بِهِۦ وَمَنۡ هُوَ مُسۡتَخۡفِۭ بِٱلَّيۡلِ وَسَارِبُۢ بِٱلنَّهَارِ
10. Bakeseni te epai naye oyo azali kobomba maloba naye, mpe oyo mosusu azali kobimisa ya ye polele, oyo azali komibomba na butu, mpe oyo azali komibimisa na moyi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
لَهُۥ مُعَقِّبَٰتٞ مِّنۢ بَيۡنِ يَدَيۡهِ وَمِنۡ خَلۡفِهِۦ يَحۡفَظُونَهُۥ مِنۡ أَمۡرِ ٱللَّهِۗ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُغَيِّرُ مَا بِقَوۡمٍ حَتَّىٰ يُغَيِّرُواْ مَا بِأَنفُسِهِمۡۗ وَإِذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِقَوۡمٖ سُوٓءٗا فَلَا مَرَدَّ لَهُۥۚ وَمَا لَهُم مِّن دُونِهِۦ مِن وَالٍ
11. Moto azali na ba anzelu sima naye mpe liboso naye bazali kokita tango nyoso тропа kobatela ye na mokano kowuta epai ya Allah. Ya sólo, Allah akobongola makambo ya bato te kino bango moko bakobongola maye bazali na yango kowuta na milimo mia bango, soki Allah alingi mabe ezua bato, moto moko ya kopekisa azali te. Mpe bakozala na mobateli ata moko te na botiki ye.
আরবি তাফসীরসমূহ:
هُوَ ٱلَّذِي يُرِيكُمُ ٱلۡبَرۡقَ خَوۡفٗا وَطَمَعٗا وَيُنشِئُ ٱلسَّحَابَ ٱلثِّقَالَ
12. Yende azali komonisa bino bongengi, ezali kobangisa bino na nkake mpe ezali kopesa bino elikya mpe azali kokomisa mapata mazala kilo.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيُسَبِّحُ ٱلرَّعۡدُ بِحَمۡدِهِۦ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ مِنۡ خِيفَتِهِۦ وَيُرۡسِلُ ٱلصَّوَٰعِقَ فَيُصِيبُ بِهَا مَن يَشَآءُ وَهُمۡ يُجَٰدِلُونَ فِي ٱللَّهِ وَهُوَ شَدِيدُ ٱلۡمِحَالِ
13. Mpe nkake ezali kokumisa ye na lolaka na yango, na ba anzelu kati na bobangi naye. Mpe azali kotinda mikalali mpo ezwa oyo alingi, kasi bazali kobunda о nzela ya Allah mpe azali makasi na etumbu.
আরবি তাফসীরসমূহ:
لَهُۥ دَعۡوَةُ ٱلۡحَقِّۚ وَٱلَّذِينَ يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ لَا يَسۡتَجِيبُونَ لَهُم بِشَيۡءٍ إِلَّا كَبَٰسِطِ كَفَّيۡهِ إِلَى ٱلۡمَآءِ لِيَبۡلُغَ فَاهُ وَمَا هُوَ بِبَٰلِغِهِۦۚ وَمَا دُعَآءُ ٱلۡكَٰفِرِينَ إِلَّا فِي ضَلَٰلٖ
14. Mbela ya bosôló ezali epai naye. Mpe baye bazali kobondela ba nzambe misusu kotika ye, banzambe wana bakoyanola bango na eloko moko te, bazali lokola moto oyo atandi maboko na mayi тропа komema yango na monoko naye, mpe azali kokoka te. Kasi kosenga ya bapagano ezali sé na libungi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلِلَّهِۤ يَسۡجُدُۤ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ طَوۡعٗا وَكَرۡهٗا وَظِلَٰلُهُم بِٱلۡغُدُوِّ وَٱلۡأٓصَالِ۩
15. Mpe тропа Allah, baye banso bazali na likolo na mabele bazali kofukamela ye, na esengo to na koyina, lolenge moko na bililingi na bango kobanda tongo kino mpokwa.
