Check out the new design

Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo * - Sadržaj prijevodā

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Prijevod značenja Sura: Ja-Sin   Ajet:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا خَلَقۡنَا لَهُم مِّمَّا عَمِلَتۡ أَيۡدِينَآ أَنۡعَٰمٗا فَهُمۡ لَهَا مَٰلِكُونَ
Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm[1] biye bazali kokonza?
[1] An’âm: Bótala suratu Fâtwir mokapo: 28, Bótala na Imrân mekapo: 14.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَذَلَّلۡنَٰهَا لَهُمۡ فَمِنۡهَا رَكُوبُهُمۡ وَمِنۡهَا يَأۡكُلُونَ
Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَهُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَمَشَارِبُۚ أَفَلَا يَشۡكُرُونَ
Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te?
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ ءَالِهَةٗ لَّعَلَّهُمۡ يُنصَرُونَ
Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَا يَسۡتَطِيعُونَ نَصۡرَهُمۡ وَهُمۡ لَهُمۡ جُندٞ مُّحۡضَرُونَ
В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَلَا يَحۡزُنكَ قَوۡلُهُمۡۘ إِنَّا نَعۡلَمُ مَا يُسِرُّونَ وَمَا يُعۡلِنُونَ
Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَوَلَمۡ يَرَ ٱلۡإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقۡنَٰهُ مِن نُّطۡفَةٖ فَإِذَا هُوَ خَصِيمٞ مُّبِينٞ
Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele?
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَضَرَبَ لَنَا مَثَلٗا وَنَسِيَ خَلۡقَهُۥۖ قَالَ مَن يُحۡيِ ٱلۡعِظَٰمَ وَهِيَ رَمِيمٞ
Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu?
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ يُحۡيِيهَا ٱلَّذِيٓ أَنشَأَهَآ أَوَّلَ مَرَّةٖۖ وَهُوَ بِكُلِّ خَلۡقٍ عَلِيمٌ
Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُم مِّنَ ٱلشَّجَرِ ٱلۡأَخۡضَرِ نَارٗا فَإِذَآ أَنتُم مِّنۡهُ تُوقِدُونَ
Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَوَلَيۡسَ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يَخۡلُقَ مِثۡلَهُمۚ بَلَىٰ وَهُوَ ٱلۡخَلَّٰقُ ٱلۡعَلِيمُ
Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِنَّمَآ أَمۡرُهُۥٓ إِذَآ أَرَادَ شَيۡـًٔا أَن يَقُولَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَسُبۡحَٰنَ ٱلَّذِي بِيَدِهِۦ مَلَكُوتُ كُلِّ شَيۡءٖ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama.
Tefsiri na arapskom jeziku:
 
Prijevod značenja Sura: Ja-Sin
Indeks sura Broj stranice
 
Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo - Sadržaj prijevodā

Prijevod: Zekerija Muhammed Balingongo.

Zatvaranje