Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក   អាយ៉ាត់:
وَبِٱلۡحَقِّ أَنزَلۡنَٰهُ وَبِٱلۡحَقِّ نَزَلَۗ وَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ إِلَّا مُبَشِّرٗا وَنَذِيرٗا
105. Mpe na bosembo penza nde tokitisaki yango (kurani) mpe ekitaki na bosôló, mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango elamu mpe mokebisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقُرۡءَانٗا فَرَقۡنَٰهُ لِتَقۡرَأَهُۥ عَلَى ٱلنَّاسِ عَلَىٰ مُكۡثٖ وَنَزَّلۡنَٰهُ تَنزِيلٗا
106. Мре (tokitisaki) kurani biteni biteni mpo ete otanga yango malembe likolo ya bato bayoka, mpe tokitisaki yango mikapo na mikapo.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُلۡ ءَامِنُواْ بِهِۦٓ أَوۡ لَا تُؤۡمِنُوٓاْۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ مِن قَبۡلِهِۦٓ إِذَا يُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ يَخِرُّونَۤ لِلۡأَذۡقَانِۤ سُجَّدٗاۤ
107. Loba: Bondima na yango to te. Ya soló, baye bazuaki boyebi liboso na yango, soki bayoki yango ezali kotangama, bakweyaka mpe bafukami bilongi na nsé. (тропа Allah)
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيَقُولُونَ سُبۡحَٰنَ رَبِّنَآ إِن كَانَ وَعۡدُ رَبِّنَا لَمَفۡعُولٗا
108. Mpe balobaka ete: Nkembo na Nkolo wa biso, elaka ya Nkolo wa biso esili ya solo kokoka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيَخِرُّونَ لِلۡأَذۡقَانِ يَبۡكُونَ وَيَزِيدُهُمۡ خُشُوعٗا۩
109. Mpe bazali kokita na kolela mpe ezali kobakisela bango bobangi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُلِ ٱدۡعُواْ ٱللَّهَ أَوِ ٱدۡعُواْ ٱلرَّحۡمَٰنَۖ أَيّٗا مَّا تَدۡعُواْ فَلَهُ ٱلۡأَسۡمَآءُ ٱلۡحُسۡنَىٰۚ وَلَا تَجۡهَرۡ بِصَلَاتِكَ وَلَا تُخَافِتۡ بِهَا وَٱبۡتَغِ بَيۡنَ ذَٰلِكَ سَبِيلٗا
110. Loba: Bobelela Allah to bobelela Ar-Rahmân[1] to nkombo nini bolingi kobenga, ye nde azali na ba nkombo ya kitoko. Mpe koganga te okati ya losambo nayo koleka, kovanda mpe nye te, kasi zala na mongongo ya kati kati.
[1] Ar-Rahmân: Ezali moko ya kombo ya Allah, elakisi: Oyo atonda ngolu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي لَمۡ يَتَّخِذۡ وَلَدٗا وَلَمۡ يَكُن لَّهُۥ شَرِيكٞ فِي ٱلۡمُلۡكِ وَلَمۡ يَكُن لَّهُۥ وَلِيّٞ مِّنَ ٱلذُّلِّۖ وَكَبِّرۡهُ تَكۡبِيرَۢا
111. Mpe loba lokumu ya Allah oyo azali na mwana te, mpe akoki kozala na basangani te kati ya bokonzi naye, mpe akoki kozala na mobateli mosusu te (ya kokima epai naye) mpe belela bonene bwa ye makasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