Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Al An'am   Verset:
ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَلَمۡ يَلۡبِسُوٓاْ إِيمَٰنَهُم بِظُلۡمٍ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمُ ٱلۡأَمۡنُ وَهُم مُّهۡتَدُونَ
82. Baye bandima mpe balatisi bondimi na bango mabe te, bango wana nde bazali na kimia (babatelami) mpe bango nde bakambami.
Les exégèses en arabe:
وَتِلۡكَ حُجَّتُنَآ ءَاتَيۡنَٰهَآ إِبۡرَٰهِيمَ عَلَىٰ قَوۡمِهِۦۚ نَرۡفَعُ دَرَجَٰتٖ مَّن نَّشَآءُۗ إِنَّ رَبَّكَ حَكِيمٌ عَلِيمٞ
83. Wana nde elembetele na biso eye topesaki na Ibrâhîm likolo ya bato naye. Totombolaka mpete ya nani tolingi, ya sólo, Nkolo nayo azali wa bwanya atonda boyebi.
Les exégèses en arabe:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۚ كُلًّا هَدَيۡنَاۚ وَنُوحًا هَدَيۡنَا مِن قَبۡلُۖ وَمِن ذُرِّيَّتِهِۦ دَاوُۥدَ وَسُلَيۡمَٰنَ وَأَيُّوبَ وَيُوسُفَ وَمُوسَىٰ وَهَٰرُونَۚ وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
84. Мре Topesaki ye likabo yaIs’hâq na Ya’qúb, mpe tokambaki bango banso babale, тре Nûh tokambaki liboso, mpe na libota naye: Dâwud, Suleyman, Ayûb, Yûsuf, Mûssa mpe Hâruna.(1) Na boye nde tofutaka bato malamu.
1 Háruna: Bótala: suratu An-Nisá: 163, Al-Baqarah: 248.
Les exégèses en arabe:
وَزَكَرِيَّا وَيَحۡيَىٰ وَعِيسَىٰ وَإِلۡيَاسَۖ كُلّٞ مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
85. Mpe Zakariya na Yahya mpe Issa mpe Il’yâs,(1) nyoso bazalaki bato ya misala malamu;
1 Eliya.
Les exégèses en arabe:
وَإِسۡمَٰعِيلَ وَٱلۡيَسَعَ وَيُونُسَ وَلُوطٗاۚ وَكُلّٗا فَضَّلۡنَا عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
86. Mpe İsmail na Al-yasa’ mpe Yûnus na Loth, тре topesaki bango koleka bato awa na mokili.
Les exégèses en arabe:
وَمِنۡ ءَابَآئِهِمۡ وَذُرِّيَّٰتِهِمۡ وَإِخۡوَٰنِهِمۡۖ وَٱجۡتَبَيۡنَٰهُمۡ وَهَدَيۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
87. Mpe basusu kati ya batata na bango mpe bana na bango mpe bandeko na bango, toponaki bango mpe tokambaki bango na nzela ya semba.
Les exégèses en arabe:
ذَٰلِكَ هُدَى ٱللَّهِ يَهۡدِي بِهِۦ مَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦۚ وَلَوۡ أَشۡرَكُواْ لَحَبِطَ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
88. Wana nde bokambi ya Allah azali kokamba na yango nani alingi kati na bawumbu naye. Soki basangisaki (Allah) mbele misala na bango mibebisamaki.
Les exégèses en arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡحُكۡمَ وَٱلنُّبُوَّةَۚ فَإِن يَكۡفُرۡ بِهَا هَٰٓؤُلَآءِ فَقَدۡ وَكَّلۡنَا بِهَا قَوۡمٗا لَّيۡسُواْ بِهَا بِكَٰفِرِينَ
89. Ba oyo wana nde topesaki bango buku mpe mibeko тре bontoma, тре soki ba oyo bapengwi na yango, kaši tosili kopesa mokumba na yango epai na bato mosusu oyo bakopengwa na yango te.
Les exégèses en arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ هَدَى ٱللَّهُۖ فَبِهُدَىٰهُمُ ٱقۡتَدِهۡۗ قُل لَّآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ أَجۡرًاۖ إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡعَٰلَمِينَ
90. В a oyo wana nde Allah akambi bango, landa nzela na bango. Loba: Nazali kosenga bino yango lifuta te, yango ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Al An'am
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture