Check out the new design

ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: بقره   آیه:
فَمَنۡ خَافَ مِن مُّوصٖ جَنَفًا أَوۡ إِثۡمٗا فَأَصۡلَحَ بَيۡنَهُمۡ فَلَآ إِثۡمَ عَلَيۡهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Kasi soki mokaboli nkita ya mowei abangeli ye libunga too lisumu, mpe abongisi kati na bakitani naye, ezali lisumu te, ya sôló Allah azali molimbisi, atonda mawa.
تفسیرهای عربی:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ كُتِبَ عَلَيۡكُمُ ٱلصِّيَامُ كَمَا كُتِبَ عَلَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَعَلَّكُمۡ تَتَّقُونَ
Eh bino baye bondimi! Ngizi ekomameli likolo na bino ndenge moko ekomamelaki likolo na ba oyo bazalaki liboso na bino, na ntina ete bakoka kobanga.
تفسیرهای عربی:
أَيَّامٗا مَّعۡدُودَٰتٖۚ فَمَن كَانَ مِنكُم مَّرِيضًا أَوۡ عَلَىٰ سَفَرٖ فَعِدَّةٞ مِّنۡ أَيَّامٍ أُخَرَۚ وَعَلَى ٱلَّذِينَ يُطِيقُونَهُۥ فِدۡيَةٞ طَعَامُ مِسۡكِينٖۖ فَمَن تَطَوَّعَ خَيۡرٗا فَهُوَ خَيۡرٞ لَّهُۥۚ وَأَن تَصُومُواْ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Mikolo mia botangi. Oyo akozala na bokono too mpe mobembo okati na bino, afuta o mikolo misusu. Mpe mpona baye bazali na bokoki te; baleisa babola. Mpe na oyo akobakisa mpona bolamu. ezali malamu mingi mpona ye, mpe soki bokangi ngizi, ezali malamu mingi mpona bino, soki bozali koyeba.
تفسیرهای عربی:
شَهۡرُ رَمَضَانَ ٱلَّذِيٓ أُنزِلَ فِيهِ ٱلۡقُرۡءَانُ هُدٗى لِّلنَّاسِ وَبَيِّنَٰتٖ مِّنَ ٱلۡهُدَىٰ وَٱلۡفُرۡقَانِۚ فَمَن شَهِدَ مِنكُمُ ٱلشَّهۡرَ فَلۡيَصُمۡهُۖ وَمَن كَانَ مَرِيضًا أَوۡ عَلَىٰ سَفَرٖ فَعِدَّةٞ مِّنۡ أَيَّامٍ أُخَرَۗ يُرِيدُ ٱللَّهُ بِكُمُ ٱلۡيُسۡرَ وَلَا يُرِيدُ بِكُمُ ٱلۡعُسۡرَ وَلِتُكۡمِلُواْ ٱلۡعِدَّةَ وَلِتُكَبِّرُواْ ٱللَّهَ عَلَىٰ مَا هَدَىٰكُمۡ وَلَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Okati ya sanza ya ramadani nde eyambaki bokiti ya kurani ezali bokambi mpona bato, mpe nzela polele na ntina ya ekambemi malamu mpe bososoli. Oyo okati na bino sanza wana ekokuta ye esengeli naye kokanga ngizi, kasi oyo azali na bokono too azali na mobembo, akanga yango mikolo misusu. Allah alingeli bino mpete kasi alingeli bino mpasi te. Mpe bokokisa mikolo (ya ngizi), mpe bokumisa bonene ya Allah na ntina ete asungi bino na nzela ya semba, mpe mpo ete bopesa ye botondi.
تفسیرهای عربی:
وَإِذَا سَأَلَكَ عِبَادِي عَنِّي فَإِنِّي قَرِيبٌۖ أُجِيبُ دَعۡوَةَ ٱلدَّاعِ إِذَا دَعَانِۖ فَلۡيَسۡتَجِيبُواْ لِي وَلۡيُؤۡمِنُواْ بِي لَعَلَّهُمۡ يَرۡشُدُونَ
Mpe soki bawumbu na ngai batuni yo mpona ngai, ya sôló ngai nazali penepene ya koyanola na tango mobengi abengi. Bayanola mbela na ngai mpe bandimela ngai, mpo ete bango bakambama malamu.
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: بقره
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو - لیست ترجمه ها

ترجمه‌ى زکریا محمد بالنگوگو.

بستن