Check out the new design

クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: 預言者たち章   節:

Al-Anbiyâ

ٱقۡتَرَبَ لِلنَّاسِ حِسَابُهُمۡ وَهُمۡ فِي غَفۡلَةٖ مُّعۡرِضُونَ
1. Eleko ya kokata likambo ya bato ekomi pembeni, kasi bazali komitungisa te тропа yango mpe bapesi mokongo.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّن رَّبِّهِم مُّحۡدَثٍ إِلَّا ٱسۡتَمَعُوهُ وَهُمۡ يَلۡعَبُونَ
2. Bokundoli moko te ya Nkolo na bango, ekomelaka bango ezanga te sé bayoka yango na kotiola.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَاهِيَةٗ قُلُوبُهُمۡۗ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَى ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ هَلۡ هَٰذَآ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُكُمۡۖ أَفَتَأۡتُونَ ٱلسِّحۡرَ وَأَنتُمۡ تُبۡصِرُونَ
3. Mitema mia bango mizali mosika, mpe babubi babebisi mitema mia bango, balobi: Oyo azali moto lokola bino тропа nini bozali komipesa na bondoki mpe bino bozali kornona malamu?
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالَ رَبِّي يَعۡلَمُ ٱلۡقَوۡلَ فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۖ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
4. Alobi: Nkolo wa ngai ayebi manso mazali kolobama o likolo mpe na nsé, mpe azali moyoki atonda boyebi.
アラビア語 クルアーン注釈:
بَلۡ قَالُوٓاْ أَضۡغَٰثُ أَحۡلَٰمِۭ بَلِ ٱفۡتَرَىٰهُ بَلۡ هُوَ شَاعِرٞ فَلۡيَأۡتِنَا بِـَٔايَةٖ كَمَآ أُرۡسِلَ ٱلۡأَوَّلُونَ
5. Kasi balobaki: Oyo wana ezali bosangani ya bandoto to ezali makambo naye moko, to ekoki kozala lisapo, to ayela biso elembo, ndenge etindamaki na bato ba yambo.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَآ ءَامَنَتۡ قَبۡلَهُم مِّن قَرۡيَةٍ أَهۡلَكۡنَٰهَآۖ أَفَهُمۡ يُؤۡمِنُونَ
6. Ezali na etuka (mboka) moko te eye topesaki etumbu liboso lia bango bandimaki te, boye bango nde bakondima?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ إِلَّا رِجَالٗا نُّوحِيٓ إِلَيۡهِمۡۖ فَسۡـَٔلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلذِّكۡرِ إِن كُنتُمۡ لَا تَعۡلَمُونَ
7. Mpe totindaki liboso nayo sé mibali topesaki bango emoniseli, botuna ba oyo bayebi soki bino boyebi te.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَا جَعَلۡنَٰهُمۡ جَسَدٗا لَّا يَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَمَا كَانُواْ خَٰلِدِينَ
8. Mpe topesaki bango nzoto mpo baliaka biloko, mpe batikalaki libela te.
アラビア語 クルアーン注釈:
ثُمَّ صَدَقۡنَٰهُمُ ٱلۡوَعۡدَ فَأَنجَيۡنَٰهُمۡ وَمَن نَّشَآءُ وَأَهۡلَكۡنَا ٱلۡمُسۡرِفِينَ
9. Sima tokokiselaki bango elaka тропа oyo bazalaki kosala, mpe tobikisaki baye tolingaki kobikisa kati na bango, mpe topesaki etumbu na balekisi ndelo.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَقَدۡ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكُمۡ كِتَٰبٗا فِيهِ ذِكۡرُكُمۡۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
10. Tosilaki ya soló, kokitisela bino buku eye ezuami na bokundoli тропа bino. Boye bozali kokanisa te?
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: 預言者たち章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo - 対訳の目次

ザカリア・ムハンマドによるンゴグ語対訳

閉じる