Check out the new design

Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo * - Indice Traduzioni

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduzione dei significati Sura: Al-‘Ankabût   Versetto:
۞ وَلَا تُجَٰدِلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ إِلَّا بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُ إِلَّا ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡهُمۡۖ وَقُولُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱلَّذِيٓ أُنزِلَ إِلَيۡنَا وَأُنزِلَ إِلَيۡكُمۡ وَإِلَٰهُنَا وَإِلَٰهُكُمۡ وَٰحِدٞ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ
Mpe bosuanisa te baye bazuaki buku liboso, sé na lolenge ya malamu, longola sé baye kati na bango basali mabe, mpe boloba na bango ete; tondimi na maye ekiteli biso, mpe maye ekitaki epai na bino, тре nzambe na biso na bino azali sé moko oyo biso tomisokie epai naye. (Allah)
Esegesi in lingua araba:
وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَۚ فَٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۖ وَمِنۡ هَٰٓؤُلَآءِ مَن يُؤۡمِنُ بِهِۦۚ وَمَا يَجۡحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا ٱلۡكَٰفِرُونَ
Ndenge wana nde tokitiselaki yo buku. Мре baye topesaki bango buku bazali kondimela yango, mpe kati na yango basusu bazali kondima na yango. Mpe bazali koboya kondimela mikapo mia biso sé bapengwi.
Esegesi in lingua araba:
وَمَا كُنتَ تَتۡلُواْ مِن قَبۡلِهِۦ مِن كِتَٰبٖ وَلَا تَخُطُّهُۥ بِيَمِينِكَۖ إِذٗا لَّٱرۡتَابَ ٱلۡمُبۡطِلُونَ
Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe.
Esegesi in lingua araba:
بَلۡ هُوَ ءَايَٰتُۢ بَيِّنَٰتٞ فِي صُدُورِ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَۚ وَمَا يَجۡحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا ٱلظَّٰلِمُونَ
Kasi ezali na bilembo bia polele bizali okati ya mitema mia baye bapesami boyebi. Mpe baboyaka mikapo mia biso sé babubi.
Esegesi in lingua araba:
وَقَالُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَٰتٞ مِّن رَّبِّهِۦۚ قُلۡ إِنَّمَا ٱلۡأٓيَٰتُ عِندَ ٱللَّهِ وَإِنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
Mpe balobi: Soki ata bilembo ekitelaka ye kowuta epai ya Nkolo waye, loba: Ya soló bilembo ewutaka epai ya Allah. Мре ya sólo, ngai nazali mokebisi ya polele.
Esegesi in lingua araba:
أَوَلَمۡ يَكۡفِهِمۡ أَنَّآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ يُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَرَحۡمَةٗ وَذِكۡرَىٰ لِقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
Boye ekoki тропа bango te buku oyo tokitiselaki yo mpo etangamela bango? Ya sólo, wana ezali nde ngolu mpe bokundoli тропа bandimi.
Esegesi in lingua araba:
قُلۡ كَفَىٰ بِٱللَّهِ بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡ شَهِيدٗاۖ يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱلۡبَٰطِلِ وَكَفَرُواْ بِٱللَّهِ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
Loba: Allah akoki na bonzeneneke kati kati na ngai na bino, azali moyebi ya manso maye mazali o likolo na mabele, mpe baye bazali kondima na makambo ya mpamba, mpe bazali kopengwa na Allah, bango nde bazangi.
Esegesi in lingua araba:
 
Traduzione dei significati Sura: Al-‘Ankabût
Indice delle Sure Numero di pagina
 
Traduzione dei Significati del Sacro Corano - Traduzione in lingala - Muhammed Bin Nguogo - Indice Traduzioni

Traduzione di Zakariya Muhammad Banangogo.

Chiudi