Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក   អាយ៉ាត់:
ذَٰلِكَ مِمَّآ أَوۡحَىٰٓ إِلَيۡكَ رَبُّكَ مِنَ ٱلۡحِكۡمَةِۗ وَلَا تَجۡعَلۡ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ فَتُلۡقَىٰ فِي جَهَنَّمَ مَلُومٗا مَّدۡحُورًا
39. (Manso) mana mazali maye Nkolo wayo atangisaki yo na bwanya, mpe kosangisa Allah na banzambe basusu te, noki te okobwakama o moto mwa lifelo moye mozali mosika na mawa ma Allah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَفَأَصۡفَىٰكُمۡ رَبُّكُم بِٱلۡبَنِينَ وَٱتَّخَذَ مِنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنَٰثًاۚ إِنَّكُمۡ لَتَقُولُونَ قَوۡلًا عَظِيمٗا
40. Boye Nkolo wa bino aponeli bino bana ya mibali mpe aponi ba anzelu bazala bana ya basi? Ya sólo, bozali kobimisa maloba ya mabe koleka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَا فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ لِيَذَّكَّرُواْ وَمَا يَزِيدُهُمۡ إِلَّا نُفُورٗا
41. Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُل لَّوۡ كَانَ مَعَهُۥٓ ءَالِهَةٞ كَمَا يَقُولُونَ إِذٗا لَّٱبۡتَغَوۡاْ إِلَىٰ ذِي ٱلۡعَرۡشِ سَبِيلٗا
42. Loba: Soki ezalaki na banzambe mosusu elongo naye ndenge bazali koloba, balingaki koluka nzela ya Nkolo ngwende.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يَقُولُونَ عُلُوّٗا كَبِيرٗا
43. Lokumu naye, azali likolo koleka, mpe aleki maye bazali kolobela na bonene.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
تُسَبِّحُ لَهُ ٱلسَّمَٰوَٰتُ ٱلسَّبۡعُ وَٱلۡأَرۡضُ وَمَن فِيهِنَّۚ وَإِن مِّن شَيۡءٍ إِلَّا يُسَبِّحُ بِحَمۡدِهِۦ وَلَٰكِن لَّا تَفۡقَهُونَ تَسۡبِيحَهُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ حَلِيمًا غَفُورٗا
44. Mapata sambo na mabele, na manso mazuami o kati na yango, bazali kosanzola nkembo naye, mpe ezali na eloko moko te sé ezali kosanzola lokumu naye. Kasi bino nde bozali koyeba yango te. Ya soló, ye azali ngolu atonda bolimbisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِذَا قَرَأۡتَ ٱلۡقُرۡءَانَ جَعَلۡنَا بَيۡنَكَ وَبَيۡنَ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ حِجَابٗا مَّسۡتُورٗا
45. Mpe tango ozali kotanga kurani, totiaka kati kati nayo na baye bazali kondima na mokolo mwa suka te ndelo, oyo ezali komonana te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَجَعَلۡنَا عَلَىٰ قُلُوبِهِمۡ أَكِنَّةً أَن يَفۡقَهُوهُ وَفِيٓ ءَاذَانِهِمۡ وَقۡرٗاۚ وَإِذَا ذَكَرۡتَ رَبَّكَ فِي ٱلۡقُرۡءَانِ وَحۡدَهُۥ وَلَّوۡاْ عَلَىٰٓ أَدۡبَٰرِهِمۡ نُفُورٗا
46. Mpe tozipi bango motema été basosola te, mpe matoyi na bango lokola. Mpe tango ozali kokumisa bomoko ya Nkolo wayo o kati na buku, bapesi mikongo na kokima (bakei kobondela mabondeli ya mabe).
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
نَّحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَا يَسۡتَمِعُونَ بِهِۦٓ إِذۡ يَسۡتَمِعُونَ إِلَيۡكَ وَإِذۡ هُمۡ نَجۡوَىٰٓ إِذۡ يَقُولُ ٱلظَّٰلِمُونَ إِن تَتَّبِعُونَ إِلَّا رَجُلٗا مَّسۡحُورًا
47. Toyebi malamu maye bazali koyoka, soki bayoki epai nayo, balobilobi nanse o kati na bango, babubi bakolobaka: Bozali kolanda moto oyo alokami na bondoki.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ٱنظُرۡ كَيۡفَ ضَرَبُواْ لَكَ ٱلۡأَمۡثَالَ فَضَلُّواْ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ سَبِيلٗا
48. Tala ndenge bazali kobetela yo bandakisa, basili kobunga, bakokokaka lisusu te kolanda mpe kozua nzela ya bosôló.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَالُوٓاْ أَءِذَا كُنَّا عِظَٰمٗا وَرُفَٰتًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ خَلۡقٗا جَدِيدٗا
49. Mpe bakolobaka: Boye soki tokomi mikuwa mpe putulu ya mabele, tokosekwisamaka lisusu bikelamu ya sika?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់អ៊ីសរ៉ក
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