Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Hûd   Verset:
وَيَٰقَوۡمِ لَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مَالًاۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِۚ وَمَآ أَنَا۠ بِطَارِدِ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْۚ إِنَّهُم مُّلَٰقُواْ رَبِّهِمۡ وَلَٰكِنِّيٓ أَرَىٰكُمۡ قَوۡمٗا تَجۡهَلُونَ
29. Oh! Bato ba ngai! Nazali kosenga bino yango misolo te. Lifuta lia ngai likowuta sé epai ya Allah. Мре nakoki kobengana bandimi te, ya soló, bango bakokutanaka na Nkolo wa bango. Kasi ngai nazali kornona bino bozali koyeba te;
Les exégèses en arabe:
وَيَٰقَوۡمِ مَن يَنصُرُنِي مِنَ ٱللَّهِ إِن طَرَدتُّهُمۡۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
30. Oh bato ba ngai! Nani akosalisa ngai na (etumbu) ya Allah soki nabengani bango? Boye bozali kokanisa te?
Les exégèses en arabe:
وَلَآ أَقُولُ لَكُمۡ عِندِي خَزَآئِنُ ٱللَّهِ وَلَآ أَعۡلَمُ ٱلۡغَيۡبَ وَلَآ أَقُولُ إِنِّي مَلَكٞ وَلَآ أَقُولُ لِلَّذِينَ تَزۡدَرِيٓ أَعۡيُنُكُمۡ لَن يُؤۡتِيَهُمُ ٱللَّهُ خَيۡرًاۖ ٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا فِيٓ أَنفُسِهِمۡ إِنِّيٓ إِذٗا لَّمِنَ ٱلظَّٰلِمِينَ
31. Mpe nakoki koloba na bino te ete: Nazali na sanduku ya bomengo ya Allah. Nakoloba mpe te ete nayebi mabombami, mpe nakoloba te ete: Nazali anzelu. Mpe nakoloba te na baye bozali kotala mpamba ete: Allah akopesa bango bolamu te. Allah ayebi malamu maye mazali o kati na bango, noki te nakozala elongo na bato mabe.
Les exégèses en arabe:
قَالُواْ يَٰنُوحُ قَدۡ جَٰدَلۡتَنَا فَأَكۡثَرۡتَ جِدَٰلَنَا فَأۡتِنَا بِمَا تَعِدُنَآ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
32. Balobi: Oh Núh! Osili kosuanisa biso ya koleka, yela biso (etumbu) oyo ozali kolobela soki ezali ya sólo (elembo).
Les exégèses en arabe:
قَالَ إِنَّمَا يَأۡتِيكُم بِهِ ٱللَّهُ إِن شَآءَ وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ
33. Alobi: Ya sólo, Allah nde akoyela bino yango soki alingi. Kasi bokokokaka kokima te.
Les exégèses en arabe:
وَلَا يَنفَعُكُمۡ نُصۡحِيٓ إِنۡ أَرَدتُّ أَنۡ أَنصَحَ لَكُمۡ إِن كَانَ ٱللَّهُ يُرِيدُ أَن يُغۡوِيَكُمۡۚ هُوَ رَبُّكُمۡ وَإِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
34. Toli na ngai ezali kosalisa bino te tango nazali kopesa bino yango, soki Allah alingi kobungisa bino, azali Nkolo wa bino, mpe bokozongisama epai naye.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰهُۖ قُلۡ إِنِ ٱفۡتَرَيۡتُهُۥ فَعَلَيَّ إِجۡرَامِي وَأَنَا۠ بَرِيٓءٞ مِّمَّا تُجۡرِمُونَ
35. Mpe bazali koloba été azali kokosa! Loba: Soki nakosi lisumu yango ekozala na molimo na ngai moko. Mpe nazali mosika na makambo mabe oyo bozali kosala.
Les exégèses en arabe:
وَأُوحِيَ إِلَىٰ نُوحٍ أَنَّهُۥ لَن يُؤۡمِنَ مِن قَوۡمِكَ إِلَّا مَن قَدۡ ءَامَنَ فَلَا تَبۡتَئِسۡ بِمَا كَانُواْ يَفۡعَلُونَ
36. Mpe emoniseli ekitelaki Nûh ete: Ya soló, bato nayo oyo bakondimaka nayo lisusu te, longola sé baye bandimaki liboso. Kasi komitungisama te тропа maye bazali kosala.
Les exégèses en arabe:
وَٱصۡنَعِ ٱلۡفُلۡكَ بِأَعۡيُنِنَا وَوَحۡيِنَا وَلَا تُخَٰطِبۡنِي فِي ٱلَّذِينَ ظَلَمُوٓاْ إِنَّهُم مُّغۡرَقُونَ
37. Mpe tonga masuwa, na miso na biso mpe na emoniseli na biso, kasi kotuna ngai lisusu te тропа bato mabe. Ya sólo, bango bakozinda.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Hûd
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture