Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo linngela * - Tippudi firooji ɗii

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Firo maanaaji Simoore: Simoore anfaali   Aaya:

Al-Anfâl (BOMENGO YA BITUMBA)

يَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡأَنفَالِۖ قُلِ ٱلۡأَنفَالُ لِلَّهِ وَٱلرَّسُولِۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَصۡلِحُواْ ذَاتَ بَيۡنِكُمۡۖ وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥٓ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
1. Bazali kotuna yo тропа bomengo bwa bitumba, loba: Ezali ya Allah na motindami waye. Bobanga Allah тре bobongisa bondeko o kati na bino. Мре botosa Allah na motindami waye, soki bozali soló bandimi.
Faccirooji aarabeeji:
إِنَّمَا ٱلۡمُؤۡمِنُونَ ٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِرَ ٱللَّهُ وَجِلَتۡ قُلُوبُهُمۡ وَإِذَا تُلِيَتۡ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُهُۥ زَادَتۡهُمۡ إِيمَٰنٗا وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
2. Bandimi ya sólo solo nde baye bazalaka soki bayoki nkombo ya Allah, mitema mia bango milengi, mpe soki mikapo mia ye mizali kotangama, ezali kobakisela bango kondima, mpe bapesi elikya epai ya Nkolo wa bango.
Faccirooji aarabeeji:
ٱلَّذِينَ يُقِيمُونَ ٱلصَّلَوٰةَ وَمِمَّا رَزَقۡنَٰهُمۡ يُنفِقُونَ
3. Baye bazali kotelemisa losambo, mpe kobimisa maye topesi bango, (o nzela ya Allah)
Faccirooji aarabeeji:
أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ حَقّٗاۚ لَّهُمۡ دَرَجَٰتٌ عِندَ رَبِّهِمۡ وَمَغۡفِرَةٞ وَرِزۡقٞ كَرِيمٞ
4. Bango nde bandimi ya soló, bazali na esika ya likolo epai ya Nkolo wa bango mpe bolimbisi na bozui bolamu.
Faccirooji aarabeeji:
كَمَآ أَخۡرَجَكَ رَبُّكَ مِنۢ بَيۡتِكَ بِٱلۡحَقِّ وَإِنَّ فَرِيقٗا مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ لَكَٰرِهُونَ
5. Lokola Nkolo wayo abimisaki yo na ndako nayo na bosölo, mpe ya sólo bandimi basusu basepeli na yango te.
Faccirooji aarabeeji:
يُجَٰدِلُونَكَ فِي ٱلۡحَقِّ بَعۡدَ مَا تَبَيَّنَ كَأَنَّمَا يُسَاقُونَ إِلَى ٱلۡمَوۡتِ وَهُمۡ يَنظُرُونَ
6. Bazali kosuanisa yo тропа bosôló sima ya bolimboli, lokola bazali kotinda bango na liwa mpe bazali kornona.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذۡ يَعِدُكُمُ ٱللَّهُ إِحۡدَى ٱلطَّآئِفَتَيۡنِ أَنَّهَا لَكُمۡ وَتَوَدُّونَ أَنَّ غَيۡرَ ذَاتِ ٱلشَّوۡكَةِ تَكُونُ لَكُمۡ وَيُرِيدُ ٱللَّهُ أَن يُحِقَّ ٱلۡحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦ وَيَقۡطَعَ دَابِرَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
7. Bokanisa tango Allah alakaki bino ete moko lisanga ya mibale ya bango ekozala ya bino, тре boponaki lisanga liye lizalaki na bibundeli te, kasi Allah alingaki kolongisa bosôló ya maloba naye, mpe aboyelaki bapagano mpe atiya bango bazala bato ya suka.
Faccirooji aarabeeji:
لِيُحِقَّ ٱلۡحَقَّ وَيُبۡطِلَ ٱلۡبَٰطِلَ وَلَوۡ كَرِهَ ٱلۡمُجۡرِمُونَ
8. Mpo ete alongisa bosôló mpe alimwisa lokuta ata bato mabe bazali koyina yango.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ تَسۡتَغِيثُونَ رَبَّكُمۡ فَٱسۡتَجَابَ لَكُمۡ أَنِّي مُمِدُّكُم بِأَلۡفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُرۡدِفِينَ
9. (Mpe bokanisa) tango bosengaki lisungi epai ya Nkolo wa bino. Mpe andimelaki bino, ete ya soló: ngai nakosalisa bino na ba anzelu nkoto yoko bazali kolandana. (bango na bango)
Faccirooji aarabeeji:
وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشۡرَىٰ وَلِتَطۡمَئِنَّ بِهِۦ قُلُوبُكُمۡۚ وَمَا ٱلنَّصۡرُ إِلَّا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٌ
10. Kasi Allah asalaki yango te sé mpo amemela bino sango, тре mpo mitema mia bino mikoka kokita, mpe elonga ezali sé epai na Allah. Ya sólo, Allah azali wa bokasi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ يُغَشِّيكُمُ ٱلنُّعَاسَ أَمَنَةٗ مِّنۡهُ وَيُنَزِّلُ عَلَيۡكُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ لِّيُطَهِّرَكُم بِهِۦ وَيُذۡهِبَ عَنكُمۡ رِجۡزَ ٱلشَّيۡطَٰنِ وَلِيَرۡبِطَ عَلَىٰ قُلُوبِكُمۡ وَيُثَبِّتَ بِهِ ٱلۡأَقۡدَامَ
11. Mpe tango azipaki bino na mpongi ya токе, ezali lokola ebateli naye likolo na bino mpe akitiseli bino mayi ya mbula kowuta o likolo, тропа kopetola bino na yango, mpe alongóla bino mbindo ya satana mpe akangisa mitema mia bino тре alendisa makolo na bino.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ يُوحِي رَبُّكَ إِلَى ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ أَنِّي مَعَكُمۡ فَثَبِّتُواْ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْۚ سَأُلۡقِي فِي قُلُوبِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلرُّعۡبَ فَٱضۡرِبُواْ فَوۡقَ ٱلۡأَعۡنَاقِ وَٱضۡرِبُواْ مِنۡهُمۡ كُلَّ بَنَانٖ
12. Kanisa tango Nkolo wayo ayebisaki ba anzelu, ya solo ngai nazali elongo na bino, bolendisa bandimi. Na kotiya bobangi o mitema mia bapagano. Bobeta bango bakingo тре bobeta bango na biteni binso.
Faccirooji aarabeeji:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ شَآقُّواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥۚ وَمَن يُشَاقِقِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ فَإِنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
13. Pamba te, bazangi kotosa Allah na motindami waye. Kasi oyo akozanga kotosa Allah na motindami waye, ya sólo penza, Allah nde mopesi etumbu ya makasi.
Faccirooji aarabeeji:
ذَٰلِكُمۡ فَذُوقُوهُ وَأَنَّ لِلۡكَٰفِرِينَ عَذَابَ ٱلنَّارِ
14. Wana nde (ndenge ekozalela bino) esengeli bomeka yango (etumbu)! Mpe ya sólo, etumbu ya bapengwi ekozalaka nde moto.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ زَحۡفٗا فَلَا تُوَلُّوهُمُ ٱلۡأَدۡبَارَ
15. Eh bino baye bondimi! Soki bokutani na bapengwi, (o bisika binso тропа bitumba) bokima bango te.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَن يُوَلِّهِمۡ يَوۡمَئِذٖ دُبُرَهُۥٓ إِلَّا مُتَحَرِّفٗا لِّقِتَالٍ أَوۡ مُتَحَيِّزًا إِلَىٰ فِئَةٖ فَقَدۡ بَآءَ بِغَضَبٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَمَأۡوَىٰهُ جَهَنَّمُۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
16. Mpe oyo kati na bino akokima banguna o mokolo wana, longola sé oyo apesi mokongo тропа koluka lolenge mosusu ya kobunda, to akei kokutana na mapinga mosusu тропа kokoba bitumba, ayeba ete asili kozua nkanda ya Allah. Мре esika naye ekozalaka lifelo, mpe yango nde ekozalaka esika ya mabe.
Faccirooji aarabeeji:
فَلَمۡ تَقۡتُلُوهُمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ قَتَلَهُمۡۚ وَمَا رَمَيۡتَ إِذۡ رَمَيۡتَ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ رَمَىٰ وَلِيُبۡلِيَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ مِنۡهُ بَلَآءً حَسَنًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
17. Ezali te bino nde bobomaki bango, kasi Allah nde abomaki bango. Мре tango obwakaki (likonga), ezali yo te nde obwakaki, kasi Allah nde mobwaki, (likonga) mpe ezali тропа kopesa bandimi bolamu na ndenge naye. Ya soló, Allah azali moyoki atonda boyebi.
Faccirooji aarabeeji:
ذَٰلِكُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ مُوهِنُ كَيۡدِ ٱلۡكَٰفِرِينَ
18. Yango ezali mpo oyeba lolenge kani Allah azali kobebisa mwango ya bapengwi.
Faccirooji aarabeeji:
إِن تَسۡتَفۡتِحُواْ فَقَدۡ جَآءَكُمُ ٱلۡفَتۡحُۖ وَإِن تَنتَهُواْ فَهُوَ خَيۡرٞ لَّكُمۡۖ وَإِن تَعُودُواْ نَعُدۡ وَلَن تُغۡنِيَ عَنكُمۡ فِئَتُكُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَوۡ كَثُرَتۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
19. Soki bolukaki elonga, ya soló, elonga esilaki koyela bino. Mpe soki botiki ezali malamu тропа bino, kasi soki bozongeli tokozonga, mpe lisanga na bino ekosalisa bino na eloko te, ata soki bozali ebele ndenge nini. Kasi boyeba ete: Ya sólo, Allah azali elongo na bandimi.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ وَأَنتُمۡ تَسۡمَعُونَ
20. Eh bino baye bondima! Botosa Allah na motindami waye, (Muhammad) kasi boboya ye te mpe bino bozali koyoka.
Faccirooji aarabeeji:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ قَالُواْ سَمِعۡنَا وَهُمۡ لَا يَسۡمَعُونَ
21. Mpe bozala te lokola baye bazali koloba: Toyokaki, kasi bayokaka te.
Faccirooji aarabeeji:
۞ إِنَّ شَرَّ ٱلدَّوَآبِّ عِندَ ٱللَّهِ ٱلصُّمُّ ٱلۡبُكۡمُ ٱلَّذِينَ لَا يَعۡقِلُونَ
22. Ya sólo, bazoba koleka banyama epai ya Allah, bazali baye bakufa matoyi, baye balobaka te (baba), bango wana bazangi kososola.
Faccirooji aarabeeji:
وَلَوۡ عَلِمَ ٱللَّهُ فِيهِمۡ خَيۡرٗا لَّأَسۡمَعَهُمۡۖ وَلَوۡ أَسۡمَعَهُمۡ لَتَوَلَّواْ وَّهُم مُّعۡرِضُونَ
23. Mpe soki Allah ayebaki(1) ete bazali na bolamu, balingaki koyokisa bango maye makosunga bango, mpe soki ata ayokisaki bango balingaki sé kopesa mokongo na koboya.
1 Allah ayebaki ete bazali na bolamu te.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱسۡتَجِيبُواْ لِلَّهِ وَلِلرَّسُولِ إِذَا دَعَاكُمۡ لِمَا يُحۡيِيكُمۡۖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَحُولُ بَيۡنَ ٱلۡمَرۡءِ وَقَلۡبِهِۦ وَأَنَّهُۥٓ إِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
24. Eh bino baye bondima! Boyamba mbela ya Allah na motindami, tango azali kobenga bino na maye makobikisa bino. Mpe boyeba ete ya soló, Allah azali okati ya moto na motema naye, mpe boyeba ete ya sólo, epai naye bokosangisama.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱتَّقُواْ فِتۡنَةٗ لَّا تُصِيبَنَّ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنكُمۡ خَآصَّةٗۖ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
25. Mpe bobanga etumbu eye ekopona te sé baye basali mabe kati na bino, mpe boyeba ya sólo, Allah azali mopesi etumbu ekasi.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱذۡكُرُوٓاْ إِذۡ أَنتُمۡ قَلِيلٞ مُّسۡتَضۡعَفُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ تَخَافُونَ أَن يَتَخَطَّفَكُمُ ٱلنَّاسُ فَـَٔاوَىٰكُمۡ وَأَيَّدَكُم بِنَصۡرِهِۦ وَرَزَقَكُم مِّنَ ٱلطَّيِّبَٰتِ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
26. Mpe bokanisa tango bozalaki motango moke, bozangaki makasi, bozalaki kobanga bato noki balimwisa bino na mokili, kasi asungi bino na elonga naye. Nasima apesaki bino bozui ya kitoko mpo botondo.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَخُونُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ وَتَخُونُوٓاْ أَمَٰنَٰتِكُمۡ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
27. Eh bino bandimi! Boteka Allah na motindami waye te, boye bokoteka mokumba na boyambi oyo ezali na maboko na bino mpe bozali kati na koyeba?
Faccirooji aarabeeji:
وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَآ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَأَوۡلَٰدُكُمۡ فِتۡنَةٞ وَأَنَّ ٱللَّهَ عِندَهُۥٓ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
28. Мре boyeba, ya soló bomengo bwa bino na bana ba bino, ezali Momekano, mpe ya sólo, Allah azali na bolamu bonene.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تَتَّقُواْ ٱللَّهَ يَجۡعَل لَّكُمۡ فُرۡقَانٗا وَيُكَفِّرۡ عَنكُمۡ سَيِّـَٔاتِكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡۗ وَٱللَّهُ ذُو ٱلۡفَضۡلِ ٱلۡعَظِيمِ
29. Eh bino bandimi! Soki bobangi Allah, akopesa bino bososoli mpe akolongola mabe na bino. Mpe akolimbisa masumu ma bino. Mpe Allah atonda bolamu bonene koleka.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذۡ يَمۡكُرُ بِكَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيُثۡبِتُوكَ أَوۡ يَقۡتُلُوكَ أَوۡ يُخۡرِجُوكَۚ وَيَمۡكُرُونَ وَيَمۡكُرُ ٱللَّهُۖ وَٱللَّهُ خَيۡرُ ٱلۡمَٰكِرِينَ
30. (Mpe kanisa) tango eye bapengwi basalelaki yo(1) likita été bakanga yo to koboma yo, to babengana yo. Basalaki likita yango, Allah mpe asaleli bango, kasi Allah azali Nkolo likita ya malamu koleka.
1 Muhammad (kimia mpe losambo ya Allah ezala likolo naye).
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا قَالُواْ قَدۡ سَمِعۡنَا لَوۡ نَشَآءُ لَقُلۡنَا مِثۡلَ هَٰذَآ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
31. Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bakolobaka: Tosilaki koyoka. Soki tolingaki, nde totangaki liloba lokola oyo, oyo ezali sé masapo ya kala.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذۡ قَالُواْ ٱللَّهُمَّ إِن كَانَ هَٰذَا هُوَ ٱلۡحَقَّ مِنۡ عِندِكَ فَأَمۡطِرۡ عَلَيۡنَا حِجَارَةٗ مِّنَ ٱلسَّمَآءِ أَوِ ٱئۡتِنَا بِعَذَابٍ أَلِيمٖ
32. Mpe tango balobaki ete: Eh Nkolo! Soki likambo oyo ezali bosoló penza ewuti epai nayo, Nokisela biso mabanga na likolo lokola mbula, to óyela biso etumbu mosusu ya makasi koleka.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُعَذِّبَهُمۡ وَأَنتَ فِيهِمۡۚ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ مُعَذِّبَهُمۡ وَهُمۡ يَسۡتَغۡفِرُونَ
33. Kaši Allah azali te тропа kopesa bango etumbu mpe ozali kati na bango, тре Allah azali te тропа kopesa bango etumbu тре bango bazali kosenga bolimbisi.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَا لَهُمۡ أَلَّا يُعَذِّبَهُمُ ٱللَّهُ وَهُمۡ يَصُدُّونَ عَنِ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ وَمَا كَانُوٓاْ أَوۡلِيَآءَهُۥٓۚ إِنۡ أَوۡلِيَآؤُهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُتَّقُونَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
34. Мре ndenge nini te Allah apesa bango etumbu mpe bango bazali kopekisa bandimi kokota o ndako esantu (ya makkah), mpe bazali bakengeli na yango te? Kasi babateli na yango nde bandimi oyo babangi Allah, kasi ebele kati na bango bazali koyeba te.
Faccirooji aarabeeji:
وَمَا كَانَ صَلَاتُهُمۡ عِندَ ٱلۡبَيۡتِ إِلَّا مُكَآءٗ وَتَصۡدِيَةٗۚ فَذُوقُواْ ٱلۡعَذَابَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ
35. Mpe losambo na bango na ndako(1) ezali sé bafololo mpe kobeta maboko, bomeka etumbu ya maye bozalaki kopengwa na yango.
1 Ka’aba (na Makkah).
Faccirooji aarabeeji:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُنفِقُونَ أَمۡوَٰلَهُمۡ لِيَصُدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ فَسَيُنفِقُونَهَا ثُمَّ تَكُونُ عَلَيۡهِمۡ حَسۡرَةٗ ثُمَّ يُغۡلَبُونَۗ وَٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِلَىٰ جَهَنَّمَ يُحۡشَرُونَ
36. Ya soló, baye bapengwa, bazali kobimisa misolo mia bango тропа kobundisa nzela ya Allah. Bakopesaka yango mpe bakozangaka, sima bakolongamaka. Mpe bapengwi bakosangisamaka o moto ya lifelo.
Faccirooji aarabeeji:
لِيَمِيزَ ٱللَّهُ ٱلۡخَبِيثَ مِنَ ٱلطَّيِّبِ وَيَجۡعَلَ ٱلۡخَبِيثَ بَعۡضَهُۥ عَلَىٰ بَعۡضٖ فَيَرۡكُمَهُۥ جَمِيعٗا فَيَجۡعَلَهُۥ فِي جَهَنَّمَۚ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
37. Mpo Allah akabola mabe na malamu, mpe atiya mabe likolo ya mabe, mpe asangisa yango nyoso na moto ya lifelo. Bango wana nde bazangi.
Faccirooji aarabeeji:
قُل لِّلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِن يَنتَهُواْ يُغۡفَرۡ لَهُم مَّا قَدۡ سَلَفَ وَإِن يَعُودُواْ فَقَدۡ مَضَتۡ سُنَّتُ ٱلۡأَوَّلِينَ
38. Loba na baye bapengwa ete: Soki batiki mabe, bakolimbisama na maye maleka. Kasi soki bazongeli, bakozuama lokola baye balekaki liboso na bango.
Faccirooji aarabeeji:
وَقَٰتِلُوهُمۡ حَتَّىٰ لَا تَكُونَ فِتۡنَةٞ وَيَكُونَ ٱلدِّينُ كُلُّهُۥ لِلَّهِۚ فَإِنِ ٱنتَهَوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ بِمَا يَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
39. Mpe bobundisa bango kino bakotika bosangisi,(1) mpe lingomba lizala lia Allah.(2) mpe soki batiki, Allah azali kornona maye manso bazali kosala.
1 Kosangisa Allah nakati ya mabondeli naye.
2 Islamu.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِن تَوَلَّوۡاْ فَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَوۡلَىٰكُمۡۚ نِعۡمَ ٱلۡمَوۡلَىٰ وَنِعۡمَ ٱلنَّصِيرُ
40. Mpe soki bapesi bino mokongo, boyeba ete ya soló, Allah nde mobateli na bino. Oyó nde suka na mobateli kitoko.
Faccirooji aarabeeji:
۞ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّمَا غَنِمۡتُم مِّن شَيۡءٖ فَأَنَّ لِلَّهِ خُمُسَهُۥ وَلِلرَّسُولِ وَلِذِي ٱلۡقُرۡبَىٰ وَٱلۡيَتَٰمَىٰ وَٱلۡمَسَٰكِينِ وَٱبۡنِ ٱلسَّبِيلِ إِن كُنتُمۡ ءَامَنتُم بِٱللَّهِ وَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَىٰ عَبۡدِنَا يَوۡمَ ٱلۡفُرۡقَانِ يَوۡمَ ٱلۡتَقَى ٱلۡجَمۡعَانِۗ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
41. Mpe boyeba ete manso bokozua na bitumba: Ya sólo, moko na mitano ezali тропа Allah na motindami mpe тропа mabota ya pene, mpe тропа bana bitike, тре тропа babola, тре тропа moto ya mobembo, (moleki nzela), soki ya soló, bozali kondima na Allah mpe kondima na maye tokitisaki epai ya mowumbu wa biso o mokolo mwa bososoli, mokolo moye mapinga mibale makutanaki. Mpe Allah azali na bokoki likolo ya eloko nyoso.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ أَنتُم بِٱلۡعُدۡوَةِ ٱلدُّنۡيَا وَهُم بِٱلۡعُدۡوَةِ ٱلۡقُصۡوَىٰ وَٱلرَّكۡبُ أَسۡفَلَ مِنكُمۡۚ وَلَوۡ تَوَاعَدتُّمۡ لَٱخۡتَلَفۡتُمۡ فِي ٱلۡمِيعَٰدِ وَلَٰكِن لِّيَقۡضِيَ ٱللَّهُ أَمۡرٗا كَانَ مَفۡعُولٗا لِّيَهۡلِكَ مَنۡ هَلَكَ عَنۢ بَيِّنَةٖ وَيَحۡيَىٰ مَنۡ حَيَّ عَنۢ بَيِّنَةٖۗ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَسَمِيعٌ عَلِيمٌ
42. Bozalaki ngambu ya pene, kasi (banguna) bazalaki ngambu ya mosika, kasi mapinga ya mikumba ezalaki na nsé ya bino. Soki bopesanaka elaka bolingaki kokesene sima. Mpe bolingaki kozuama na banguna, kasi Allah akokisaki mobeko na ndenge asalaki тропа elembo ena. Mpo aboma oyo alingaki koboma, mpe abikisa oyo alingaki kobikisa. Kasi Allah azali moyoki atonda boyebi.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ يُرِيكَهُمُ ٱللَّهُ فِي مَنَامِكَ قَلِيلٗاۖ وَلَوۡ أَرَىٰكَهُمۡ كَثِيرٗا لَّفَشِلۡتُمۡ وَلَتَنَٰزَعۡتُمۡ فِي ٱلۡأَمۡرِ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ سَلَّمَۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
43. Boye tango Allah alakisaki yo kati ya mpongi ete bazali mingi te, soki amonisaki yo ete bazali ebele mbele bokimaki na kobanga kobunda mpe bolingaki koswana na likambo yango kasi Allah abongisaki, ya soló, ye nde moyebi ya maye mabombami o kati ya mitema.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذۡ يُرِيكُمُوهُمۡ إِذِ ٱلۡتَقَيۡتُمۡ فِيٓ أَعۡيُنِكُمۡ قَلِيلٗا وَيُقَلِّلُكُمۡ فِيٓ أَعۡيُنِهِمۡ لِيَقۡضِيَ ٱللَّهُ أَمۡرٗا كَانَ مَفۡعُولٗاۗ وَإِلَى ٱللَّهِ تُرۡجَعُ ٱلۡأُمُورُ
44. Mpe tango bokutanaki, Allah amonisaki bino ete bango bazali токе, bango mpe lokola bamonaki bino токе liboso na bango wana ezalaki mpo mokano ya Allah mokokisama, mpe epai ya Allah nde makambo manso makozongaka.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِذَا لَقِيتُمۡ فِئَةٗ فَٱثۡبُتُواْ وَٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ كَثِيرٗا لَّعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
45. Eh bino baye bondima! Soki bokutani na lisanga lia banguna, bopika pende mpe bokumisa Allah mingi mpo bokoka kolonga.
Faccirooji aarabeeji:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَلَا تَنَٰزَعُواْ فَتَفۡشَلُواْ وَتَذۡهَبَ رِيحُكُمۡۖ وَٱصۡبِرُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ
46. Мре botosa Allah na motindami waye, mpe bosuana suana te noki bokokabwana mpe bokozanga bokasi. Na yango, bolenda na kokanga motema pamba te ya soló Allah azali elongo na bakangi mitema.
Faccirooji aarabeeji:
وَلَا تَكُونُواْ كَٱلَّذِينَ خَرَجُواْ مِن دِيَٰرِهِم بَطَرٗا وَرِئَآءَ ٱلنَّاسِ وَيَصُدُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ وَٱللَّهُ بِمَا يَعۡمَلُونَ مُحِيطٞ
47. Mpe bozala te lokola baye babimaki na bandako na bango na lolendo ete bato bamona bango, mpe kopekisa nzela ya Allah. Kasi Allah azingi maye bazali kosala.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِذۡ زَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ وَقَالَ لَا غَالِبَ لَكُمُ ٱلۡيَوۡمَ مِنَ ٱلنَّاسِ وَإِنِّي جَارٞ لَّكُمۡۖ فَلَمَّا تَرَآءَتِ ٱلۡفِئَتَانِ نَكَصَ عَلَىٰ عَقِبَيۡهِ وَقَالَ إِنِّي بَرِيٓءٞ مِّنكُمۡ إِنِّيٓ أَرَىٰ مَا لَا تَرَوۡنَ إِنِّيٓ أَخَافُ ٱللَّهَۚ وَٱللَّهُ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
48. Mpe tango satana abongiselaki bango misala mpe alobi na bango ete: Moto moko te akokoka bino lelo. Mpo ete ngai nazali na bino. Mpe tango mapinga mibale makutani, abaluki azongi sima mpe alobi: Ya sólo, ngai nawangani bino, mpe nazali mosika na bino, ngai nazali kornona maye bozali kornona te. Ya sólo, ngai nazali kobanga Allah, mpo Allah apesaka etumbu ya makasi.
