Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Al Jinn   Verset:

Al-Djinn

قُلۡ أُوحِيَ إِلَيَّ أَنَّهُ ٱسۡتَمَعَ نَفَرٞ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَقَالُوٓاْ إِنَّا سَمِعۡنَا قُرۡءَانًا عَجَبٗا
1. Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo,
Les exégèses en arabe:
يَهۡدِيٓ إِلَى ٱلرُّشۡدِ فَـَٔامَنَّا بِهِۦۖ وَلَن نُّشۡرِكَ بِرَبِّنَآ أَحَدٗا
2. Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّهُۥ تَعَٰلَىٰ جَدُّ رَبِّنَا مَا ٱتَّخَذَ صَٰحِبَةٗ وَلَا وَلَدٗا
3. Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّهُۥ كَانَ يَقُولُ سَفِيهُنَا عَلَى ٱللَّهِ شَطَطٗا
4. Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن تَقُولَ ٱلۡإِنسُ وَٱلۡجِنُّ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا
5. Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّهُۥ كَانَ رِجَالٞ مِّنَ ٱلۡإِنسِ يَعُوذُونَ بِرِجَالٖ مِّنَ ٱلۡجِنِّ فَزَادُوهُمۡ رَهَقٗا
6. Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّهُمۡ ظَنُّواْ كَمَا ظَنَنتُمۡ أَن لَّن يَبۡعَثَ ٱللَّهُ أَحَدٗا
7. Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا لَمَسۡنَا ٱلسَّمَآءَ فَوَجَدۡنَٰهَا مُلِئَتۡ حَرَسٗا شَدِيدٗا وَشُهُبٗا
8. Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi).
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا كُنَّا نَقۡعُدُ مِنۡهَا مَقَٰعِدَ لِلسَّمۡعِۖ فَمَن يَسۡتَمِعِ ٱلۡأٓنَ يَجِدۡ لَهُۥ شِهَابٗا رَّصَدٗا
9. Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا لَا نَدۡرِيٓ أَشَرٌّ أُرِيدَ بِمَن فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ أَرَادَ بِهِمۡ رَبُّهُمۡ رَشَدٗا
10. Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا مِنَّا ٱلصَّٰلِحُونَ وَمِنَّا دُونَ ذَٰلِكَۖ كُنَّا طَرَآئِقَ قِدَدٗا
11. Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا ظَنَنَّآ أَن لَّن نُّعۡجِزَ ٱللَّهَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَن نُّعۡجِزَهُۥ هَرَبٗا
12. Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima.
Les exégèses en arabe:
وَأَنَّا لَمَّا سَمِعۡنَا ٱلۡهُدَىٰٓ ءَامَنَّا بِهِۦۖ فَمَن يُؤۡمِنۢ بِرَبِّهِۦ فَلَا يَخَافُ بَخۡسٗا وَلَا رَهَقٗا
13. Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Al Jinn
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture