Check out the new design

Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo * - Indice Traduzioni

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduzione dei significati Sura: Al-‘Ankabût   Versetto:
وَقَٰرُونَ وَفِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مُّوسَىٰ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَٱسۡتَكۡبَرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كَانُواْ سَٰبِقِينَ
39. Mpe (lolenge moko) na Qârûn, falo, na Hâmân. Mûssa asilaki koyela bango bilembo, basalaki lolendo na mokili, kasi bakokaki kokima (biso) te.
Esegesi in lingua araba:
فَكُلًّا أَخَذۡنَا بِذَنۢبِهِۦۖ فَمِنۡهُم مَّنۡ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِ حَاصِبٗا وَمِنۡهُم مَّنۡ أَخَذَتۡهُ ٱلصَّيۡحَةُ وَمِنۡهُم مَّنۡ خَسَفۡنَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ وَمِنۡهُم مَّنۡ أَغۡرَقۡنَاۚ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
40. Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
Esegesi in lingua araba:
مَثَلُ ٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡلِيَآءَ كَمَثَلِ ٱلۡعَنكَبُوتِ ٱتَّخَذَتۡ بَيۡتٗاۖ وَإِنَّ أَوۡهَنَ ٱلۡبُيُوتِ لَبَيۡتُ ٱلۡعَنكَبُوتِۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
41. Ndakisa ya baye bazui babateli na botiki Allah, ezali lokola limpulututu oyo atongi ndako ya motawu, nzoka nde ndako oyo ezali motawu koleka, ezali ndako ya limpulututu. Soki solo bazali koyeba.
Esegesi in lingua araba:
إِنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
42. Ya soló, Allah ayebi manso babondelaka na botiki ye mpe azali wa nguya atonda bwányá.
Esegesi in lingua araba:
وَتِلۡكَ ٱلۡأَمۡثَٰلُ نَضۡرِبُهَا لِلنَّاسِۖ وَمَا يَعۡقِلُهَآ إِلَّا ٱلۡعَٰلِمُونَ
43. Wana ezali bandakisa tozali kopesa yango тропа bato, тре baye bakoki koyeba yango sé baye bazali na boyebi.
Esegesi in lingua araba:
خَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
44. Allah akela likolo na mabele na bosôló bonso. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi.
Esegesi in lingua araba:
ٱتۡلُ مَآ أُوحِيَ إِلَيۡكَ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَۖ إِنَّ ٱلصَّلَوٰةَ تَنۡهَىٰ عَنِ ٱلۡفَحۡشَآءِ وَٱلۡمُنكَرِۗ وَلَذِكۡرُ ٱللَّهِ أَكۡبَرُۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تَصۡنَعُونَ
45. Tanga oyo ekitelaki yo kati na buku, mpe telemisa losambo. Ya sólo, losambo epekisaka (moto) kosala mabe, kasi bokundoli bwa Allah nde ezali monene koleka. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
Esegesi in lingua araba:
 
Traduzione dei significati Sura: Al-‘Ankabût
Indice delle Sure Numero di pagina
 
Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo - Indice Traduzioni

Traduzione di Zakariya Muhammad Banangogo.

Chiudi