Check out the new design

クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: ユースフ章   節:
فَلَمَّا جَهَّزَهُم بِجَهَازِهِمۡ جَعَلَ ٱلسِّقَايَةَ فِي رَحۡلِ أَخِيهِ ثُمَّ أَذَّنَ مُؤَذِّنٌ أَيَّتُهَا ٱلۡعِيرُ إِنَّكُمۡ لَسَٰرِقُونَ
70. Mpe tango abongiseli bango mikumba ya bilei, atiye wolo ya emekeli na mokumba ya ndeko naye sima mobeleli abeleli bango ete: Eh bino bapaya bozali soló bayibi.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ وَأَقۡبَلُواْ عَلَيۡهِم مَّاذَا تَفۡقِدُونَ
71. Babaluki mpe balobi: Nini bobungisi?
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ نَفۡقِدُ صُوَاعَ ٱلۡمَلِكِ وَلِمَن جَآءَ بِهِۦ حِمۡلُ بَعِيرٖ وَأَنَا۠ بِهِۦ زَعِيمٞ
72. Balobi: Tobungisi nkeni ya walo ya mokonzi. Tozali koluka yango na mikumba, soki nani oyo azui yango, mpe ngai nazali moyangeli.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ تَٱللَّهِ لَقَدۡ عَلِمۡتُم مَّا جِئۡنَا لِنُفۡسِدَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كُنَّا سَٰرِقِينَ
73. Balobi: Na Allah, boyebi malamu penza ete biso toyaki te mpo tobebisa na mboka eye, tozali mpe bayibi te.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ فَمَا جَزَٰٓؤُهُۥٓ إِن كُنتُمۡ كَٰذِبِينَ
74. Balobi: Etumbu ekozala nini soki bozali kokosa?
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ جَزَٰٓؤُهُۥ مَن وُجِدَ فِي رَحۡلِهِۦ فَهُوَ جَزَٰٓؤُهُۥۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلظَّٰلِمِينَ
75. Balobi: Etumbu ekozala sé epai ya oyo bokokuta eloko ena (bozali koluka) na mokumba naye, wana nde lifuta lia babubi.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَبَدَأَ بِأَوۡعِيَتِهِمۡ قَبۡلَ وِعَآءِ أَخِيهِ ثُمَّ ٱسۡتَخۡرَجَهَا مِن وِعَآءِ أَخِيهِۚ كَذَٰلِكَ كِدۡنَا لِيُوسُفَۖ مَا كَانَ لِيَأۡخُذَ أَخَاهُ فِي دِينِ ٱلۡمَلِكِ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ نَرۡفَعُ دَرَجَٰتٖ مَّن نَّشَآءُۗ وَفَوۡقَ كُلِّ ذِي عِلۡمٍ عَلِيمٞ
76. Mpe abandaki na mikumba na bango liboso, na sima abandi na oyo ya ndeko naye mpe akutaki yango na mokumba ya ndeko naye. Ndenge wana nde tosalaki na Yûsuf, kasi alingaki kokanga ndeko waye te, engebene na mobeko mwa mokonzi, longola sé maye Allah alingaki. Totombolaka bisika bia baye tolingi, mpe likolo lia moto nyoso topesi ye boyebi, okokuta oyo aleki ye na boyebi.
アラビア語 クルアーン注釈:
۞ قَالُوٓاْ إِن يَسۡرِقۡ فَقَدۡ سَرَقَ أَخٞ لَّهُۥ مِن قَبۡلُۚ فَأَسَرَّهَا يُوسُفُ فِي نَفۡسِهِۦ وَلَمۡ يُبۡدِهَا لَهُمۡۚ قَالَ أَنتُمۡ شَرّٞ مَّكَانٗاۖ وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا تَصِفُونَ
77. Balobi: Soki ayibi, (alandi) sé ndeko naye asilaki mpe koyiba liboso. Mpe Yûsuf, ayokaki yango mpasi na motema, kasi amonisaki bango yango te, mpe alobi na motema ete: Mabe na bino oyo eleki, mpe Allah ayebi maye bozali koloba.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡعَزِيزُ إِنَّ لَهُۥٓ أَبٗا شَيۡخٗا كَبِيرٗا فَخُذۡ أَحَدَنَا مَكَانَهُۥٓۖ إِنَّا نَرَىٰكَ مِنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
78. Balobi: Eh mokonzi! Tata waye azali mobange wa kala. Zua moko o kati na biso na esika naye. Ya soló, tozali kornona yo o kati ya babongisi.
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: ユースフ章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo - 対訳の目次

ザカリア・ムハンマドによるンゴグ語対訳

閉じる