Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala * - Daftar isi terjemahan

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Terjemahan makna Surah: Surah Al-Munāfiqūn   Ayah:

Al-Munâfiqûn (BATO YA BILONGI MIBALE)

إِذَا جَآءَكَ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ قَالُواْ نَشۡهَدُ إِنَّكَ لَرَسُولُ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِنَّكَ لَرَسُولُهُۥ وَٱللَّهُ يَشۡهَدُ إِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَكَٰذِبُونَ
1. Soki bato ya bilongi mibale bayeli yo bazali koloba: Tondimi ya soló ete ozali motindami ya Allah, mpe Allah ayebi ete yo ozali motindami naye, mpe Allah atatoli ya soló ete bato ya bilongi mibale bazali bato ya lokuta.
Tafsir berbahasa Arab:
ٱتَّخَذُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُمۡ جُنَّةٗ فَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ إِنَّهُمۡ سَآءَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
2. Bazui bondimi na bango nguba тропа kobundisa nzela ya Allah, ya solo, bazali mabe na maye bazali kosala.
Tafsir berbahasa Arab:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ ءَامَنُواْ ثُمَّ كَفَرُواْ فَطُبِعَ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَفۡقَهُونَ
3. Wana mpo ete bandimaki sima bazongi na bopengwi, na yango mitema mia bango mikangami mpe bango bazali kososola te.
Tafsir berbahasa Arab:
۞ وَإِذَا رَأَيۡتَهُمۡ تُعۡجِبُكَ أَجۡسَامُهُمۡۖ وَإِن يَقُولُواْ تَسۡمَعۡ لِقَوۡلِهِمۡۖ كَأَنَّهُمۡ خُشُبٞ مُّسَنَّدَةٞۖ يَحۡسَبُونَ كُلَّ صَيۡحَةٍ عَلَيۡهِمۡۚ هُمُ ٱلۡعَدُوُّ فَٱحۡذَرۡهُمۡۚ قَٰتَلَهُمُ ٱللَّهُۖ أَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
4. Mpe soki omoni bango, banzoto na bango ezali kokamwisa yo, mpe soki bazali koloba, ozali koyoka bango, bazali lokola biteni ya mabaya bibetami (na efelo), bazali kokanisa ete mongongo nyonso ya makasi ezali тропа bango. Bango nde banguna, keba na bango. Allah asukisaki bango, tala ndenge batelenganaki!
Tafsir berbahasa Arab:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ يَسۡتَغۡفِرۡ لَكُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ لَوَّوۡاْ رُءُوسَهُمۡ وَرَأَيۡتَهُمۡ يَصُدُّونَ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ
5. Mpe soki bayebisi bango boya mpo motindami ya Allah asengela bino bolimbisi, babaloli mitu na bango, okomona bazali kobongola mikongo na lolendo.
Tafsir berbahasa Arab:
سَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ أَسۡتَغۡفَرۡتَ لَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ لَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
6. Osengela bango bolimbisi to osengela bango te, ezali sé lolenge moko, Allah akolimbisaka bango te. Ya soló, Allah akambaka bato ya mabe te.
Tafsir berbahasa Arab:
هُمُ ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ لَا تُنفِقُواْ عَلَىٰ مَنۡ عِندَ رَسُولِ ٱللَّهِ حَتَّىٰ يَنفَضُّواْۗ وَلِلَّهِ خَزَآئِنُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَفۡقَهُونَ
7. Bango nde bato bazali koloba: Bosalisa baye bazali pene na motindami te kino bakopanzana, Allah nde Nkolo sanduku ya bomengo ya likolo na ya mabele, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te.
Tafsir berbahasa Arab:
يَقُولُونَ لَئِن رَّجَعۡنَآ إِلَى ٱلۡمَدِينَةِ لَيُخۡرِجَنَّ ٱلۡأَعَزُّ مِنۡهَا ٱلۡأَذَلَّۚ وَلِلَّهِ ٱلۡعِزَّةُ وَلِرَسُولِهِۦ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
8. Bazali koloba ete: Soki tozongi na Madinah, bato ya makasi kati na biso, bakobimisa baye bazangi makasi. Nzoka nde nguya ezali ya Allah na motindami naye mpe na bandimi, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te.
Tafsir berbahasa Arab:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُلۡهِكُمۡ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُكُمۡ عَن ذِكۡرِ ٱللَّهِۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
9. Eh bino baye bondima! Misolo na bana na bino mibosanisa bino bokundoli ya Allah te. Mpe oyo akosala yango baye wana nde bazangi.
Tafsir berbahasa Arab:
وَأَنفِقُواْ مِن مَّا رَزَقۡنَٰكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ أَحَدَكُمُ ٱلۡمَوۡتُ فَيَقُولَ رَبِّ لَوۡلَآ أَخَّرۡتَنِيٓ إِلَىٰٓ أَجَلٖ قَرِيبٖ فَأَصَّدَّقَ وَأَكُن مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
10. Mpe bobimisa ndambo ya maye topesaki bino (o nzela ya Allah) yambo liwa liyela moko na bino mpe aloba: Nkolo na ngai; zelisa ngai ata mwa tango ya шоке mpo na kaba mpo nazala okati ya bato ya malamu.
Tafsir berbahasa Arab:
وَلَن يُؤَخِّرَ ٱللَّهُ نَفۡسًا إِذَا جَآءَ أَجَلُهَاۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
11.Tango wana Allah azelisaka moto te soki ngonga naye ekoki, kasi Allah ayebi malamu maye bozali kosala.
Tafsir berbahasa Arab:
 
Terjemahan makna Surah: Surah Al-Munāfiqūn
Daftar surah Nomor Halaman
 
Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Daftar isi terjemahan

Terjemahan Makna Al-Qur`ān Al-Karīm ke bahasa Lingala oleh Zakaria Muhammad Blangogo

Tutup