Check out the new design

ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ * - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಅನ್ನಹ್ಲ್   ಶ್ಲೋಕ:
ثُمَّ إِنَّ رَبَّكَ لِلَّذِينَ عَمِلُواْ ٱلسُّوٓءَ بِجَهَٰلَةٖ ثُمَّ تَابُواْ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ وَأَصۡلَحُوٓاْ إِنَّ رَبَّكَ مِنۢ بَعۡدِهَا لَغَفُورٞ رَّحِيمٌ
119. Sima ya solo, Nkolo wayo тропа baye basalaki mabe na kozanga koyeba sima batubeli mpe babongisi, (bondimi bwa bango), ya soló, Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ كَانَ أُمَّةٗ قَانِتٗا لِّلَّهِ حَنِيفٗا وَلَمۡ يَكُ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
120. Ya solo, Ibrâhîm azalaki umma(1), azalaki na botosi тропа Allah, amipesaki mobimba epaî ya Allah тре azalaki o kati ya baye bazalaki kosangisa te (Allah).
1 Umma: Imam, bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
شَاكِرٗا لِّأَنۡعُمِهِۚ ٱجۡتَبَىٰهُ وَهَدَىٰهُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
121. Azalaki na botondi тропа bolamu bwa Nkolo waye, (mpe Allah) aponaki ye mpe akambaki ye na nzela ya semba.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَءَاتَيۡنَٰهُ فِي ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗۖ وَإِنَّهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
122. Mpe topesaki ye bolamu kati na mokili, mpe ya soló, ye o mokolo mwa suka akozala o kati ya bato malamu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
ثُمَّ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ أَنِ ٱتَّبِعۡ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِيمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ
123. Sima toyebisaki(2) yo; landa lingomba lia Ibrâhîm liye lizali na bomoko (bwa Allah) mpe azalaki te okati ya basangisi (Allah).
2 Toyebisaki: Ezalaki nde emoniseli.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّمَا جُعِلَ ٱلسَّبۡتُ عَلَى ٱلَّذِينَ ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِۚ وَإِنَّ رَبَّكَ لَيَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ
124. Ya sólo, mokolo mwa mposo (sabbat) motiyamaki lotomo te, sé тропа baye bakeseneki na yango. Mpe o mokolo mwa suka Nkolo wayo akosambisa bango na maye bakeseneki na mango.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
ٱدۡعُ إِلَىٰ سَبِيلِ رَبِّكَ بِٱلۡحِكۡمَةِ وَٱلۡمَوۡعِظَةِ ٱلۡحَسَنَةِۖ وَجَٰدِلۡهُم بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ
125. Benga bato na nzela ya Nkolo wayo na bwanya mpe na maloba ya kitoko,(1) mpe solola na bango na lolenge ya malamu. Ya soló, Nkolo wayo ayebi baye babungi nzela naye mpe ayebi malamu baye bakambami.
1 Maloba ya kitoko: Elakisi, Mateya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَإِنۡ عَاقَبۡتُمۡ فَعَاقِبُواْ بِمِثۡلِ مَا عُوقِبۡتُم بِهِۦۖ وَلَئِن صَبَرۡتُمۡ لَهُوَ خَيۡرٞ لِّلصَّٰبِرِينَ
126. Mpe soki bokozongisa mabe, bozongisa yango ndenge moko na oyo basalaki bino. Kasi soki bokangi mitema, wana ezali malamu mingi тропа bakangi mitema.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَٱصۡبِرۡ وَمَا صَبۡرُكَ إِلَّا بِٱللَّهِۚ وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَلَا تَكُ فِي ضَيۡقٖ مِّمَّا يَمۡكُرُونَ
127. Kanga motema, kasi kokanga motema nayo ekowuta nde epai na Allah. Mpe komitungisa te тропа bango, тре kominyokuama te тропа likita na bango ya mabe.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَواْ وَّٱلَّذِينَ هُم مُّحۡسِنُونَ
128. Ya sólo, Allah azali elongo na babangi mpe basali bolamu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
 
ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಅನ್ನಹ್ಲ್
ಅಧ್ಯಾಯಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ ಪುಟ ಸಂಖ್ಯೆ
 
ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

ಅನುವಾದ - ಝಕರಿಯಾ ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ.

ಮುಚ್ಚಿ