Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស់ហ្សូមើរ   អាយ៉ាត់:
أَوۡ تَقُولَ لَوۡ أَنَّ ٱللَّهَ هَدَىٰنِي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُتَّقِينَ
То, aloba ete soki Allah akambaka ngai kasi nalingaki nazala o kati ya babangi,
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
أَوۡ تَقُولَ حِينَ تَرَى ٱلۡعَذَابَ لَوۡ أَنَّ لِي كَرَّةٗ فَأَكُونَ مِنَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
То, aloba te ete tango akomona etumbu: Oh!, soki nazongi ata na (mokili), mbele nalingaki kozala okati ya babongisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
بَلَىٰ قَدۡ جَآءَتۡكَ ءَايَٰتِي فَكَذَّبۡتَ بِهَا وَٱسۡتَكۡبَرۡتَ وَكُنتَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Iyo, ya soló mikapo mia ngai mikomelaki yo mpe oboyaki kondima na yango, osalaki lolendo mpe ozalaki okati ya bape ngwi
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ تَرَى ٱلَّذِينَ كَذَبُواْ عَلَى ٱللَّهِ وُجُوهُهُم مُّسۡوَدَّةٌۚ أَلَيۡسَ فِي جَهَنَّمَ مَثۡوٗى لِّلۡمُتَكَبِّرِينَ
Mpe o mokolo mwa suka okomona bilongi ya baye baboyaki kondimela Allah bikoyindaka, boye lifelo ekozalaka nde esika ya bato ya lolendo te?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيُنَجِّي ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَوۡاْ بِمَفَازَتِهِمۡ لَا يَمَسُّهُمُ ٱلسُّوٓءُ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
Mpe Allah akobikisaka babangi baye basalaki bolamu, ma ekozuaka bango te, mpe bakozalaka na mawa te. (kati na lola)
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ٱللَّهُ خَٰلِقُ كُلِّ شَيۡءٖۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ وَكِيلٞ
Allah nde mokeli wa biloko binso, mpe azali Nkolo ya nionso.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
لَّهُۥ مَقَالِيدُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
Azali na bafungola ya likolo na mabele, mpe baye baza kopengwa na mikapo mia Allah, bango nde bazangi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
قُلۡ أَفَغَيۡرَ ٱللَّهِ تَأۡمُرُوٓنِّيٓ أَعۡبُدُ أَيُّهَا ٱلۡجَٰهِلُونَ
Loba: Boye bozali kotinda ngai nabondela nzambe mosusu elongo na Allah? Oh! Bino baye bozanga koyeba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَقَدۡ أُوحِيَ إِلَيۡكَ وَإِلَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِكَ لَئِنۡ أَشۡرَكۡتَ لَيَحۡبَطَنَّ عَمَلُكَ وَلَتَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ
Ya soló, emoniseli esilaki kokita epai nayo mpe epai na baye baleka liboso nayo ete soki omeki kosangisa Allah, mosala nayo nyoso ekobeba, mpe okozala elongo na bazangi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
بَلِ ٱللَّهَ فَٱعۡبُدۡ وَكُن مِّنَ ٱلشَّٰكِرِينَ
Kasi bondela Allah, mpe zala okati ya baye bazali kotondo ye.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَمَا قَدَرُواْ ٱللَّهَ حَقَّ قَدۡرِهِۦ وَٱلۡأَرۡضُ جَمِيعٗا قَبۡضَتُهُۥ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَٱلسَّمَٰوَٰتُ مَطۡوِيَّٰتُۢ بِيَمِينِهِۦۚ سُبۡحَٰنَهُۥ وَتَعَٰلَىٰ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
Mpe bapesi Allah esika naye te ndenge esengeli, mpe mabele nyoso akokanga yango na loboko, mpe likolo akongumba yango na loboko naye ya mobali na mokolo ya suka. Nkembo naye aleki likolo na maye bazali kosangisa ye na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាស់ហ្សូមើរ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