আরবি তাফসীরসমূহ:
قُلۡ مَن رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ قُلِ ٱللَّهُۚ قُلۡ أَفَٱتَّخَذۡتُم مِّن دُونِهِۦٓ أَوۡلِيَآءَ لَا يَمۡلِكُونَ لِأَنفُسِهِمۡ نَفۡعٗا وَلَا ضَرّٗاۚ قُلۡ هَلۡ يَسۡتَوِي ٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡبَصِيرُ أَمۡ هَلۡ تَسۡتَوِي ٱلظُّلُمَٰتُ وَٱلنُّورُۗ أَمۡ جَعَلُواْ لِلَّهِ شُرَكَآءَ خَلَقُواْ كَخَلۡقِهِۦ فَتَشَٰبَهَ ٱلۡخَلۡقُ عَلَيۡهِمۡۚ قُلِ ٱللَّهُ خَٰلِقُ كُلِّ شَيۡءٖ وَهُوَ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّٰرُ
16. Loba na bango:nani azali Nkolo ya likolo na mabele? Loba: Allah, loba: Boye botiki ye bozui bakonzi basusu baye bakoki komisalisa te mpe komisala mabe te? Loba: Boye bakokani, oyo akufa miso na oyo azali na miso? To boye mwinda na molili ekokani? To bazali nde kotiyela Allah banzambe misusu, bazali kokela lokola Allah akela, mpo été bikelamu bikokana? Loba: Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali sé ye moko na bokasi.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَسَالَتۡ أَوۡدِيَةُۢ بِقَدَرِهَا فَٱحۡتَمَلَ ٱلسَّيۡلُ زَبَدٗا رَّابِيٗاۖ وَمِمَّا يُوقِدُونَ عَلَيۡهِ فِي ٱلنَّارِ ٱبۡتِغَآءَ حِلۡيَةٍ أَوۡ مَتَٰعٖ زَبَدٞ مِّثۡلُهُۥۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ ٱلۡحَقَّ وَٱلۡبَٰطِلَۚ فَأَمَّا ٱلزَّبَدُ فَيَذۡهَبُ جُفَآءٗۖ وَأَمَّا مَا يَنفَعُ ٱلنَّاسَ فَيَمۡكُثُ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ ٱلۡأَمۡثَالَ
17. Akitisaki mayi kowuta na mapata, mpe mibongisi mbeto ya botioli na yango, engebene na bonene bwa yango, tango etondi koleka. Ezali komema bafulufulu mpe biloko ya ndenge ne ndenge, ya wolo mpe mabende biye bakotisaka na moto, тропа kosalela biloko ya bonzenga ya kolata, to mpe bisaleli. Ndenge wana nde Allah abetaka ndakisa ya malamu na ya mabe. Kasi тропа bafulufulu na bosoto mosusu oyo ezalaki likolo ya mayi, bikotiola mpe bilimwi, kasi тропа biloko biye bizali na litomba тропа bato, bikotikala na mabele. Ndenge wana nde Allah abetaka ba ndakisa bia ye.
