ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

Abasa

external-link copy
1 : 80

عَبَسَ وَتَوَلَّىٰٓ

Akangi elongi mpe apesi mokongo. info
التفاسير:

external-link copy
2 : 80

أَن جَآءَهُ ٱلۡأَعۡمَىٰ

Mpo ete mokufi miso aye epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 80

وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّهُۥ يَزَّكَّىٰٓ

Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola? info
التفاسير:

external-link copy
4 : 80

أَوۡ يَذَّكَّرُ فَتَنفَعَهُ ٱلذِّكۡرَىٰٓ

To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye? info
التفاسير:

external-link copy
5 : 80

أَمَّا مَنِ ٱسۡتَغۡنَىٰ

Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye, info
التفاسير:

external-link copy
6 : 80

فَأَنتَ لَهُۥ تَصَدَّىٰ

Ozali koyamba ye na lombango. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 80

وَمَا عَلَيۡكَ أَلَّا يَزَّكَّىٰ

Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 80

وَأَمَّا مَن جَآءَكَ يَسۡعَىٰ

Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo, info
التفاسير:

external-link copy
9 : 80

وَهُوَ يَخۡشَىٰ

Naye azali na bobangi, info
التفاسير:

external-link copy
10 : 80

فَأَنتَ عَنۡهُ تَلَهَّىٰ

Ozali kotala ye te. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 80

كَلَّآ إِنَّهَا تَذۡكِرَةٞ

Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 80

فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ

Oyo alingi akanisa yango. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 80

فِي صُحُفٖ مُّكَرَّمَةٖ

Ezwami kati ya makomi ya lokumu, info
التفاسير:

external-link copy
14 : 80

مَّرۡفُوعَةٖ مُّطَهَّرَةِۭ

Etombwami mpe epetolami, info
التفاسير:

external-link copy
15 : 80

بِأَيۡدِي سَفَرَةٖ

O’maboko ma bantoma, info
التفاسير:

external-link copy
16 : 80

كِرَامِۭ بَرَرَةٖ

Baye ya lokumu тре botosi. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 80

قُتِلَ ٱلۡإِنسَٰنُ مَآ أَكۡفَرَهُۥ

Moto amibomi na bopengwi naye. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 80

مِنۡ أَيِّ شَيۡءٍ خَلَقَهُۥ

Na eloko nini akelamaki? info
التفاسير:

external-link copy
19 : 80

مِن نُّطۡفَةٍ خَلَقَهُۥ فَقَدَّرَهُۥ

Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 80

ثُمَّ ٱلسَّبِيلَ يَسَّرَهُۥ

Sima alakisi ye nzela. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 80

ثُمَّ أَمَاتَهُۥ فَأَقۡبَرَهُۥ

Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 80

ثُمَّ إِذَا شَآءَ أَنشَرَهُۥ

Mpe akosekwisa ye na ntango alingi. info
التفاسير:

external-link copy
23 : 80

كَلَّا لَمَّا يَقۡضِ مَآ أَمَرَهُۥ

Moto akokisi te maye atindamaki. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 80

فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ إِلَىٰ طَعَامِهِۦٓ

Esengeli na moto atala bileyi naye. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 80

أَنَّا صَبَبۡنَا ٱلۡمَآءَ صَبّٗا

Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 80

ثُمَّ شَقَقۡنَا ٱلۡأَرۡضَ شَقّٗا

Sima topasoli mabele na nzela, info
التفاسير:

external-link copy
27 : 80

فَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا حَبّٗا

Mpe na nzela wana tobimisi bambuma, info
التفاسير:

external-link copy
28 : 80

وَعِنَبٗا وَقَضۡبٗا

Ba inab[1] mpe bandunda. info

[1] Inab: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99.

التفاسير:

external-link copy
29 : 80

وَزَيۡتُونٗا وَنَخۡلٗا

Na nzete ya zaítún[2] na nzete ya nagh’l[3], info

[2] Bótala Al-An’ám: 99.
[3] Bótala Al-An’ám: 99.

التفاسير:

external-link copy
30 : 80

وَحَدَآئِقَ غُلۡبٗا

ЗО. Мре bilanga ebele, info
التفاسير:

external-link copy
31 : 80

وَفَٰكِهَةٗ وَأَبّٗا

Мре tobimisi mbuma mpe matiti. info
التفاسير:

external-link copy
32 : 80

مَّتَٰعٗا لَّكُمۡ وَلِأَنۡعَٰمِكُمۡ

Bileyi тропа bino na An’âm[1] na bino. info

[1] An’âm: Bótala Imrân: 14.

التفاسير:

external-link copy
33 : 80

فَإِذَا جَآءَتِ ٱلصَّآخَّةُ

Kasi tango bobulungani ekoya, info
التفاسير:

external-link copy
34 : 80

يَوۡمَ يَفِرُّ ٱلۡمَرۡءُ مِنۡ أَخِيهِ

Mokolo moye moto akokima ndeko naye, info
التفاسير:

external-link copy
35 : 80

وَأُمِّهِۦ وَأَبِيهِ

Mpe akokima mama naye mpe tata naye, info
التفاسير:

external-link copy
36 : 80

وَصَٰحِبَتِهِۦ وَبَنِيهِ

Akokima mwasi naye mpe bana baye. info
التفاسير:

external-link copy
37 : 80

لِكُلِّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ يَوۡمَئِذٖ شَأۡنٞ يُغۡنِيهِ

Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye- info
التفاسير:

external-link copy
38 : 80

وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ مُّسۡفِرَةٞ

Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga, info
التفاسير:

external-link copy
39 : 80

ضَاحِكَةٞ مُّسۡتَبۡشِرَةٞ

Bakoseka mpe bakosepela. info
التفاسير:

external-link copy
40 : 80

وَوُجُوهٞ يَوۡمَئِذٍ عَلَيۡهَا غَبَرَةٞ

Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu, info
التفاسير:

external-link copy
41 : 80

تَرۡهَقُهَا قَتَرَةٌ

Bikozipama na molili. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 80

أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡكَفَرَةُ ٱلۡفَجَرَةُ

Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe. info
التفاسير: