Check out the new design

クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: 婦人章   節:
۞ لَّا خَيۡرَ فِي كَثِيرٖ مِّن نَّجۡوَىٰهُمۡ إِلَّا مَنۡ أَمَرَ بِصَدَقَةٍ أَوۡ مَعۡرُوفٍ أَوۡ إِصۡلَٰحِۭ بَيۡنَ ٱلنَّاسِۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ ٱبۡتِغَآءَ مَرۡضَاتِ ٱللَّهِ فَسَوۡفَ نُؤۡتِيهِ أَجۡرًا عَظِيمٗا
114. Litomba ezali te na ebele ya makita na bango bazali kosala, sé na moto oyo azali kotinda na bokabi mpe na bolamu to mpe boyokani kati ya bato. Oyo akosala yango na koluka bosepelisi ya Allah, tokopesa ye lifuta linene.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَن يُشَاقِقِ ٱلرَّسُولَ مِنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُ ٱلۡهُدَىٰ وَيَتَّبِعۡ غَيۡرَ سَبِيلِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ نُوَلِّهِۦ مَا تَوَلَّىٰ وَنُصۡلِهِۦ جَهَنَّمَۖ وَسَآءَتۡ مَصِيرًا
115. Kasi oyo akosala bokeseni na motindami sima na polele mpe lisungi esili koyela ye, mpe alandi nzela ya bandimi te, tokopesa ye maye azali koluka, mpe tokomema ye na lifelo, mpe oyo nde bozongi ya mabe!
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَغۡفِرُ أَن يُشۡرَكَ بِهِۦ وَيَغۡفِرُ مَا دُونَ ذَٰلِكَ لِمَن يَشَآءُۚ وَمَن يُشۡرِكۡ بِٱللَّهِ فَقَدۡ ضَلَّ ضَلَٰلَۢا بَعِيدًا
116. Ya sôló, Allah alimbisaka te soki basangisi ye na banzambe misusu, kasi alimbisaka masumu masusu na moto oyo ye alingi. Mpe oyo asangisi Allah asili kobunga libunga ya mosika.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِن يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ إِنَٰثٗا وَإِن يَدۡعُونَ إِلَّا شَيۡطَٰنٗا مَّرِيدٗا
117. Bazali kobelela bikeko batiki ye (Allah), biye bazali kobelela bizali sé basi, bazali kobelela sé santana motomboki.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَّعَنَهُ ٱللَّهُۘ وَقَالَ لَأَتَّخِذَنَّ مِنۡ عِبَادِكَ نَصِيبٗا مَّفۡرُوضٗا
118. Allah alakela ye mabe, mpe alobaki (na Allah) ete: Nakobanda kozua epai ya bawumbu nayo biteni ya lotomo.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلَأُضِلَّنَّهُمۡ وَلَأُمَنِّيَنَّهُمۡ وَلَأٓمُرَنَّهُمۡ فَلَيُبَتِّكُنَّ ءَاذَانَ ٱلۡأَنۡعَٰمِ وَلَأٓمُرَنَّهُمۡ فَلَيُغَيِّرُنَّ خَلۡقَ ٱللَّهِۚ وَمَن يَتَّخِذِ ٱلشَّيۡطَٰنَ وَلِيّٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِ فَقَدۡ خَسِرَ خُسۡرَانٗا مُّبِينٗا
119. Ya sôló, nako bungisa bango. Mpe nakopesa bango elikia ya lokuta, mpe nakotindaka bango bakotobolaka matoyi ya bibwele mpe nakotindaka bango bakobongola lolenge ya bikelamu ya Allah, mpe oyo akozwa satana moninga atiki Allah, ya sôló yende asili kozanga bozangi ya polele.
アラビア語 クルアーン注釈:
يَعِدُهُمۡ وَيُمَنِّيهِمۡۖ وَمَا يَعِدُهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ إِلَّا غُرُورًا
120. Azali kolaka bango elaka ya lokuta, mpe satana apesaka sé elaka ya lokuta.
アラビア語 クルアーン注釈:
أُوْلَٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمۡ جَهَنَّمُ وَلَا يَجِدُونَ عَنۡهَا مَحِيصٗا
121. Bango wana nde esika na bango ya kofanda ekozala lifelo, mpe bakozua eloko ekokimisa bango na yango te.
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: 婦人章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo - 対訳の目次

ザカリア・ムハンマドによるンゴグ語対訳

閉じる