Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ហ៊ូទ   អាយ៉ាត់:
أُوْلَٰٓئِكَ لَمۡ يَكُونُواْ مُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كَانَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنۡ أَوۡلِيَآءَۘ يُضَٰعَفُ لَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ مَا كَانُواْ يَسۡتَطِيعُونَ ٱلسَّمۡعَ وَمَا كَانُواْ يُبۡصِرُونَ
Baye wana bakoki kokitisa nguya (ya Allah) te awa na mokili, mpe bakozua baye bakosalisa bango te liboso ya Allah. Etumbu na bango ekobakisama mpo bakokaki koyoka mpe kotala te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَا جَرَمَ أَنَّهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ
Tembe ezali te été: Bakozala bazangi penza na mokolo ya suka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَخۡبَتُوٓاْ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, mpe babangaki Nkolo wa bango, bango nde bato ya lola, bakozalaka libela o kati na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
۞ مَثَلُ ٱلۡفَرِيقَيۡنِ كَٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡأَصَمِّ وَٱلۡبَصِيرِ وَٱلسَّمِيعِۚ هَلۡ يَسۡتَوِيَانِ مَثَلًاۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦٓ إِنِّي لَكُمۡ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَن لَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۖ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ أَلِيمٖ
Ete bobondela te sé Allah, ya sólo nazali kobangela bino etumbu o mokolo mwa pasi ya makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَقَالَ ٱلۡمَلَأُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ مَا نَرَىٰكَ إِلَّا بَشَرٗا مِّثۡلَنَا وَمَا نَرَىٰكَ ٱتَّبَعَكَ إِلَّا ٱلَّذِينَ هُمۡ أَرَاذِلُنَا بَادِيَ ٱلرَّأۡيِ وَمَا نَرَىٰ لَكُمۡ عَلَيۡنَا مِن فَضۡلِۭ بَلۡ نَظُنُّكُمۡ كَٰذِبِينَ
Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobaki naye ete: Tozali kornona yo ozali moto lokola biso, tomoni baye bazali kolanda yo, sé bato ya ntina te kati na biso, baye bazali na mayele moke. Mpe tozali kornona bino boleki biso te, kasi tozali kokanisa ete bozali babuki lokuta.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَءَاتَىٰنِي رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِهِۦ فَعُمِّيَتۡ عَلَيۡكُمۡ أَنُلۡزِمُكُمُوهَا وَأَنتُمۡ لَهَا كَٰرِهُونَ
Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: ហ៊ូទ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