Check out the new design

क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो * - अनुवादों की सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थों का अनुवाद सूरा: अन्-नह़्ल   आयत:
۞ يَوۡمَ تَأۡتِي كُلُّ نَفۡسٖ تُجَٰدِلُ عَن نَّفۡسِهَا وَتُوَفَّىٰ كُلُّ نَفۡسٖ مَّا عَمِلَتۡ وَهُمۡ لَا يُظۡلَمُونَ
111.(Kanisa) mokolo oyo molimo na molimo mokoya kolelalela тропа makambo naye moko, mpe moko na moko akofutama na maye asalaki mpe bakobubama te.
अरबी तफ़सीरें:
وَضَرَبَ ٱللَّهُ مَثَلٗا قَرۡيَةٗ كَانَتۡ ءَامِنَةٗ مُّطۡمَئِنَّةٗ يَأۡتِيهَا رِزۡقُهَا رَغَدٗا مِّن كُلِّ مَكَانٖ فَكَفَرَتۡ بِأَنۡعُمِ ٱللَّهِ فَأَذَٰقَهَا ٱللَّهُ لِبَاسَ ٱلۡجُوعِ وَٱلۡخَوۡفِ بِمَا كَانُواْ يَصۡنَعُونَ
112. Mpe Allah apeși lisese ya mboka moko ezalaki na kimia mpe ebatelamaki, ezalaki na bilei ebele ezalaki kowuta epai na epai, sima bapengwaki na bolamu oyo Allah apesaki bango, yango Allah abetaki bango na nzala mpe na kobanga na ntina ya maye bazalaki kosala.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَقَدۡ جَآءَهُمۡ رَسُولٞ مِّنۡهُمۡ فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَهُمُ ٱلۡعَذَابُ وَهُمۡ ظَٰلِمُونَ
113. Mpe motindami asilaki koyela bango kowuta na bango moko, mpe baboyi kondimela ye mpe etumbu ezuaki bango mpo bazalaki babubi.
अरबी तफ़सीरें:
فَكُلُواْ مِمَّا رَزَقَكُمُ ٱللَّهُ حَلَٰلٗا طَيِّبٗا وَٱشۡكُرُواْ نِعۡمَتَ ٱللَّهِ إِن كُنتُمۡ إِيَّاهُ تَعۡبُدُونَ
114. Mpe bolia biye Allah apesaki bino bia malamu, mpe botondo bolamu bwa Allah soki ya soló, ye nde bozali kobondela.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّمَا حَرَّمَ عَلَيۡكُمُ ٱلۡمَيۡتَةَ وَٱلدَّمَ وَلَحۡمَ ٱلۡخِنزِيرِ وَمَآ أُهِلَّ لِغَيۡرِ ٱللَّهِ بِهِۦۖ فَمَنِ ٱضۡطُرَّ غَيۡرَ بَاغٖ وَلَا عَادٖ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
115. Ya sólo, apekisaki bino (kólia) mișuni mia bibembe (nyama oyo bakati kingo te) na makila na mosuni mwa ngulu(1) na nyama eye bakati kingo kasi batangi nkombo ya Allah likolo na yango te. Kasi oyo kati na bino akwei na nzala makasi mpe etindi ye alia kasi atomboki to alekisi ndelo te ya solo penza, Allah azali molimbisi atonda mawa.
1 Mosuni mwa ngulu: Ezali ngulu mobimba esangisi na makambo na yango nionso.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَا تَقُولُواْ لِمَا تَصِفُ أَلۡسِنَتُكُمُ ٱلۡكَذِبَ هَٰذَا حَلَٰلٞ وَهَٰذَا حَرَامٞ لِّتَفۡتَرُواْ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَفۡتَرُونَ عَلَى ٱللَّهِ ٱلۡكَذِبَ لَا يُفۡلِحُونَ
116. Mpe boloba lokuta na minoko mia bino te ete: Oyo elingisami, oyo epekisami, mpo bobukela Allah lokuta. Ya solo, babukeli Allah lokuta bakolongaka te.
अरबी तफ़सीरें:
مَتَٰعٞ قَلِيلٞ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
117. Bakosepelaka na mwa tango moke, mpe etumbu ya makasi ezali kozela bango.
अरबी तफ़सीरें:
وَعَلَى ٱلَّذِينَ هَادُواْ حَرَّمۡنَا مَا قَصَصۡنَا عَلَيۡكَ مِن قَبۡلُۖ وَمَا ظَلَمۡنَٰهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
118. Mpe тропа bayuda, tosilaka kopekisa bango maye toyebisaki yo liboso, mpe tobubaki bango te, kasi bango moko bamibubaki.
अरबी तफ़सीरें:
 
अर्थों का अनुवाद सूरा: अन्-नह़्ल
सूरों की सूची पृष्ठ संख्या
 
क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो - अनुवादों की सूची

अनुवाद ज़करिया मुहम्मद बालिंगोगो ने किया है।

बंद करें