Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn   Ayah:
مَا تَسۡبِقُ مِنۡ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ
43. Mokano ya umma(1) nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te.
1 Umma: Awa elakisi: Etonga, bótala lisusu na suratu Al-Baqarah na mokapo: 128.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ أَرۡسَلۡنَا رُسُلَنَا تَتۡرَاۖ كُلَّ مَا جَآءَ أُمَّةٗ رَّسُولُهَا كَذَّبُوهُۖ فَأَتۡبَعۡنَا بَعۡضَهُم بَعۡضٗا وَجَعَلۡنَٰهُمۡ أَحَادِيثَۚ فَبُعۡدٗا لِّقَوۡمٖ لَّا يُؤۡمِنُونَ
44. Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te.
Arabic explanations of the Qur’an:
ثُمَّ أَرۡسَلۡنَا مُوسَىٰ وَأَخَاهُ هَٰرُونَ بِـَٔايَٰتِنَا وَسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
45. Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele,
Arabic explanations of the Qur’an:
إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ وَمَلَإِيْهِۦ فَٱسۡتَكۡبَرُواْ وَكَانُواْ قَوۡمًا عَالِينَ
46. Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَقَالُوٓاْ أَنُؤۡمِنُ لِبَشَرَيۡنِ مِثۡلِنَا وَقَوۡمُهُمَا لَنَا عَٰبِدُونَ
47. Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso?
Arabic explanations of the Qur’an:
فَكَذَّبُوهُمَا فَكَانُواْ مِنَ ٱلۡمُهۡلَكِينَ
48. Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki(2) kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama.
2 Bazuamaki: Elakisi: Ba oyo bazuaki Mûssa na Háruna lokuta.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ لَعَلَّهُمۡ يَهۡتَدُونَ
49. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَجَعَلۡنَا ٱبۡنَ مَرۡيَمَ وَأُمَّهُۥٓ ءَايَةٗ وَءَاوَيۡنَٰهُمَآ إِلَىٰ رَبۡوَةٖ ذَاتِ قَرَارٖ وَمَعِينٖ
50. Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele.
Arabic explanations of the Qur’an:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلرُّسُلُ كُلُواْ مِنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ وَٱعۡمَلُواْ صَٰلِحًاۖ إِنِّي بِمَا تَعۡمَلُونَ عَلِيمٞ
51. Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِنَّ هَٰذِهِۦٓ أُمَّتُكُمۡ أُمَّةٗ وَٰحِدَةٗ وَأَنَا۠ رَبُّكُمۡ فَٱتَّقُونِ
52. Mpe umma(1) na bino oyo ezali sé umma(2) moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai.
1 Umma: Lisanga ya batindami.
2 Umma: Lingomba bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَتَقَطَّعُوٓاْ أَمۡرَهُم بَيۡنَهُمۡ زُبُرٗاۖ كُلُّ حِزۡبِۭ بِمَا لَدَيۡهِمۡ فَرِحُونَ
53. Mpe bakabwani(1) na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye.
1 Bakabwani: Ezalaki: Baye bazalaki kolanda batindami.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَذَرۡهُمۡ فِي غَمۡرَتِهِمۡ حَتَّىٰ حِينٍ
54. Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَيَحۡسَبُونَ أَنَّمَا نُمِدُّهُم بِهِۦ مِن مَّالٖ وَبَنِينَ
55. Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango?
Arabic explanations of the Qur’an:
نُسَارِعُ لَهُمۡ فِي ٱلۡخَيۡرَٰتِۚ بَل لَّا يَشۡعُرُونَ
56. Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te.
Arabic explanations of the Qur’an:
إِنَّ ٱلَّذِينَ هُم مِّنۡ خَشۡيَةِ رَبِّهِم مُّشۡفِقُونَ
57. Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ هُم بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ يُؤۡمِنُونَ
58. Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَٱلَّذِينَ هُم بِرَبِّهِمۡ لَا يُشۡرِكُونَ
59. Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te.
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Mu’minūn
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close