Check out the new design

Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo * - Translations’ Index

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Translation of the meanings Surah: Al-Furqān   Ayah:
وَلَا يَأۡتُونَكَ بِمَثَلٍ إِلَّا جِئۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَأَحۡسَنَ تَفۡسِيرًا
Mpe bakokoka koyela yo lisese moko te sé tokoyela yo bosembo mpe ndimbola na yango ya malamu koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
ٱلَّذِينَ يُحۡشَرُونَ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ إِلَىٰ جَهَنَّمَ أُوْلَٰٓئِكَ شَرّٞ مَّكَانٗا وَأَضَلُّ سَبِيلٗا
Ba oyo bakosangisamaka na bilongi na bango na moto ya lifelo, bango wana nde bakozala na esika ya mabe mpe libungi ya mosika.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَجَعَلۡنَا مَعَهُۥٓ أَخَاهُ هَٰرُونَ وَزِيرٗا
Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, mpe topesaki ye ndeko naye Háruna mpo asalisa ye.
Arabic explanations of the Qur’an:
فَقُلۡنَا ٱذۡهَبَآ إِلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَدَمَّرۡنَٰهُمۡ تَدۡمِيرٗا
Mpe tolobaki: Bökende bino mibale epai ya bato oyo baboyaki kondimela mikapo mia biso, sima tobebisaki bango banso. (koboma bango)
Arabic explanations of the Qur’an:
وَقَوۡمَ نُوحٖ لَّمَّا كَذَّبُواْ ٱلرُّسُلَ أَغۡرَقۡنَٰهُمۡ وَجَعَلۡنَٰهُمۡ لِلنَّاسِ ءَايَةٗۖ وَأَعۡتَدۡنَا لِلظَّٰلِمِينَ عَذَابًا أَلِيمٗا
Мре bato ya Nûh, tango baboyaki kondimela ba tindami tozindisaki bango mpe totiyaki bango bazala elembo тропа bato, kasi tobombeli babubi etumbu ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَعَادٗا وَثَمُودَاْ وَأَصۡحَٰبَ ٱلرَّسِّ وَقُرُونَۢا بَيۡنَ ذَٰلِكَ كَثِيرٗا
Mpe aad na Thamúd, na bato ya rass, elongo na bato basusu ebele kati kati na bango sé lolenge moko.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَكُلّٗا ضَرَبۡنَا لَهُ ٱلۡأَمۡثَٰلَۖ وَكُلّٗا تَبَّرۡنَا تَتۡبِيرٗا
Mpe tobetelaki bato banso ndakisa, mpe bango banso tolimwisaki bango na lolenge ya makasi.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَلَقَدۡ أَتَوۡاْ عَلَى ٱلۡقَرۡيَةِ ٱلَّتِيٓ أُمۡطِرَتۡ مَطَرَ ٱلسَّوۡءِۚ أَفَلَمۡ يَكُونُواْ يَرَوۡنَهَاۚ بَلۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ نُشُورٗا
Mpe basilaki koleka o mboka oyo ebetelaki mbula ya mabe[1], boye bazali kornona yango te? Kasi bazalaki kolikia na mokolo ya lisekwa te.
[1] Mbula ya mabe: Ezalaki nde mbula ya mabanga тропа etumbu ya bato ya Loth.
Arabic explanations of the Qur’an:
وَإِذَا رَأَوۡكَ إِن يَتَّخِذُونَكَ إِلَّا هُزُوًا أَهَٰذَا ٱلَّذِي بَعَثَ ٱللَّهُ رَسُولًا
Mpe soki bamoni yo, bazali koseka yo, bazali koloba: Oyo nde oyo Allah atindaki mpo azala motindami?
Arabic explanations of the Qur’an:
إِن كَادَ لَيُضِلُّنَا عَنۡ ءَالِهَتِنَا لَوۡلَآ أَن صَبَرۡنَا عَلَيۡهَاۚ وَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ حِينَ يَرَوۡنَ ٱلۡعَذَابَ مَنۡ أَضَلُّ سَبِيلًا
Etikali токе abungisa biso nzela ya banzambe ba biso, soki koyika mpiko na biso te nabango. Kasi mosika te, bakoyeba, ntango bakomona etumbu ete nani abungi nzela koleka.
Arabic explanations of the Qur’an:
أَرَءَيۡتَ مَنِ ٱتَّخَذَ إِلَٰهَهُۥ هَوَىٰهُ أَفَأَنتَ تَكُونُ عَلَيۡهِ وَكِيلًا
Boye ozali kornona te moto oyo azui mposa naye nde nzambe naye? Boye yo ozali mobateli ya moto ya motindo oyo?
Arabic explanations of the Qur’an:
 
Translation of the meanings Surah: Al-Furqān
Surahs’ Index Page Number
 
Translation of the Meanings of the Noble Qur'an - Lingala translation - Mohammed Balangogo - Translations’ Index

Translated by Zakaria Mohammed Balangogo

close