আরবি তাফসীরসমূহ:
لِلَّذِينَ ٱسۡتَجَابُواْ لِرَبِّهِمُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ وَٱلَّذِينَ لَمۡ يَسۡتَجِيبُواْ لَهُۥ لَوۡ أَنَّ لَهُم مَّا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا وَمِثۡلَهُۥ مَعَهُۥ لَٱفۡتَدَوۡاْ بِهِۦٓۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ سُوٓءُ ٱلۡحِسَابِ وَمَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
18. Suka ya malamu ezali тропа baye bazali koyanola na mbela ya Nkolo wa bango, kaši baye baboyaki koyanola ye, soki ezalaki été bazua biloko nyoso oyo ezali na mabele mbala mibale, тропа bango été basomba na etumbu, balingaki kosala yango na lombango. Bango wana nde bazali na mbano ya mabe, mpe esika na bango ya kovanda ekozala lifelo oyo ezali efandelo ya mabe.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ أَفَمَن يَعۡلَمُ أَنَّمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَ ٱلۡحَقُّ كَمَنۡ هُوَ أَعۡمَىٰٓۚ إِنَّمَا يَتَذَكَّرُ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
19. Boye moto oyo ayebi été maye makiteli yo ezali bosôló kowuta epai ya Nkolo wa yo, akokani na moto oyo miso makangama kati na libungi?, sé banganga ya mayele nde bazali kokanisa malamu.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱلَّذِينَ يُوفُونَ بِعَهۡدِ ٱللَّهِ وَلَا يَنقُضُونَ ٱلۡمِيثَٰقَ
20. Baye bazali kokokisa malako ma bango epai ya Allah, тре bazali kozangisa yango te;
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱلَّذِينَ يَصِلُونَ مَآ أَمَرَ ٱللَّهُ بِهِۦٓ أَن يُوصَلَ وَيَخۡشَوۡنَ رَبَّهُمۡ وَيَخَافُونَ سُوٓءَ ٱلۡحِسَابِ
21. Мре baye bazali kokangisa maye Allah atindaki ete ekangisama, (bondeko), mpe bazali kobanga Nkolo wa bango, тре bazali kobanga lifuta ya mabe,
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱلَّذِينَ صَبَرُواْ ٱبۡتِغَآءَ وَجۡهِ رَبِّهِمۡ وَأَقَامُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَأَنفَقُواْ مِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ سِرّٗا وَعَلَانِيَةٗ وَيَدۡرَءُونَ بِٱلۡحَسَنَةِ ٱلسَّيِّئَةَ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عُقۡبَى ٱلدَّارِ
22. Mpe baye bakangaki mitema тропа koluka elongi ya Nkolo wa bango, mpe batelemisaki losambo, mpe babimisi maye topesaki bango na kobombana тре na polele, mpe bazali koya na bolamu тропа kolongola mabe. Bango nde bakozuaka mbano elama,
আরবি তাফসীরসমূহ:
جَنَّٰتُ عَدۡنٖ يَدۡخُلُونَهَا وَمَن صَلَحَ مِنۡ ءَابَآئِهِمۡ وَأَزۡوَٰجِهِمۡ وَذُرِّيَّٰتِهِمۡۖ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَدۡخُلُونَ عَلَيۡهِم مِّن كُلِّ بَابٖ
23. Bakokota na lola (ya edeni) lolenge moko na baye bazali kosala bolamu kowuta na baboti na bango, na basi ba bango, na mabota ma bango. Na baye banso bazali na bondimi ya malamu, mpe ba anzelu bakokotela bango na bizibeli (bikuke) binso,
আরবি তাফসীরসমূহ:
سَلَٰمٌ عَلَيۡكُم بِمَا صَبَرۡتُمۡۚ فَنِعۡمَ عُقۡبَى ٱلدَّارِ
24. Kimia ezala o kati na bino тропа maye bozalaki kokanga mitema mpe koyika mpiko. Mpe oyo nde suka y a efandelo y a malamu!
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱلَّذِينَ يَنقُضُونَ عَهۡدَ ٱللَّهِ مِنۢ بَعۡدِ مِيثَٰقِهِۦ وَيَقۡطَعُونَ مَآ أَمَرَ ٱللَّهُ بِهِۦٓ أَن يُوصَلَ وَيُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱللَّعۡنَةُ وَلَهُمۡ سُوٓءُ ٱلدَّارِ
25. Kaši baye bazali kotosa malako ma bango te o sima ya kolakana тропа Allah, mpe bazali kokabola maye Allah asangisaki yango, mpe bazali kotiya mobulu na kobebisa o kati ya mokili, bakozala na elakeli ya mabe mpe bakozalaka na suka ya mabe.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱللَّهُ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ وَفَرِحُواْ بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا فِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِلَّا مَتَٰعٞ
26. Allah apesaka ebele bomengo na oyo alingi, mpe akutolaka, bazali kosepela na bomoyi ya nsé, kasi bisengo ya nsé liboso ya bisengo ya mokolo ya suka ezali lokola masano ya tangu токе.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَةٞ مِّن رَّبِّهِۦۚ قُلۡ إِنَّ ٱللَّهَ يُضِلُّ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِيٓ إِلَيۡهِ مَنۡ أَنَابَ
27. Bapengwi bakolobaka: Мропа nini bakitiseli ye (Muhammad) makamwisi to bilembo kowuta epai ya Nkolo waye te? Loba: Ya soló, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo azali kotubela.
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَتَطۡمَئِنُّ قُلُوبُهُم بِذِكۡرِ ٱللَّهِۗ أَلَا بِذِكۡرِ ٱللَّهِ تَطۡمَئِنُّ ٱلۡقُلُوبُ
28. Baye bandimi mitema mia bango mikitaka na bokundoli lia Allah. Boye bokundoli ya Allah te nde ekitisaka mitema?
আরবি তাফসীরসমূহ:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ طُوبَىٰ لَهُمۡ وَحُسۡنُ مَـَٔابٖ
29. Baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bomoyi bwa kitoko o mokolo mwa suka, mpe bozongi elamu.
আরবি তাফসীরসমূহ:
كَذَٰلِكَ أَرۡسَلۡنَٰكَ فِيٓ أُمَّةٖ قَدۡ خَلَتۡ مِن قَبۡلِهَآ أُمَمٞ لِّتَتۡلُوَاْ عَلَيۡهِمُ ٱلَّذِيٓ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ وَهُمۡ يَكۡفُرُونَ بِٱلرَّحۡمَٰنِۚ قُلۡ هُوَ رَبِّي لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ عَلَيۡهِ تَوَكَّلۡتُ وَإِلَيۡهِ مَتَابِ
30. Yango wana nde totinda yo okati ya umma(1) oyo bituka ebele esilaki koleka liboso nayo, été otangela bango emoniseli oyo tokitisaki epai nayo. Mpe bazali kopengwa na Ar-Rahmán,(2) loba: Ye nde Nkolo wa ngai nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye, epai naye namipesaka mpe natiye elikya na ngai, mpe epai naye nde nazali komizongisa тропа kotubela.
1 Umma: Lingomba, bótala suratu Al-Baqarah 128.
2 Ar-Rahmán: Ezali moko ya kombo ya Allah, Elakisi: oyo atonda ngolu.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَوۡ أَنَّ قُرۡءَانٗا سُيِّرَتۡ بِهِ ٱلۡجِبَالُ أَوۡ قُطِّعَتۡ بِهِ ٱلۡأَرۡضُ أَوۡ كُلِّمَ بِهِ ٱلۡمَوۡتَىٰۗ بَل لِّلَّهِ ٱلۡأَمۡرُ جَمِيعًاۗ أَفَلَمۡ يَاْيۡـَٔسِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَن لَّوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَهَدَى ٱلنَّاسَ جَمِيعٗاۗ وَلَا يَزَالُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ تُصِيبُهُم بِمَا صَنَعُواْ قَارِعَةٌ أَوۡ تَحُلُّ قَرِيبٗا مِّن دَارِهِمۡ حَتَّىٰ يَأۡتِيَ وَعۡدُ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُخۡلِفُ ٱلۡمِيعَادَ
31. Soki ezalaki ete kurani moko ekoka kozwama eye na yango bangomba bikokaki kotambwisama to mpe mabele kopasuka, to elobisaka bibembe, kasi mitindo minso mizali mia Allah. Bandimi bazali koyeba te ete soki Allah alingaki, nde akambaki bato banso o nzela ya semba, na yango тропа baye bazali kondima te, bakozangaka te na maye basalaki ya mabe, bakobetamaka na bitumbu, to mpe bitumbu yango ebeta pene ya bandako na bango kino elaka ya Allah eyela bango. Ya sôló, Allah azangisaka elaka naye te.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَقَدِ ٱسۡتُهۡزِئَ بِرُسُلٖ مِّن قَبۡلِكَ فَأَمۡلَيۡتُ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ ثُمَّ أَخَذۡتُهُمۡۖ فَكَيۡفَ كَانَ عِقَابِ
32. Mpe basilaki kotiola na batindami liboso nayo, mpe napesaki bapengwi etumbu, sima bazuamaki, mpe lolenge nini etumbu na ngai ezalaki!
