Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស់សហ្វហ្វាត   អាយ៉ាត់:
فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
127. Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
128. Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
129. Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ
130. Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
131. Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
132. Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِنَّ لُوطٗا لَّمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
133. Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِذۡ نَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
134. Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
135. Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
136. Sima tobebisaki basusu.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ
137. Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo).
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَبِٱلَّيۡلِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
138. Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
139. Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
140. Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُدۡحَضِينَ
141. Mpe aponamaki été abwakama.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٞ
142. Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَلَوۡلَآ أَنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُسَبِّحِينَ
143. Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah,
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
144. Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
۞ فَنَبَذۡنَٰهُ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ سَقِيمٞ
145. Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةٗ مِّن يَقۡطِينٖ
146. Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ
147. Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ
148. Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ
149. Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثٗا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ
150. То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَلَآ إِنَّهُم مِّنۡ إِفۡكِهِمۡ لَيَقُولُونَ
151. Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
152. (Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَصۡطَفَى ٱلۡبَنَاتِ عَلَى ٱلۡبَنِينَ
153. Boye akopona bana basi koleka bana mibali?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស់សហ្វហ្វាត
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