Faccirooji aarabeeji:
إِذۡ يَقُولُ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ وَٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ غَرَّ هَٰٓؤُلَآءِ دِينُهُمۡۗ وَمَن يَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
49. (Bokanisa) tango bato ya bilongi mibale, mpe baye bazali na bokono o kati ya mitema mia bango, balobaki na bandimi ete: Bato oyo lingomba lia bango lizali kokosa bango. Kasi oyo akomipesa na Allah, ayeba ete yasoló, Allah azali na bokasi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ يَتَوَفَّى ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَضۡرِبُونَ وُجُوهَهُمۡ وَأَدۡبَٰرَهُمۡ وَذُوقُواْ عَذَابَ ٱلۡحَرِيقِ
50. Soki omoni tango ba anzelu babimisaka milimo mia bapengwi, bazali kobeta bango na bilongi bia bango, mpe mikongo mia bango, bazali koloba: Bomeka etumbu ya moto.
Faccirooji aarabeeji:
ذَٰلِكَ بِمَا قَدَّمَتۡ أَيۡدِيكُمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ لَيۡسَ بِظَلَّٰمٖ لِّلۡعَبِيدِ
51. Wana nde (etumbu) oyo bino moko bomisalelaki, mpe ya sólo, Allah abubaka bawumbu naye te.
Faccirooji aarabeeji:
كَدَأۡبِ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَأَخَذَهُمُ ٱللَّهُ بِذُنُوبِهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ قَوِيّٞ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
52. Ndenge moko na bato ya falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, bapengwaki na bilembo bia Allah. Allah azuaki bango na masumu ma bango. Ya sólo, Allah azali na bokasi mpe mopesi etumbu ya makasi.
Faccirooji aarabeeji:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ لَمۡ يَكُ مُغَيِّرٗا نِّعۡمَةً أَنۡعَمَهَا عَلَىٰ قَوۡمٍ حَتَّىٰ يُغَيِّرُواْ مَا بِأَنفُسِهِمۡ وَأَنَّ ٱللَّهَ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
53. Wana ezali mpo ete Allah akoki kolongola te bolamu oyo apesaki bato sé soki babongola bizaleli oyo bazalaki na yango, mpe ya sólo, Allah azali moyoki atonda boyebi.
Faccirooji aarabeeji:
كَدَأۡبِ ءَالِ فِرۡعَوۡنَ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ فَأَهۡلَكۡنَٰهُم بِذُنُوبِهِمۡ وَأَغۡرَقۡنَآ ءَالَ فِرۡعَوۡنَۚ وَكُلّٞ كَانُواْ ظَٰلِمِينَ
54. Bazalaki ndenge moko na bato ba falo, na ba oyo bazalaki liboso lia bango, baboyaki kondima na mikapo na bilembo bia Nkolo wa bango. Yango topesaki bango etumbu тропа masumu та bango. Mpe tozindisaki na mayi bato ya falo тропа bobubi bwa bango.
Faccirooji aarabeeji:
إِنَّ شَرَّ ٱلدَّوَآبِّ عِندَ ٱللَّهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
55. Ya soló, bato mabe koleka banyama epai ya Allah nde bapagano, mpe bango, bandimaka ata токе te.
Faccirooji aarabeeji:
ٱلَّذِينَ عَٰهَدتَّ مِنۡهُمۡ ثُمَّ يَنقُضُونَ عَهۡدَهُمۡ فِي كُلِّ مَرَّةٖ وَهُمۡ لَا يَتَّقُونَ
56. Bango nde baye opesanaki na bango elaka mpe na tango inso bazangaki kotosa yango, mpe bazali kobanga ata токе te.
Faccirooji aarabeeji:
فَإِمَّا تَثۡقَفَنَّهُمۡ فِي ٱلۡحَرۡبِ فَشَرِّدۡ بِهِم مَّنۡ خَلۡفَهُمۡ لَعَلَّهُمۡ يَذَّكَّرُونَ
57. Soki ozui bokoki likolo na bango o tango ya bitumba, pesa bango etumbu eye ekoki mpo basusu oyo bazali sima na bango babanga, mpe mpo bakanisa.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِمَّا تَخَافَنَّ مِن قَوۡمٍ خِيَانَةٗ فَٱنۢبِذۡ إِلَيۡهِمۡ عَلَىٰ سَوَآءٍۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يُحِبُّ ٱلۡخَآئِنِينَ
58. Mpe soki ya sólo, ozali kobanga ete bato ya bilongi mibale bateka yo, esengeli nayo koboya na polele mpe na bosembo na elaka eye ozuaki na bango, pamba te Allah alingaka te bato ya bilongi mibale.
Faccirooji aarabeeji:
وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ سَبَقُوٓاْۚ إِنَّهُمۡ لَا يُعۡجِزُونَ
59. Bapengwi bakanisa te ete tozangaki kozua bango na maye basalaki, bakokoka kokima biso te.
Faccirooji aarabeeji:
وَأَعِدُّواْ لَهُم مَّا ٱسۡتَطَعۡتُم مِّن قُوَّةٖ وَمِن رِّبَاطِ ٱلۡخَيۡلِ تُرۡهِبُونَ بِهِۦ عَدُوَّ ٱللَّهِ وَعَدُوَّكُمۡ وَءَاخَرِينَ مِن دُونِهِمۡ لَا تَعۡلَمُونَهُمُ ٱللَّهُ يَعۡلَمُهُمۡۚ وَمَا تُنفِقُواْ مِن شَيۡءٖ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ يُوَفَّ إِلَيۡكُمۡ وَأَنتُمۡ لَا تُظۡلَمُونَ
60. Мре bolengele тропа bango bokasi bonso bozali na yango na bibundeli bia lolenge nyoso тропа kobangisa monguna ya Allah тре monguna ya bino. Na basusu bazali sima boyebi bango te. Kasi Allah nde ayebi bango. Mpe boyeba ete oyo nyoso bokobimisa na nzela ya Allah, akozongisela bino na malamu penza, mpe bokobubamaka te.
Faccirooji aarabeeji:
۞ وَإِن جَنَحُواْ لِلسَّلۡمِ فَٱجۡنَحۡ لَهَا وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱللَّهِۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
61. Mpe soki balingi kimia batiki bitumba, yo mpe yaka na kimia, kasi tia elikia epai ya Allah. Mpo azali ya soló moyoki mpe atonda boyebi.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِن يُرِيدُوٓاْ أَن يَخۡدَعُوكَ فَإِنَّ حَسۡبَكَ ٱللَّهُۚ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَيَّدَكَ بِنَصۡرِهِۦ وَبِٱلۡمُؤۡمِنِينَ
62. Mpe soki balingi kokosa yo, Allah akoki тропа yo. Ye nde asalisaki yo na lisungi naye mpe na bandimi lokola.
Faccirooji aarabeeji:
وَأَلَّفَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡۚ لَوۡ أَنفَقۡتَ مَا فِي ٱلۡأَرۡضِ جَمِيعٗا مَّآ أَلَّفۡتَ بَيۡنَ قُلُوبِهِمۡ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ أَلَّفَ بَيۡنَهُمۡۚ إِنَّهُۥ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
63. Mpe asangisaki mitema mia bango, (na bondimi) ata soki obimisaka manso maye mazali о mabele, mbele osangisaki mitema mia bango te. Kasi Allah nde asangisa kati na bango, ya sólo, ye azali na bokasi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَسۡبُكَ ٱللَّهُ وَمَنِ ٱتَّبَعَكَ مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
64. Eh yo ntoma! Allah akoki yo, na bandimi baye balandi yo bakoki yo mpe lokola.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ حَرِّضِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ عَلَى ٱلۡقِتَالِۚ إِن يَكُن مِّنكُمۡ عِشۡرُونَ صَٰبِرُونَ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِأَنَّهُمۡ قَوۡمٞ لَّا يَفۡقَهُونَ
65. Eh ntoma! Telemela bandimi (yebisa bango) тропа kobunda na bapagano. Soki ezali na ntuku mibale ya bakangi mitema okati na bino, bakolonga nkama mibale, mpe soki bazali mokama moko okati na bino bakolonga nkoto moko okati ya bapagano, mpo ete bazangi bososoli mpe bayebi eloko te.
Faccirooji aarabeeji:
ٱلۡـَٰٔنَ خَفَّفَ ٱللَّهُ عَنكُمۡ وَعَلِمَ أَنَّ فِيكُمۡ ضَعۡفٗاۚ فَإِن يَكُن مِّنكُم مِّاْئَةٞ صَابِرَةٞ يَغۡلِبُواْ مِاْئَتَيۡنِۚ وَإِن يَكُن مِّنكُمۡ أَلۡفٞ يَغۡلِبُوٓاْ أَلۡفَيۡنِ بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ مَعَ ٱلصَّٰبِرِينَ
66. Sikoyo Allah akutoli bino mokumba, mpe ayebaki ete kati na bino bolembu ezali. Soki bozali na bayiki mpiko mokama moko, bakolonga mikama mibale, mpe soki bazali nkoto moko kati na bino, bakolonga nkoto mibale na ndingisa ya Allah. Mpo ete Allah azali elongo na bakangi mitema.
Faccirooji aarabeeji:
مَا كَانَ لِنَبِيٍّ أَن يَكُونَ لَهُۥٓ أَسۡرَىٰ حَتَّىٰ يُثۡخِنَ فِي ٱلۡأَرۡضِۚ تُرِيدُونَ عَرَضَ ٱلدُّنۡيَا وَٱللَّهُ يُرِيدُ ٱلۡأٓخِرَةَۗ وَٱللَّهُ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
67. Esengelaki te na ntoma kotiya bakangami na bitumba okati ya boloko, sé bakundama na mabele. Boye bozali kolinga lokumu na bomoyi ya nsé nzoka nde Allah alingi bomoyi ya mokolo ya suka. Mpe Allah azali na bokasi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
لَّوۡلَا كِتَٰبٞ مِّنَ ٱللَّهِ سَبَقَ لَمَسَّكُمۡ فِيمَآ أَخَذۡتُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٞ
68. Soki makomi mautaka epai ya Allah te, etumbu ya Allah ya monene elingaki kozua bino.
Faccirooji aarabeeji:
فَكُلُواْ مِمَّا غَنِمۡتُمۡ حَلَٰلٗا طَيِّبٗاۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
69. Mpe bolia biloko ya malamu biye bozuaki yango na bitumba. Mpe bobanga Allah ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Faccirooji aarabeeji:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ قُل لِّمَن فِيٓ أَيۡدِيكُم مِّنَ ٱلۡأَسۡرَىٰٓ إِن يَعۡلَمِ ٱللَّهُ فِي قُلُوبِكُمۡ خَيۡرٗا يُؤۡتِكُمۡ خَيۡرٗا مِّمَّآ أُخِذَ مِنكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
70. Eh ntoma! Loba na baye bazali na maboko na bino kati na banguna baye bakangami kati na boloko ete: Soki Allah ayebi(1) ete mitema mia bino mizali malamu, akopesa bino ya malamu koleka biye babotoli bino, akolimbisa bino, mpo Allah azali molimbisi atonda ngolu.
1 Allah ayebaki.
Faccirooji aarabeeji:
وَإِن يُرِيدُواْ خِيَانَتَكَ فَقَدۡ خَانُواْ ٱللَّهَ مِن قَبۡلُ فَأَمۡكَنَ مِنۡهُمۡۗ وَٱللَّهُ عَلِيمٌ حَكِيمٌ
71. Мре soki baponi koteka yo, yeba ete basilaki koteka Allah liboso, mpe (Allah) asukisaki bango, (o mokolo mwa badri). Kasi Allah azali moyebi atonda bwanya.
Faccirooji aarabeeji:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ بِأَمۡوَٰلِهِمۡ وَأَنفُسِهِمۡ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱلَّذِينَ ءَاوَواْ وَّنَصَرُوٓاْ أُوْلَٰٓئِكَ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضٖۚ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَلَمۡ يُهَاجِرُواْ مَا لَكُم مِّن وَلَٰيَتِهِم مِّن شَيۡءٍ حَتَّىٰ يُهَاجِرُواْۚ وَإِنِ ٱسۡتَنصَرُوكُمۡ فِي ٱلدِّينِ فَعَلَيۡكُمُ ٱلنَّصۡرُ إِلَّا عَلَىٰ قَوۡمِۭ بَيۡنَكُمۡ وَبَيۡنَهُم مِّيثَٰقٞۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
72. Ya soló, baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) bakei (madinah), mpe babundaki na misolo mia bango na milimo mia bango na nzela ya Allah, na baye bayambaki bango na lisungi na (madinah), baye wana nde bazali balingami bango na bango. Kasi тропа baye bandimaki mpe batikaki (Makkah) te, esengeli na bino te kozua bango balingami kino bakolanda bino esika bozali. Mpe soki basengi bino lisungi na nkombo ya lingomba, esengeli na bino kopesa bango maboko, kasi ezala likolo ya bato oyo elaka ezali kati kati na bino na bango. Mpe Allah azali kornona manso bozali kosala.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلِيَآءُ بَعۡضٍۚ إِلَّا تَفۡعَلُوهُ تَكُن فِتۡنَةٞ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَفَسَادٞ كَبِيرٞ
73. Kasi baye bapengwa bazali balingami kati kati na bango. Mpe soki bobundisi bango te, ekozala komekama likolo ya mabele mpe mobulu ya monene.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَٱلَّذِينَ ءَاوَواْ وَّنَصَرُوٓاْ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ حَقّٗاۚ لَّهُم مَّغۡفِرَةٞ وَرِزۡقٞ كَرِيمٞ
74. Kaši baye bandimaki тре batikaki (Makkah) тре bakei kobunda o nzela ya Allah, lolenge moko na baye bayambaki bango тре bapesaki bango maboko, bango nde bandimi ya soló. Bakolimbisamaka mpe bakopesamaka bozui bolamu.
Faccirooji aarabeeji:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ مِنۢ بَعۡدُ وَهَاجَرُواْ وَجَٰهَدُواْ مَعَكُمۡ فَأُوْلَٰٓئِكَ مِنكُمۡۚ وَأُوْلُواْ ٱلۡأَرۡحَامِ بَعۡضُهُمۡ أَوۡلَىٰ بِبَعۡضٖ فِي كِتَٰبِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمُۢ
75. Kasi тропа baye bandimaki sima na bino тре batikaki (Makkah), mpe babundaki elongo na bino, bango nde bato na bino. Kasi bondeko ya makila kati na bino bandimi ezali liboso тропа bokitani, engebene na buku ya Allah. Ya sólo, Allah azali na boyebi ya biloko binso.
Faccirooji aarabeeji:
 
Firo maanaaji Simoore: Simoore anfaali
Tippudi cimooje Tonngoode hello ngoo
 
Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo linngela - Tippudi firooji ɗii

Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo fayde e ɗemngal linngelaa, firi ɗum ko Sakariyaa Muhammad balinngogo

Uddude