Prijevod značenja časnog Kur'ana - الترجمة اللينغالا * - Sadržaj prijevodā

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Prijevod značenja Sura: Sura Lukman   Ajet:

Luqmân

الٓمٓ
1. Alif, lám, mím.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Tefsiri na arapskom jeziku:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡحَكِيمِ
2. Oyo bizali mikapo mia buku ya bwanya,
Tefsiri na arapskom jeziku:
هُدٗى وَرَحۡمَةٗ لِّلۡمُحۡسِنِينَ
3. Yango ezali bokambi mpe ngolu тропа babongisi (bato ya malamu),
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ يُوقِنُونَ
4. B aye bazali kotelemisa losambo тре bazali kobimisa zakat(2) mpe bazali na tembe te тропа mokolo ya suka.
2 Zakat: Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 45.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أُوْلَٰٓئِكَ عَلَىٰ هُدٗى مِّن رَّبِّهِمۡۖ وَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ
5. Bango nde bazali na nzela ya semba ya Nkolo wa bango, тре bango nde balongi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَشۡتَرِي لَهۡوَ ٱلۡحَدِيثِ لِيُضِلَّ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ بِغَيۡرِ عِلۡمٖ وَيَتَّخِذَهَا هُزُوًاۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٞ مُّهِينٞ
6. Мре kati ya bato, ezali na ba oyo bazali kosomba maloba mazanga ntina тропа kobungisa bato na nzela ya Allah na kozanga boyebi mpe bazali kotiola yango. Baye wana bakozuaka etumbu ya nsoni.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا وَلَّىٰ مُسۡتَكۡبِرٗا كَأَن لَّمۡ يَسۡمَعۡهَا كَأَنَّ فِيٓ أُذُنَيۡهِ وَقۡرٗاۖ فَبَشِّرۡهُ بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
7. Mpe tango bazali kotangela ye mikapo mia biso, apesa mokongo na lolendo lokola ayoka naino yango te, mpe lokola ezali na eloko ya kilo kati na matoyi naye. Pesa ye sango ya etumbu ya makasi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ جَنَّٰتُ ٱلنَّعِيمِ
8. Ya soló, baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola ya kitoko,
Tefsiri na arapskom jeziku:
خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٗاۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
9. Libela kati na yango , elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe azali na bokasi atonda bwanya.
Tefsiri na arapskom jeziku:
خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ بِغَيۡرِ عَمَدٖ تَرَوۡنَهَاۖ وَأَلۡقَىٰ فِي ٱلۡأَرۡضِ رَوَٰسِيَ أَن تَمِيدَ بِكُمۡ وَبَثَّ فِيهَا مِن كُلِّ دَآبَّةٖۚ وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجٖ كَرِيمٍ
10. Akela likolo ezali na makonzi te bozali kornona yango, mpe apiki bangomba likolo ya mabele ya bokangami mpo ekweyela bino te, mpe ati kati na yango lolenge nyoso ya banyama, mpe tokitisa mayi kowuta likolo, mpe tobimisi na yango milona ya lolenge nyoso.
Tefsiri na arapskom jeziku:
هَٰذَا خَلۡقُ ٱللَّهِ فَأَرُونِي مَاذَا خَلَقَ ٱلَّذِينَ مِن دُونِهِۦۚ بَلِ ٱلظَّٰلِمُونَ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
11.Oyo nde bokeli bwa Allah, bolakisa ngai oyo ya basusu. Kasi babubi bazali na libunga ya polele.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا لُقۡمَٰنَ ٱلۡحِكۡمَةَ أَنِ ٱشۡكُرۡ لِلَّهِۚ وَمَن يَشۡكُرۡ فَإِنَّمَا يَشۡكُرُ لِنَفۡسِهِۦۖ وَمَن كَفَرَ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَنِيٌّ حَمِيدٞ
