ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
12 : 25

إِذَا رَأَتۡهُم مِّن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ سَمِعُواْ لَهَا تَغَيُّظٗا وَزَفِيرٗا

Soki yango[1] emoni bango na mosika, babandi koyoka kotoka mpe lolaka na yango. info

[1] Yango: Ezali moto ya lifelo.

التفاسير:

external-link copy
13 : 25

وَإِذَآ أُلۡقُواْ مِنۡهَا مَكَانٗا ضَيِّقٗا مُّقَرَّنِينَ دَعَوۡاْ هُنَالِكَ ثُبُورٗا

Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 25

لَّا تَدۡعُواْ ٱلۡيَوۡمَ ثُبُورٗا وَٰحِدٗا وَٱدۡعُواْ ثُبُورٗا كَثِيرٗا

Lelo bosenga liwa mbala moko te, kasi bosenga yango mbala ebele. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 25

قُلۡ أَذَٰلِكَ خَيۡرٌ أَمۡ جَنَّةُ ٱلۡخُلۡدِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۚ كَانَتۡ لَهُمۡ جَزَآءٗ وَمَصِيرٗا

Loba: Boye oyo[2] ezali malamu to Iola ya libela eye elakama тропа babangi. Yango ezali lifuta mpe esika ya bozongi na bango ya suka? info

[2] Oyo: Ezali: Moto ya lifelo.

التفاسير:

external-link copy
16 : 25

لَّهُمۡ فِيهَا مَا يَشَآءُونَ خَٰلِدِينَۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ وَعۡدٗا مَّسۡـُٔولٗا

Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 25

وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ فَيَقُولُ ءَأَنتُمۡ أَضۡلَلۡتُمۡ عِبَادِي هَٰٓؤُلَآءِ أَمۡ هُمۡ ضَلُّواْ ٱلسَّبِيلَ

Mpe mokolo moye (Allah) akosangisa bango elongo na maye bazalaki kobondela na kotika Allah, akotuna bango: Boye bino nde bobungisaki bawumbu na ngai oyo to bango moko babungaki nzela? info
التفاسير:

external-link copy
18 : 25

قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ مَا كَانَ يَنۢبَغِي لَنَآ أَن نَّتَّخِذَ مِن دُونِكَ مِنۡ أَوۡلِيَآءَ وَلَٰكِن مَّتَّعۡتَهُمۡ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ نَسُواْ ٱلذِّكۡرَ وَكَانُواْ قَوۡمَۢا بُورٗا

Bakolobaka: Lokumu nayo, esengeli na biso te kotika yo mpe tozua bakonzi babateli basusu, kasi opesaki bango mpe batata na bango bomengo na bisengo kino babosani bokundoli (kurani), mpe bazalaki nde bato ya kobunga. info
التفاسير:

external-link copy
19 : 25

فَقَدۡ كَذَّبُوكُم بِمَا تَقُولُونَ فَمَا تَسۡتَطِيعُونَ صَرۡفٗا وَلَا نَصۡرٗاۚ وَمَن يَظۡلِم مِّنكُمۡ نُذِقۡهُ عَذَابٗا كَبِيرٗا

Bawangani bino na maye bozali koloba, mpe bokozua esika ya kokima te mpe lisungi te. Mpe oyo akobuba o kati na bino, tokomekisa ye etumbu ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 25

وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّآ إِنَّهُمۡ لَيَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشُونَ فِي ٱلۡأَسۡوَاقِۗ وَجَعَلۡنَا بَعۡضَكُمۡ لِبَعۡضٖ فِتۡنَةً أَتَصۡبِرُونَۗ وَكَانَ رَبُّكَ بَصِيرٗا

Mpe totindaki liboso nayo batindami, bazalaki kolia bilei mpe kotambola na bazando, mpe totiaki basusu bazala elembo ya komekama ya baninga na bango, boye bokoyika mpiko? Kasi Nkolo wayo azali kornona. info
التفاسير: