Check out the new design

Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo * - Sadržaj prijevodā

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Prijevod značenja Sura: El-Furkan   Ajet:
إِذَا رَأَتۡهُم مِّن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ سَمِعُواْ لَهَا تَغَيُّظٗا وَزَفِيرٗا
Soki yango[1] emoni bango na mosika, babandi koyoka kotoka mpe lolaka na yango.
[1] Yango: Ezali moto ya lifelo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَآ أُلۡقُواْ مِنۡهَا مَكَانٗا ضَيِّقٗا مُّقَرَّنِينَ دَعَوۡاْ هُنَالِكَ ثُبُورٗا
Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَّا تَدۡعُواْ ٱلۡيَوۡمَ ثُبُورٗا وَٰحِدٗا وَٱدۡعُواْ ثُبُورٗا كَثِيرٗا
Lelo bosenga liwa mbala moko te, kasi bosenga yango mbala ebele.
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ أَذَٰلِكَ خَيۡرٌ أَمۡ جَنَّةُ ٱلۡخُلۡدِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۚ كَانَتۡ لَهُمۡ جَزَآءٗ وَمَصِيرٗا
Loba: Boye oyo[2] ezali malamu to Iola ya libela eye elakama тропа babangi. Yango ezali lifuta mpe esika ya bozongi na bango ya suka?
[2] Oyo: Ezali: Moto ya lifelo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَّهُمۡ فِيهَا مَا يَشَآءُونَ خَٰلِدِينَۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ وَعۡدٗا مَّسۡـُٔولٗا
Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ فَيَقُولُ ءَأَنتُمۡ أَضۡلَلۡتُمۡ عِبَادِي هَٰٓؤُلَآءِ أَمۡ هُمۡ ضَلُّواْ ٱلسَّبِيلَ
Mpe mokolo moye (Allah) akosangisa bango elongo na maye bazalaki kobondela na kotika Allah, akotuna bango: Boye bino nde bobungisaki bawumbu na ngai oyo to bango moko babungaki nzela?
Tefsiri na arapskom jeziku:
قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ مَا كَانَ يَنۢبَغِي لَنَآ أَن نَّتَّخِذَ مِن دُونِكَ مِنۡ أَوۡلِيَآءَ وَلَٰكِن مَّتَّعۡتَهُمۡ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ نَسُواْ ٱلذِّكۡرَ وَكَانُواْ قَوۡمَۢا بُورٗا
Bakolobaka: Lokumu nayo, esengeli na biso te kotika yo mpe tozua bakonzi babateli basusu, kasi opesaki bango mpe batata na bango bomengo na bisengo kino babosani bokundoli (kurani), mpe bazalaki nde bato ya kobunga.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَقَدۡ كَذَّبُوكُم بِمَا تَقُولُونَ فَمَا تَسۡتَطِيعُونَ صَرۡفٗا وَلَا نَصۡرٗاۚ وَمَن يَظۡلِم مِّنكُمۡ نُذِقۡهُ عَذَابٗا كَبِيرٗا
Bawangani bino na maye bozali koloba, mpe bokozua esika ya kokima te mpe lisungi te. Mpe oyo akobuba o kati na bino, tokomekisa ye etumbu ya monene.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّآ إِنَّهُمۡ لَيَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشُونَ فِي ٱلۡأَسۡوَاقِۗ وَجَعَلۡنَا بَعۡضَكُمۡ لِبَعۡضٖ فِتۡنَةً أَتَصۡبِرُونَۗ وَكَانَ رَبُّكَ بَصِيرٗا
Mpe totindaki liboso nayo batindami, bazalaki kolia bilei mpe kotambola na bazando, mpe totiaki basusu bazala elembo ya komekama ya baninga na bango, boye bokoyika mpiko? Kasi Nkolo wayo azali kornona.
Tefsiri na arapskom jeziku:
 
Prijevod značenja Sura: El-Furkan
Indeks sura Broj stranice
 
Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo - Sadržaj prijevodā

Prijevod: Zekerija Muhammed Balingongo.

Zatvaranje