12. Mpe tosilaki kopesa Luqmân bwanya ete tondo Allah, botondi. Mpe oyo akotondo botondi, ya soló asali yango тропа ye moko, oyo mpe akozanga botondi, ya sólo Allah atonda bozui asanzolama.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذۡ قَالَ لُقۡمَٰنُ لِٱبۡنِهِۦ وَهُوَ يَعِظُهُۥ يَٰبُنَيَّ لَا تُشۡرِكۡ بِٱللَّهِۖ إِنَّ ٱلشِّرۡكَ لَظُلۡمٌ عَظِيمٞ
13. Mpe tango Luqmân alobaki na mwana waye (ya mobali) na bolendisi: Oh mwana wa ngai! Kosangisa Allah te, ya solo kosangisa (Allah) ezali bobubi bonene.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَوَصَّيۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ بِوَٰلِدَيۡهِ حَمَلَتۡهُ أُمُّهُۥ وَهۡنًا عَلَىٰ وَهۡنٖ وَفِصَٰلُهُۥ فِي عَامَيۡنِ أَنِ ٱشۡكُرۡ لِي وَلِوَٰلِدَيۡكَ إِلَيَّ ٱلۡمَصِيرُ
14. Мре toyebisaki na moto (asalela) tata na mama waye (bolamu), mama naye amema ye na pasi tango molai, bolembu na bolembu kino mibu mibale azali (komelisa ye mabele,) ete otondo ngai mpe otondo baboti nayo, epai na ngai nde bokozonga.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِن جَٰهَدَاكَ عَلَىٰٓ أَن تُشۡرِكَ بِي مَا لَيۡسَ لَكَ بِهِۦ عِلۡمٞ فَلَا تُطِعۡهُمَاۖ وَصَاحِبۡهُمَا فِي ٱلدُّنۡيَا مَعۡرُوفٗاۖ وَٱتَّبِعۡ سَبِيلَ مَنۡ أَنَابَ إِلَيَّۚ ثُمَّ إِلَيَّ مَرۡجِعُكُمۡ فَأُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
15. Mpe soki bango nyoso mibale batindi yo mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te, kasi zala na bango malamu awa na mokili, mpe landa nzela ya oyo ayei epai na ngai. Mpe bokozongaka epai na ngai, sima nakoyebisa bino maye bozalaki kosala.
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَٰبُنَيَّ إِنَّهَآ إِن تَكُ مِثۡقَالَ حَبَّةٖ مِّنۡ خَرۡدَلٖ فَتَكُن فِي صَخۡرَةٍ أَوۡ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ أَوۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ يَأۡتِ بِهَا ٱللَّهُۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَطِيفٌ خَبِيرٞ
16. Oh mwana wa ngai! Yeba ete eloko soki ezali moke lokola mbuma ya ndunda ebombami na nsé ya libanga to mapata to mpe na nsé ya mabele, Allah akobimisa yango (o mokolo ya suka). Ya soló, Allah azali malamu mpe azali moyebi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَٰبُنَيَّ أَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَ وَأۡمُرۡ بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَٱنۡهَ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَآ أَصَابَكَۖ إِنَّ ذَٰلِكَ مِنۡ عَزۡمِ ٱلۡأُمُورِ
17. Oh mwana wa ngai! Telemisa losambo mpe tinda (bato) basala bolamu, mpe pekisa mabe, mpe kanga motema na likambo oyo ezui yo. Ya sólo, wana ezali lolenge ya malamu ya kobongisa makambo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَا تُصَعِّرۡ خَدَّكَ لِلنَّاسِ وَلَا تَمۡشِ فِي ٱلۡأَرۡضِ مَرَحًاۖ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ كُلَّ مُخۡتَالٖ فَخُورٖ
18. Mpe kobalolaka elongi te na lofundo liboso ya bato mpe kotambola te na mokili osepela nayo moko koleka, mpamba te Allah alingaka bato ya lolendo na lofundo te. (komitombola na lolendo liboso ya bato te)
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱقۡصِدۡ فِي مَشۡيِكَ وَٱغۡضُضۡ مِن صَوۡتِكَۚ إِنَّ أَنكَرَ ٱلۡأَصۡوَٰتِ لَصَوۡتُ ٱلۡحَمِيرِ
19. Žala na etamboli ya malamu, mpe kitisa mongongo nayo. Mpo mongongo oyo eleki mabe ezali mongongo ya hamir(1).
1 Hamir: Bótala Al-Baqarah mokapo: 259.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَلَمۡ تَرَوۡاْ أَنَّ ٱللَّهَ سَخَّرَ لَكُم مَّا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَأَسۡبَغَ عَلَيۡكُمۡ نِعَمَهُۥ ظَٰهِرَةٗ وَبَاطِنَةٗۗ وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يُجَٰدِلُ فِي ٱللَّهِ بِغَيۡرِ عِلۡمٖ وَلَا هُدٗى وَلَا كِتَٰبٖ مُّنِيرٖ
20. Bozali kornona te ete ya sôló, Allah abongiseli bino maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe atondiseli bino bolamu bwaye ya polele na ya kobatama? Mpe okati ya bato, ezali na baye bazali kosuanisa тропа Allah, bazali na boyebi te, bakambami te mpe bazali na buku ya bosembo te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱتَّبِعُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ قَالُواْ بَلۡ نَتَّبِعُ مَا وَجَدۡنَا عَلَيۡهِ ءَابَآءَنَآۚ أَوَلَوۡ كَانَ ٱلشَّيۡطَٰنُ يَدۡعُوهُمۡ إِلَىٰ عَذَابِ ٱلسَّعِيرِ
21. Mpe soki balobi na bango, bolanda maye Allah akitisa, bakozongisa ete: Te, biso tokolanda sé maye bankoko na biso batika. Ata soki satana nde azali kobenga bango na etumbu ya lifelo?
Tefsiri na arapskom jeziku:
۞ وَمَن يُسۡلِمۡ وَجۡهَهُۥٓ إِلَى ٱللَّهِ وَهُوَ مُحۡسِنٞ فَقَدِ ٱسۡتَمۡسَكَ بِٱلۡعُرۡوَةِ ٱلۡوُثۡقَىٰۗ وَإِلَى ٱللَّهِ عَٰقِبَةُ ٱلۡأُمُورِ
22. Mpe oyo akomipesa elongi naye mobimba epai na Allah mpe azali mosali malamu, ye wana nde asili kokanga singa ya makasi, mpe epai ya Allah nde suka ya makambo ezali.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمَن كَفَرَ فَلَا يَحۡزُنكَ كُفۡرُهُۥٓۚ إِلَيۡنَا مَرۡجِعُهُمۡ فَنُنَبِّئُهُم بِمَا عَمِلُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
23. Kasi oyo akopengwa, bopengwi bwaye epesa yo mawa te, bozongi na bango ekozalaka nde epai na biso, тре tokoyebisaka bango maye basalaki. Ya soló, Allah azali moyebi ya maye mabombami o mitema mia bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
نُمَتِّعُهُمۡ قَلِيلٗا ثُمَّ نَضۡطَرُّهُمۡ إِلَىٰ عَذَابٍ غَلِيظٖ
24. Tozali kopesa bango bomoi ya bisengo токе, na sima tokomema bango na makasi na etumbu oyo eleki mpasi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۚ قُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
25. Mpe soki otuni bango, nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah. Kasi ebele na bango bazali koyeba te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡغَنِيُّ ٱلۡحَمِيدُ
26. Manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah. Ya soló, Allah atonda bomengo atonda masanzoli.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَوۡ أَنَّمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ مِن شَجَرَةٍ أَقۡلَٰمٞ وَٱلۡبَحۡرُ يَمُدُّهُۥ مِنۢ بَعۡدِهِۦ سَبۡعَةُ أَبۡحُرٖ مَّا نَفِدَتۡ كَلِمَٰتُ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
27. Mpe soki ezalaki ete banzete nyoso na mokili ebongwana bikomeli mpe ba ebale mbala sambo ekoma mayi ya mokanda, nyoso elingaki kosila тре maloba ya Allah matikali. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bwanya.
Tefsiri na arapskom jeziku:
مَّا خَلۡقُكُمۡ وَلَا بَعۡثُكُمۡ إِلَّا كَنَفۡسٖ وَٰحِدَةٍۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعُۢ بَصِيرٌ
28. Bokelami na bino mpe lisekwa na bino ezali lokola molimo moko mpamba. Ya sólo, Allah azali koyoka mpe azali kornona.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ يُولِجُ ٱلَّيۡلَ فِي ٱلنَّهَارِ وَيُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِي ٱلَّيۡلِ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَۖ كُلّٞ يَجۡرِيٓ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى وَأَنَّ ٱللَّهَ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ
29. Boye ozali kornona te ete Allah azali kokotisa butu okati ya moyi mpe azali kokotisa moyi o kati ya butu, mpe akeli mwese mpe sanza mizala kotambola moko na moko na nzela na yango? Mpe ya soló, Allah azali na sango ya maye bozali kosala.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡحَقُّ وَأَنَّ مَا يَدۡعُونَ مِن دُونِهِ ٱلۡبَٰطِلُ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡعَلِيُّ ٱلۡكَبِيرُ
30. Wana ezali ete Allah azali bosembo, mpe ya sólo, maye manso bazali kobondela na botiki ye mazali mpamba, mpe ya solo, Allah azali likolo mpe monene koleka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱلۡفُلۡكَ تَجۡرِي فِي ٱلۡبَحۡرِ بِنِعۡمَتِ ٱللَّهِ لِيُرِيَكُم مِّنۡ ءَايَٰتِهِۦٓۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّكُلِّ صَبَّارٖ شَكُورٖ
31. Boye ozali kornona te ya solo masuwa maye mazali kotambola na bibale, ezali sé na ngolu ya Allah, mpo amonisa bino bilembo bia ye? Ya soló wana ezali bilembo тропа moto nyonso oyo akangi motema mpe azali kotondo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَا غَشِيَهُم مَّوۡجٞ كَٱلظُّلَلِ دَعَوُاْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ فَلَمَّا نَجَّىٰهُمۡ إِلَى ٱلۡبَرِّ فَمِنۡهُم مُّقۡتَصِدٞۚ وَمَا يَجۡحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا كُلُّ خَتَّارٖ كَفُورٖ
32. Mpe soki mbonge ya makasi ezui bango na ebale, babeleli Allah na bomoko naye nyoso, na sima soki abimisi bango na mokili, basusu kati na bango bazali kopengwa. Kasi ezali bobele bapengwi nde bazali koboya bilembo bia biso.
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ ٱتَّقُواْ رَبَّكُمۡ وَٱخۡشَوۡاْ يَوۡمٗا لَّا يَجۡزِي وَالِدٌ عَن وَلَدِهِۦ وَلَا مَوۡلُودٌ هُوَ جَازٍ عَن وَالِدِهِۦ شَيۡـًٔاۚ إِنَّ وَعۡدَ ٱللَّهِ حَقّٞۖ فَلَا تَغُرَّنَّكُمُ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَا وَلَا يَغُرَّنَّكُم بِٱللَّهِ ٱلۡغَرُورُ
33. Oh bino bato! Bobanga Nkolo wa bino mpe bobanga mokolo moye tata akoyanolaka mwana wa ye te, to mwana lokola. Elaka ya Allah ezali solo, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (mokosi) satana akosa bino te тропа Allah.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلسَّاعَةِ وَيُنَزِّلُ ٱلۡغَيۡثَ وَيَعۡلَمُ مَا فِي ٱلۡأَرۡحَامِۖ وَمَا تَدۡرِي نَفۡسٞ مَّاذَا تَكۡسِبُ غَدٗاۖ وَمَا تَدۡرِي نَفۡسُۢ بِأَيِّ أَرۡضٖ تَمُوتُۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ خَبِيرُۢ
34. Ya soló, epayi ya Allah nde ngonga ya suka eyebani mpe ye nde azali kokitisa mbula, mpe ayebi maye mabombama o mabumu ya basi mpe moto moko ayebi te soki lobi akozua nini. Mpe moto moko ayebi te soki akokufa na mboka nini, ya sólo Allah azali moyebi mpe atonda basango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
 
Prijevod značenja Sura: Sura Lukman
Indeks sura Broj stranice
 
Prijevod značenja časnog Kur'ana - الترجمة اللينغالا - Sadržaj prijevodā

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

Zatvaranje