Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: മുനാഫിഖൂൻ   ആയത്ത്:

Al-Munâfiqûn

إِذَا جَآءَكَ ٱلۡمُنَٰفِقُونَ قَالُواْ نَشۡهَدُ إِنَّكَ لَرَسُولُ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ إِنَّكَ لَرَسُولُهُۥ وَٱللَّهُ يَشۡهَدُ إِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَكَٰذِبُونَ
Soki bato ya bilongi mibale bayeli yo bazali koloba: Tondimi ya soló ete ozali motindami ya Allah, mpe Allah ayebi ete yo ozali motindami naye, mpe Allah atatoli ya soló ete bato ya bilongi mibale bazali bato ya lokuta.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱتَّخَذُوٓاْ أَيۡمَٰنَهُمۡ جُنَّةٗ فَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ إِنَّهُمۡ سَآءَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Bazui bondimi na bango nguba тропа kobundisa nzela ya Allah, ya solo, bazali mabe na maye bazali kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ ءَامَنُواْ ثُمَّ كَفَرُواْ فَطُبِعَ عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ فَهُمۡ لَا يَفۡقَهُونَ
Wana mpo ete bandimaki sima bazongi na bopengwi, na yango mitema mia bango mikangami mpe bango bazali kososola te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ وَإِذَا رَأَيۡتَهُمۡ تُعۡجِبُكَ أَجۡسَامُهُمۡۖ وَإِن يَقُولُواْ تَسۡمَعۡ لِقَوۡلِهِمۡۖ كَأَنَّهُمۡ خُشُبٞ مُّسَنَّدَةٞۖ يَحۡسَبُونَ كُلَّ صَيۡحَةٍ عَلَيۡهِمۡۚ هُمُ ٱلۡعَدُوُّ فَٱحۡذَرۡهُمۡۚ قَٰتَلَهُمُ ٱللَّهُۖ أَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
Mpe soki omoni bango, banzoto na bango ezali kokamwisa yo, mpe soki bazali koloba, ozali koyoka bango, bazali lokola biteni ya mabaya bibetami (na efelo), bazali kokanisa ete mongongo nyonso ya makasi ezali тропа bango. Bango nde banguna, keba na bango. Allah asukisaki bango, tala ndenge batelenganaki!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ يَسۡتَغۡفِرۡ لَكُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ لَوَّوۡاْ رُءُوسَهُمۡ وَرَأَيۡتَهُمۡ يَصُدُّونَ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ
Mpe soki bayebisi bango boya mpo motindami ya Allah asengela bino bolimbisi, babaloli mitu na bango, okomona bazali kobongola mikongo na lolendo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
سَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ أَسۡتَغۡفَرۡتَ لَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ لَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ
Osengela bango bolimbisi to osengela bango te, ezali sé lolenge moko, Allah akolimbisaka bango te. Ya soló, Allah akambaka bato ya mabe te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
هُمُ ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ لَا تُنفِقُواْ عَلَىٰ مَنۡ عِندَ رَسُولِ ٱللَّهِ حَتَّىٰ يَنفَضُّواْۗ وَلِلَّهِ خَزَآئِنُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَفۡقَهُونَ
Bango nde bato bazali koloba: Bosalisa baye bazali pene na motindami te kino bakopanzana, Allah nde Nkolo sanduku ya bomengo ya likolo na ya mabele, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَقُولُونَ لَئِن رَّجَعۡنَآ إِلَى ٱلۡمَدِينَةِ لَيُخۡرِجَنَّ ٱلۡأَعَزُّ مِنۡهَا ٱلۡأَذَلَّۚ وَلِلَّهِ ٱلۡعِزَّةُ وَلِرَسُولِهِۦ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَعۡلَمُونَ
Bazali koloba ete: Soki tozongi na Madinah, bato ya makasi kati na biso, bakobimisa baye bazangi makasi. Nzoka nde nguya ezali ya Allah na motindami naye mpe na bandimi, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُلۡهِكُمۡ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُكُمۡ عَن ذِكۡرِ ٱللَّهِۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
Eh bino baye bondima! Misolo na bana na bino mibosanisa bino bokundoli ya Allah te. Mpe oyo akosala yango baye wana nde bazangi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنفِقُواْ مِن مَّا رَزَقۡنَٰكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ أَحَدَكُمُ ٱلۡمَوۡتُ فَيَقُولَ رَبِّ لَوۡلَآ أَخَّرۡتَنِيٓ إِلَىٰٓ أَجَلٖ قَرِيبٖ فَأَصَّدَّقَ وَأَكُن مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe bobimisa ndambo ya maye topesaki bino (o nzela ya Allah) yambo liwa liyela moko na bino mpe aloba: Nkolo na ngai; zelisa ngai ata mwa tango ya шоке mpo na kaba mpo nazala okati ya bato ya malamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَن يُؤَخِّرَ ٱللَّهُ نَفۡسًا إِذَا جَآءَ أَجَلُهَاۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ
Tango wana Allah azelisaka moto te soki ngonga naye ekoki, kasi Allah ayebi malamu maye bozali kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: മുനാഫിഖൂൻ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക