Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Al 'Imran   Verset:
رَبَّنَآ ءَامَنَّا بِمَآ أَنزَلۡتَ وَٱتَّبَعۡنَا ٱلرَّسُولَ فَٱكۡتُبۡنَا مَعَ ٱلشَّٰهِدِينَ
Nkolo na biso tondimi na maye okitisaki mpe tolandi motindami. Tia biso elongo na batatoli ya sôló.
Les exégèses en arabe:
وَمَكَرُواْ وَمَكَرَ ٱللَّهُۖ وَٱللَّهُ خَيۡرُ ٱلۡمَٰكِرِينَ
Mpe basalaki likita ya mabe, Allah mpe asalaki likita, kasi Allah nde azali likolo ya makita nyoso.
Les exégèses en arabe:
إِذۡ قَالَ ٱللَّهُ يَٰعِيسَىٰٓ إِنِّي مُتَوَفِّيكَ وَرَافِعُكَ إِلَيَّ وَمُطَهِّرُكَ مِنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَجَاعِلُ ٱلَّذِينَ ٱتَّبَعُوكَ فَوۡقَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِۖ ثُمَّ إِلَيَّ مَرۡجِعُكُمۡ فَأَحۡكُمُ بَيۡنَكُمۡ فِيمَا كُنتُمۡ فِيهِ تَخۡتَلِفُونَ
Kanisa[1] tango Allah alobaki: Eh Issa! Ya sôló, ngai nakozwa yo mpe nakomatisa yo epai na ngai mpe na kopetola yo okati ya bapagano. Mpe na kotia baye balandi yo likolo ya bapagano, kino suka ya molongo, sima epai na ngai nde bino nioso bokozonga. Mpe na ko sambisa bino okati ya maye bozalaki na bokabwani.
[1] Muhammad.
Les exégèses en arabe:
فَأَمَّا ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَأُعَذِّبُهُمۡ عَذَابٗا شَدِيدٗا فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
Kasi mpona baye bapengwi, nakopesa bango etumbu ya makasi okati ya mokili mpe na mokolo ya suka, mpe bakozua basalisi te.
Les exégèses en arabe:
وَأَمَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فَيُوَفِّيهِمۡ أُجُورَهُمۡۗ وَٱللَّهُ لَا يُحِبُّ ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe mpona baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, akopesa bango lifuta na bango. Mpe Allah alingaka babubi te.
Les exégèses en arabe:
ذَٰلِكَ نَتۡلُوهُ عَلَيۡكَ مِنَ ٱلۡأٓيَٰتِ وَٱلذِّكۡرِ ٱلۡحَكِيمِ
Wana ezali kati ya mikapo tozali kotangela yo mpe Emoniseli ya bwányá.
Les exégèses en arabe:
إِنَّ مَثَلَ عِيسَىٰ عِندَ ٱللَّهِ كَمَثَلِ ءَادَمَۖ خَلَقَهُۥ مِن تُرَابٖ ثُمَّ قَالَ لَهُۥ كُن فَيَكُونُ
Ya sôló, ndakisa ya Issa epai na Allah ezali lolenge moko na Âdam akelaki ye na mabele, na sima alobaki naye: “Zala”, mpe azalisamaki.
Les exégèses en arabe:
ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّكَ فَلَا تَكُن مِّنَ ٱلۡمُمۡتَرِينَ
Bosembo ezali nde epai na Nkolo nayo. Kasi kozala te elongo na baye bazali na koyimayima.
Les exégèses en arabe:
فَمَنۡ حَآجَّكَ فِيهِ مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَكَ مِنَ ٱلۡعِلۡمِ فَقُلۡ تَعَالَوۡاْ نَدۡعُ أَبۡنَآءَنَا وَأَبۡنَآءَكُمۡ وَنِسَآءَنَا وَنِسَآءَكُمۡ وَأَنفُسَنَا وَأَنفُسَكُمۡ ثُمَّ نَبۡتَهِلۡ فَنَجۡعَل لَّعۡنَتَ ٱللَّهِ عَلَى ٱلۡكَٰذِبِينَ
Kasi oyo akotia yo ntembe, mpe kosuanisa yo na ntina na (Issa) mpe yo osili kozua boyebi, loba na bango ete: Boya tokutana, mpe tobenga bana na biso mpe bana na bino, basi na biso mpe basi na bino, biso mpe bino, na sima tomisenga ete botutu ya Allah ekitela bato ya lokuta kati na biso.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Al 'Imran
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture