Check out the new design

क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो * - अनुवादों की सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थों का अनुवाद सूरा: फ़ुस्सिलत   आयत:

Fusswilat

حمٓ
1. Hâ, mîm(1).
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
अरबी तफ़सीरें:
تَنزِيلٞ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
2. Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu.
अरबी तफ़सीरें:
كِتَٰبٞ فُصِّلَتۡ ءَايَٰتُهُۥ قُرۡءَانًا عَرَبِيّٗا لِّقَوۡمٖ يَعۡلَمُونَ
3. Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba.
अरबी तफ़सीरें:
بَشِيرٗا وَنَذِيرٗا فَأَعۡرَضَ أَكۡثَرُهُمۡ فَهُمۡ لَا يَسۡمَعُونَ
4. (Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te.
अरबी तफ़सीरें:
وَقَالُواْ قُلُوبُنَا فِيٓ أَكِنَّةٖ مِّمَّا تَدۡعُونَآ إِلَيۡهِ وَفِيٓ ءَاذَانِنَا وَقۡرٞ وَمِنۢ بَيۡنِنَا وَبَيۡنِكَ حِجَابٞ فَٱعۡمَلۡ إِنَّنَا عَٰمِلُونَ
5. Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso.
अरबी तफ़सीरें:
قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡ يُوحَىٰٓ إِلَيَّ أَنَّمَآ إِلَٰهُكُمۡ إِلَٰهٞ وَٰحِدٞ فَٱسۡتَقِيمُوٓاْ إِلَيۡهِ وَٱسۡتَغۡفِرُوهُۗ وَوَيۡلٞ لِّلۡمُشۡرِكِينَ
6. Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah),
अरबी तफ़सीरें:
ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَهُم بِٱلۡأٓخِرَةِ هُمۡ كَٰفِرُونَ
7. Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونٖ
8. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te.
अरबी तफ़सीरें:
۞ قُلۡ أَئِنَّكُمۡ لَتَكۡفُرُونَ بِٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡأَرۡضَ فِي يَوۡمَيۡنِ وَتَجۡعَلُونَ لَهُۥٓ أَندَادٗاۚ ذَٰلِكَ رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
9. Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili.
अरबी तफ़सीरें:
وَجَعَلَ فِيهَا رَوَٰسِيَ مِن فَوۡقِهَا وَبَٰرَكَ فِيهَا وَقَدَّرَ فِيهَآ أَقۡوَٰتَهَا فِيٓ أَرۡبَعَةِ أَيَّامٖ سَوَآءٗ لِّلسَّآئِلِينَ
10. Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo.
अरबी तफ़सीरें:
ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰٓ إِلَى ٱلسَّمَآءِ وَهِيَ دُخَانٞ فَقَالَ لَهَا وَلِلۡأَرۡضِ ٱئۡتِيَا طَوۡعًا أَوۡ كَرۡهٗا قَالَتَآ أَتَيۡنَا طَآئِعِينَ
11. Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso.
अरबी तफ़सीरें:
 
अर्थों का अनुवाद सूरा: फ़ुस्सिलत
सूरों की सूची पृष्ठ संख्या
 
क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो - अनुवादों की सूची

इसअनुवाद ज़करिया मुहम्मद बालिंगोगो ने किया है।

बंद करें