Check out the new design

ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو * - لیست ترجمه ها

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ترجمهٔ معانی سوره: بقره   آیه:
وَإِذَا طَلَّقۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ فَبَلَغۡنَ أَجَلَهُنَّ فَأَمۡسِكُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٍ أَوۡ سَرِّحُوهُنَّ بِمَعۡرُوفٖۚ وَلَا تُمۡسِكُوهُنَّ ضِرَارٗا لِّتَعۡتَدُواْۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَقَدۡ ظَلَمَ نَفۡسَهُۥۚ وَلَا تَتَّخِذُوٓاْ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ هُزُوٗاۚ وَٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ عَلَيۡكُمۡ وَمَآ أَنزَلَ عَلَيۡكُم مِّنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَٱلۡحِكۡمَةِ يَعِظُكُم بِهِۦۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
Mpe soki boboyani na basi na bino mpe bango basili kokokisa eleko ya kozela, bozongisa bango na libala na lolenge ya malamu, to botika bango bakende na lolenge ya malamu, kasi bokanga bango te na ndenge ya mabe mpona konyokolo noki bokobuka mibeko. Oyo akosala bongo ye wana asili kobuba molimo naye. Kasi bozua bilembo mpe mikapo mia Allah na maseki te. Mpe bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, kowuta na buku mpe bwanya oyo akitiseli bino, mpona kolendisa bino na yango. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali moyebi ya biloko binso.
تفسیرهای عربی:
وَإِذَا طَلَّقۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ فَبَلَغۡنَ أَجَلَهُنَّ فَلَا تَعۡضُلُوهُنَّ أَن يَنكِحۡنَ أَزۡوَٰجَهُنَّ إِذَا تَرَٰضَوۡاْ بَيۡنَهُم بِٱلۡمَعۡرُوفِۗ ذَٰلِكَ يُوعَظُ بِهِۦ مَن كَانَ مِنكُمۡ يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِۗ ذَٰلِكُمۡ أَزۡكَىٰ لَكُمۡ وَأَطۡهَرُۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ وَأَنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
Mpe soki bokabwani na basi na bino, sima bakokisi eleko na bango, bopekisa bango te ete babalana na mibali misusu, soki basili koyokana kati na bango. Na lolenge ya malamu, na boye nde ezali malendisi mpona oyo kati na bino azali kondima na Allah mpe na mokolo ya suka. Wana ezali mpeto mpe malamu mpona bino, Allah nde ayebi, mpe bino boyebi te.
تفسیرهای عربی:
۞ وَٱلۡوَٰلِدَٰتُ يُرۡضِعۡنَ أَوۡلَٰدَهُنَّ حَوۡلَيۡنِ كَامِلَيۡنِۖ لِمَنۡ أَرَادَ أَن يُتِمَّ ٱلرَّضَاعَةَۚ وَعَلَى ٱلۡمَوۡلُودِ لَهُۥ رِزۡقُهُنَّ وَكِسۡوَتُهُنَّ بِٱلۡمَعۡرُوفِۚ لَا تُكَلَّفُ نَفۡسٌ إِلَّا وُسۡعَهَاۚ لَا تُضَآرَّ وَٰلِدَةُۢ بِوَلَدِهَا وَلَا مَوۡلُودٞ لَّهُۥ بِوَلَدِهِۦۚ وَعَلَى ٱلۡوَارِثِ مِثۡلُ ذَٰلِكَۗ فَإِنۡ أَرَادَا فِصَالًا عَن تَرَاضٖ مِّنۡهُمَا وَتَشَاوُرٖ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡهِمَاۗ وَإِنۡ أَرَدتُّمۡ أَن تَسۡتَرۡضِعُوٓاْ أَوۡلَٰدَكُمۡ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ إِذَا سَلَّمۡتُم مَّآ ءَاتَيۡتُم بِٱلۡمَعۡرُوفِۗ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
Mpe bamama, bakomelisa bana na bango mabele mbula mibale mobimba mpona baye balingi kokokisa komelisa bana mpenza. Mpe esengeli na tata ya mwana koleisa mpe kolatisa bamelisi wana na lolenge ya malamu, molimo amemaka te mokumba oyo eleki ye kilo. Mama anyokolama te mpona mwana naye; tata mpe anyokolo nzoto naye te mpona mwana. Mpe soki tata na mwana azali te, esengeli na mokitani naye amema mokumba wana lolenge moko tata azali kosala mpona mwana naye. Mpe soki baboti balingi kokata mwana mabele na bosepeli mpe boyokani kati na bango mibale ezali mabe te, mpe soki bolingi komelisa bana na bino o bipai bisusu, ezali mpe mabe te, soki bofuti bamelisi ya bana na ndenge elongobani. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali komona maye bozali kosala.
تفسیرهای عربی:
 
ترجمهٔ معانی سوره: بقره
فهرست سوره ها شماره صفحه
 
ترجمهٔ معانی قرآن کریم - ترجمه‌ى لينگالا - محمد بالنگوگو - لیست ترجمه ها

ترجمه‌ى زکریا محمد بالنگوگو.

بستن