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَفَمَنۡ هُوَ قَآئِمٌ عَلَىٰ كُلِّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡۗ وَجَعَلُواْ لِلَّهِ شُرَكَآءَ قُلۡ سَمُّوهُمۡۚ أَمۡ تُنَبِّـُٔونَهُۥ بِمَا لَا يَعۡلَمُ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَم بِظَٰهِرٖ مِّنَ ٱلۡقَوۡلِۗ بَلۡ زُيِّنَ لِلَّذِينَ كَفَرُواْ مَكۡرُهُمۡ وَصُدُّواْ عَنِ ٱلسَّبِيلِۗ وَمَن يُضۡلِلِ ٱللَّهُ فَمَا لَهُۥ مِنۡ هَادٖ
33. Boye oyo azali kornona nyoso oyo molimo na molimo ezali kosala? Mpe bazali kopesa Allah balongani, loba: Bopesa bango bankombo, to bozali koyebisa ye (Allah) eloko nini ayebi te o kati ya mabele? To bozalaki sé kokosa bango na bankombo ya lokuta? Na yango, tobongiseli bapengwi mabe na bango mpe toboyisi bango nzela ya semba. Mpe na oyo Allah abungisi mosusu azali te тропа kokamba ye.
আরবি তাফসীরসমূহ:
لَّهُمۡ عَذَابٞ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَشَقُّۖ وَمَا لَهُم مِّنَ ٱللَّهِ مِن وَاقٖ
34. Bazali na etumbu na bomoyi ya nsé, mpe etumbu o mokolo mwa suka ekozala makasi mingi, mpe bakozua mobateli moko te (na etumbu) ya Allah.
আরবি তাফসীরসমূহ:
۞ مَّثَلُ ٱلۡجَنَّةِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۖ أُكُلُهَا دَآئِمٞ وَظِلُّهَاۚ تِلۡكَ عُقۡبَى ٱلَّذِينَ ٱتَّقَواْۚ وَّعُقۡبَى ٱلۡكَٰفِرِينَ ٱلنَّارُ
35. Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi, ezali koleka onse na yango mingala, mbuma na yango ya koliya ekosilaka te. Na elili na yango, wana nde ekozala litomba lia baye bazalaki kobanga, mpe litomba lia bapengwi likozalaka nde moto.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يَفۡرَحُونَ بِمَآ أُنزِلَ إِلَيۡكَۖ وَمِنَ ٱلۡأَحۡزَابِ مَن يُنكِرُ بَعۡضَهُۥۚ قُلۡ إِنَّمَآ أُمِرۡتُ أَنۡ أَعۡبُدَ ٱللَّهَ وَلَآ أُشۡرِكَ بِهِۦٓۚ إِلَيۡهِ أَدۡعُواْ وَإِلَيۡهِ مَـَٔابِ
36. Мре baye topesaki bango buku, bazali kosepela na maye ekiti Epai nayo, basusu bazali koboya eteni na yango. Loba: Ya soló, natindamaki тропа kobondela Allah, тре nasangisa ye na eloko te, epai naye nde nazali kobenga (bato) mpe epai naye nde bozongi na ngai.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَٰهُ حُكۡمًا عَرَبِيّٗاۚ وَلَئِنِ ٱتَّبَعۡتَ أَهۡوَآءَهُم بَعۡدَ مَا جَآءَكَ مِنَ ٱلۡعِلۡمِ مَا لَكَ مِنَ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا وَاقٖ
37. Mpe na lolenge wana nde tokitisaki yango(1) epai nayo na lokota ya arabo été ezala mobeko, mpe soki olandi ba mposa ya bango o sima ya boyebi oyo esili koyela yo kowuta epai ya Allah okozala na mokonzi te mpe mobateli te.
