Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Abasa   Verset:

Abasa

عَبَسَ وَتَوَلَّىٰٓ
Akangi elongi mpe apesi mokongo.
Les exégèses en arabe:
أَن جَآءَهُ ٱلۡأَعۡمَىٰ
Mpo ete mokufi miso aye epai naye.
Les exégèses en arabe:
وَمَا يُدۡرِيكَ لَعَلَّهُۥ يَزَّكَّىٰٓ
Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola?
Les exégèses en arabe:
أَوۡ يَذَّكَّرُ فَتَنفَعَهُ ٱلذِّكۡرَىٰٓ
To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye?
Les exégèses en arabe:
أَمَّا مَنِ ٱسۡتَغۡنَىٰ
Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye,
Les exégèses en arabe:
فَأَنتَ لَهُۥ تَصَدَّىٰ
Ozali koyamba ye na lombango.
Les exégèses en arabe:
وَمَا عَلَيۡكَ أَلَّا يَزَّكَّىٰ
Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te.
Les exégèses en arabe:
وَأَمَّا مَن جَآءَكَ يَسۡعَىٰ
Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo,
Les exégèses en arabe:
وَهُوَ يَخۡشَىٰ
Naye azali na bobangi,
Les exégèses en arabe:
فَأَنتَ عَنۡهُ تَلَهَّىٰ
Ozali kotala ye te.
Les exégèses en arabe:
كَلَّآ إِنَّهَا تَذۡكِرَةٞ
Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya.
Les exégèses en arabe:
فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
Oyo alingi akanisa yango.
Les exégèses en arabe:
فِي صُحُفٖ مُّكَرَّمَةٖ
Ezwami kati ya makomi ya lokumu,
Les exégèses en arabe:
مَّرۡفُوعَةٖ مُّطَهَّرَةِۭ
Etombwami mpe epetolami,
Les exégèses en arabe:
بِأَيۡدِي سَفَرَةٖ
O’maboko ma bantoma,
Les exégèses en arabe:
كِرَامِۭ بَرَرَةٖ
Baye ya lokumu тре botosi.
Les exégèses en arabe:
قُتِلَ ٱلۡإِنسَٰنُ مَآ أَكۡفَرَهُۥ
Moto amibomi na bopengwi naye.
Les exégèses en arabe:
مِنۡ أَيِّ شَيۡءٍ خَلَقَهُۥ
Na eloko nini akelamaki?
Les exégèses en arabe:
مِن نُّطۡفَةٍ خَلَقَهُۥ فَقَدَّرَهُۥ
Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye.
Les exégèses en arabe:
ثُمَّ ٱلسَّبِيلَ يَسَّرَهُۥ
Sima alakisi ye nzela.
Les exégèses en arabe:
ثُمَّ أَمَاتَهُۥ فَأَقۡبَرَهُۥ
Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita.
Les exégèses en arabe:
ثُمَّ إِذَا شَآءَ أَنشَرَهُۥ
Mpe akosekwisa ye na ntango alingi.
Les exégèses en arabe:
كَلَّا لَمَّا يَقۡضِ مَآ أَمَرَهُۥ
Moto akokisi te maye atindamaki.
Les exégèses en arabe:
فَلۡيَنظُرِ ٱلۡإِنسَٰنُ إِلَىٰ طَعَامِهِۦٓ
Esengeli na moto atala bileyi naye.
Les exégèses en arabe:
أَنَّا صَبَبۡنَا ٱلۡمَآءَ صَبّٗا
Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi.
Les exégèses en arabe:
ثُمَّ شَقَقۡنَا ٱلۡأَرۡضَ شَقّٗا
Sima topasoli mabele na nzela,
Les exégèses en arabe:
فَأَنۢبَتۡنَا فِيهَا حَبّٗا
Mpe na nzela wana tobimisi bambuma,
Les exégèses en arabe:
وَعِنَبٗا وَقَضۡبٗا
Ba inab[1] mpe bandunda.
[1] Inab: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99.
Les exégèses en arabe:
وَزَيۡتُونٗا وَنَخۡلٗا
Na nzete ya zaítún[2] na nzete ya nagh’l[3],
[2] Bótala Al-An’ám: 99.
[3] Bótala Al-An’ám: 99.
Les exégèses en arabe:
وَحَدَآئِقَ غُلۡبٗا
ЗО. Мре bilanga ebele,
Les exégèses en arabe:
وَفَٰكِهَةٗ وَأَبّٗا
Мре tobimisi mbuma mpe matiti.
Les exégèses en arabe:
مَّتَٰعٗا لَّكُمۡ وَلِأَنۡعَٰمِكُمۡ
Bileyi тропа bino na An’âm[1] na bino.
[1] An’âm: Bótala Imrân: 14.
Les exégèses en arabe:
فَإِذَا جَآءَتِ ٱلصَّآخَّةُ
Kasi tango bobulungani ekoya,
Les exégèses en arabe:
يَوۡمَ يَفِرُّ ٱلۡمَرۡءُ مِنۡ أَخِيهِ
Mokolo moye moto akokima ndeko naye,
Les exégèses en arabe:
وَأُمِّهِۦ وَأَبِيهِ
Mpe akokima mama naye mpe tata naye,
Les exégèses en arabe:
وَصَٰحِبَتِهِۦ وَبَنِيهِ
Akokima mwasi naye mpe bana baye.
Les exégèses en arabe:
لِكُلِّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ يَوۡمَئِذٖ شَأۡنٞ يُغۡنِيهِ
Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye-
Les exégèses en arabe:
وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ مُّسۡفِرَةٞ
Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga,
Les exégèses en arabe:
ضَاحِكَةٞ مُّسۡتَبۡشِرَةٞ
Bakoseka mpe bakosepela.
Les exégèses en arabe:
وَوُجُوهٞ يَوۡمَئِذٍ عَلَيۡهَا غَبَرَةٞ
Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu,
Les exégèses en arabe:
تَرۡهَقُهَا قَتَرَةٌ
Bikozipama na molili.
Les exégèses en arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡكَفَرَةُ ٱلۡفَجَرَةُ
Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Abasa
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture