Check out the new design

クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: フード章   節:
أُوْلَٰٓئِكَ لَمۡ يَكُونُواْ مُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كَانَ لَهُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِنۡ أَوۡلِيَآءَۘ يُضَٰعَفُ لَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ مَا كَانُواْ يَسۡتَطِيعُونَ ٱلسَّمۡعَ وَمَا كَانُواْ يُبۡصِرُونَ
20. Baye wana bakoki kokitisa nguya (ya Allah) te awa na mokili, mpe bakozua baye bakosalisa bango te liboso ya Allah. Etumbu na bango ekobakisama mpo bakokaki koyoka mpe kotala te.
アラビア語 クルアーン注釈:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ خَسِرُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
21. Baye wana nde bamibebisi bango moko, mpe babungisi binzambi nzambi oyo bazalaki kobondela mpe bazalaki kotia elikya ete bakosunga bango.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَا جَرَمَ أَنَّهُمۡ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ هُمُ ٱلۡأَخۡسَرُونَ
22. Tembe ezali te été: Bakozala bazangi penza na mokolo ya suka.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَأَخۡبَتُوٓاْ إِلَىٰ رَبِّهِمۡ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
23. Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, mpe babangaki Nkolo wa bango, bango nde bato ya lola, bakozalaka libela o kati na yango.
アラビア語 クルアーン注釈:
۞ مَثَلُ ٱلۡفَرِيقَيۡنِ كَٱلۡأَعۡمَىٰ وَٱلۡأَصَمِّ وَٱلۡبَصِيرِ وَٱلسَّمِيعِۚ هَلۡ يَسۡتَوِيَانِ مَثَلًاۚ أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
24. Lisanga oyo na oyo mosusu ndakisa na bango ezali lokola bato mibale: Oyo amonaka te, mpe ayokaka te, oyo mosusu amonaka mpe ayokaka. Boye bazali lolenge moko? Na yango bozali kokanisa te?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦٓ إِنِّي لَكُمۡ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
25. Mpe tosilaki ya soló, kotinda Nûh epai ya bato baye, (alobi): Ya solo, ngai nazali mokebisi ya polele.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَن لَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّا ٱللَّهَۖ إِنِّيٓ أَخَافُ عَلَيۡكُمۡ عَذَابَ يَوۡمٍ أَلِيمٖ
26. Ete bobondela te sé Allah, ya sólo nazali kobangela bino etumbu o mokolo mwa pasi ya makasi.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَقَالَ ٱلۡمَلَأُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَوۡمِهِۦ مَا نَرَىٰكَ إِلَّا بَشَرٗا مِّثۡلَنَا وَمَا نَرَىٰكَ ٱتَّبَعَكَ إِلَّا ٱلَّذِينَ هُمۡ أَرَاذِلُنَا بَادِيَ ٱلرَّأۡيِ وَمَا نَرَىٰ لَكُمۡ عَلَيۡنَا مِن فَضۡلِۭ بَلۡ نَظُنُّكُمۡ كَٰذِبِينَ
27. Bankumu ya bato naye baye bapengwaki balobaki naye ete: Tozali kornona yo ozali moto lokola biso, tomoni baye bazali kolanda yo, sé bato ya ntina te kati na biso, baye bazali na mayele moke. Mpe tozali kornona bino boleki biso te, kasi tozali kokanisa ete bozali babuki lokuta.
アラビア語 クルアーン注釈:
قَالَ يَٰقَوۡمِ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كُنتُ عَلَىٰ بَيِّنَةٖ مِّن رَّبِّي وَءَاتَىٰنِي رَحۡمَةٗ مِّنۡ عِندِهِۦ فَعُمِّيَتۡ عَلَيۡكُمۡ أَنُلۡزِمُكُمُوهَا وَأَنتُمۡ لَهَا كَٰرِهُونَ
28. Alobaki ete: Oh bato na ngai! В omoni boni soki nazali na elembo ya bosembo kowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe apesi ngai ngolu kowuta epai naye mpe bozangi yango, biso tokokanga bino na makasi te mpo bozua yango mpe bino bozali koyina?
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: フード章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - リンガラ語対訳 - Muhammad Balangogo - 対訳の目次

ザカリア・ムハンマドによるンゴグ語対訳

閉じる