1 Kurani.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا رُسُلٗا مِّن قَبۡلِكَ وَجَعَلۡنَا لَهُمۡ أَزۡوَٰجٗا وَذُرِّيَّةٗۚ وَمَا كَانَ لِرَسُولٍ أَن يَأۡتِيَ بِـَٔايَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ لِكُلِّ أَجَلٖ كِتَابٞ
38. Mpe tosilaki kotinda batindami yambo nayo, mpe topesaki bango basi na bana. Мре motindami moko te ayaki na makamwisi sé ezala na bolingi bwa Allah. Мре eloko nyoso esila kokomama na tango na yango.
আরবি তাফসীরসমূহ:
يَمۡحُواْ ٱللَّهُ مَا يَشَآءُ وَيُثۡبِتُۖ وَعِندَهُۥٓ أُمُّ ٱلۡكِتَٰبِ
39. Allah alimwisaka mpe abatelaka oyo alingi, epai naye nde mama ya buku ezuami.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَإِن مَّا نُرِيَنَّكَ بَعۡضَ ٱلَّذِي نَعِدُهُمۡ أَوۡ نَتَوَفَّيَنَّكَ فَإِنَّمَا عَلَيۡكَ ٱلۡبَلَٰغُ وَعَلَيۡنَا ٱلۡحِسَابُ
40. Mpe tokoki kolakisa yo ndambu ya maye tolengeli тропа bango ya etumbu awa na nsé, to тре toboma yo liboso été eyela bango, kasi yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango (liloba) mpe epai na biso nde lifuta lizali.
আরবি তাফসীরসমূহ:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا نَأۡتِي ٱلۡأَرۡضَ نَنقُصُهَا مِنۡ أَطۡرَافِهَاۚ وَٱللَّهُ يَحۡكُمُ لَا مُعَقِّبَ لِحُكۡمِهِۦۚ وَهُوَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
41. Boye bazali kornona te ete, tokoya na mabele mpe tozali kokutola yango epai na epai? Mpe Allah nde mokati wa makambo, mpe moko te akoki koboya bokati bwa ye, mpe azali noki тропа kopesa lifuti.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَقَدۡ مَكَرَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَلِلَّهِ ٱلۡمَكۡرُ جَمِيعٗاۖ يَعۡلَمُ مَا تَكۡسِبُ كُلُّ نَفۡسٖۗ وَسَيَعۡلَمُ ٱلۡكُفَّٰرُ لِمَنۡ عُقۡبَى ٱلدَّارِ
42. Mpe baye balekaki liboso basilaki kosala likita ya mabe, kasi Allah asalelaki bango banso likita, ayebaka maye manso moto asalaka. Mpe bapengwi bakoyebaka etumbu ya mbeba ya bango o mokolo mwa suka.
আরবি তাফসীরসমূহ:
وَيَقُولُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَسۡتَ مُرۡسَلٗاۚ قُلۡ كَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدَۢا بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡ وَمَنۡ عِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلۡكِتَٰبِ
43. Mpe bapagano bazali koloba ete ozali motindami te. Loba: Allah akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe lolenge moko na baye bazua boyebi ya buku.
আরবি তাফসীরসমূহ:
 
অর্থসমূহের অনুবাদ সূরা: সূরা আর-রাদ
সূরাসমূহের সূচী পৃষ্ঠার নাম্বার
 
কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ - লিঙ্গালা ভাষায় অনুবাদ - অনুবাদসমূহের সূচী

লিঙ্গালা ভাষায় কুরআনুল কারীমের অর্থসমূহের অনুবাদ। অনুবাদক: যাকারিয়া মুহাম্মদ বালিঙ্গো

বন্ধ