Check out the new design

クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: 詩人たち章   節:
إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا خُلُقُ ٱلۡأَوَّلِينَ
137. Ezali sé ezaleli ya bato ya kala.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
138. Mpe tokozuaka etumbu te.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَكَذَّبُوهُ فَأَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
139. Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
140. Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu.
アラビア語 クルアーン注釈:
كَذَّبَتۡ ثَمُودُ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
141. Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِذۡ قَالَ لَهُمۡ أَخُوهُمۡ صَٰلِحٌ أَلَا تَتَّقُونَ
142. Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te?
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
143. Nazali motindami malamu epai na bino.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
144. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَىٰ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
145. Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَتُتۡرَكُونَ فِي مَا هَٰهُنَآ ءَامِنِينَ
146. Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala,
アラビア語 クルアーン注釈:
فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
147. O kati ya bilanga mpe mingala?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَزُرُوعٖ وَنَخۡلٖ طَلۡعُهَا هَضِيمٞ
148. Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko,
アラビア語 クルアーン注釈:
وَتَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتٗا فَٰرِهِينَ
149. Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba?
アラビア語 クルアーン注釈:
فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُونِ
150. Bobanga Allah mpe botosa ngai.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلَا تُطِيعُوٓاْ أَمۡرَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ
151. Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te,
アラビア語 クルアーン注釈:
ٱلَّذِينَ يُفۡسِدُونَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا يُصۡلِحُونَ
152. Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالُوٓاْ إِنَّمَآ أَنتَ مِنَ ٱلۡمُسَحَّرِينَ
153. Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَآ أَنتَ إِلَّا بَشَرٞ مِّثۡلُنَا فَأۡتِ بِـَٔايَةٍ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
154. Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالَ هَٰذِهِۦ نَاقَةٞ لَّهَا شِرۡبٞ وَلَكُمۡ شِرۡبُ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
155. Alobi: Nâqah(1) oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi.
1 Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf mokapo: 74.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلَا تَمَسُّوهَا بِسُوٓءٖ فَيَأۡخُذَكُمۡ عَذَابُ يَوۡمٍ عَظِيمٖ
156. Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَعَقَرُوهَا فَأَصۡبَحُواْ نَٰدِمِينَ
157. Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَأَخَذَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
158. Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
159. Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu.
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: 詩人たち章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo - 対訳の目次

ザカリア・ムハンマドによるンゴグ語対訳

閉じる