Check out the new design

ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ * - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ತ್ವಾಹಾ   ಶ್ಲೋಕ:
قَالَ كَذَٰلِكَ أَتَتۡكَ ءَايَٰتُنَا فَنَسِيتَهَاۖ وَكَذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمَ تُنسَىٰ
126. (Allah) akoyebisa ye: Lolenge wana nde eyelaki yo bilembo bia biso mpona kotangisa yo, kasi obosanaki yango, yango wana lelo tobosani yo.(2)
2 Lelo tobosani yo: Elakisi: Lelo totiki yo nakati ya moto, mpo ete Allah abosanaka te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي مَنۡ أَسۡرَفَ وَلَمۡ يُؤۡمِنۢ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِۦۚ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَشَدُّ وَأَبۡقَىٰٓ
127. Мре lolenge wana nde topesaka etumbu na oyo azali kondima te, mpe azali kolekisa ndelo na bilembo bia Nkolo wa ye. Kasi etumbu ya mokolo ya suka ekozalaka makasi mpe ekotikalaka libela.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
أَفَلَمۡ يَهۡدِ لَهُمۡ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّنَ ٱلۡقُرُونِ يَمۡشُونَ فِي مَسَٰكِنِهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلنُّهَىٰ
128. Wana esalisaki bango na bokambi te, boni ebele ya bato tobomaki yambo na bango? Bazalaki kotambola na bisika bia bango. Ya soló, wana nde elembo тропа baye bazali na may ele.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ لَكَانَ لِزَامٗا وَأَجَلٞ مُّسَمّٗى
129. Soki тропа liloba ya Nkolo naye esila kolobama te mpe тропа mokano naye te, mbele etumbu esilaki kokwela bango.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ قَبۡلَ طُلُوعِ ٱلشَّمۡسِ وَقَبۡلَ غُرُوبِهَاۖ وَمِنۡ ءَانَآيِٕ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡ وَأَطۡرَافَ ٱلنَّهَارِ لَعَلَّكَ تَرۡضَىٰ
130. Zala na bozeli тропа maye bazali koloba, mpe kumisa lokumu ya Nkolo nayo yambo ete moyi ebima, mpe yambo ya bolimwi na yango, mpe o kati kati ya butu. Mpe kumisa ye na moyi tango mosusu okosepela.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَلَا تَمُدَّنَّ عَيۡنَيۡكَ إِلَىٰ مَا مَتَّعۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّنۡهُمۡ زَهۡرَةَ ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا لِنَفۡتِنَهُمۡ فِيهِۚ وَرِزۡقُ رَبِّكَ خَيۡرٞ وَأَبۡقَىٰ
131. Mpe kolandisa miso nayo te sima ya maye topesi basusu kati na bango bonzenga ya bisengo ya mokili mpo ete tomeka bango na yango, bozui ya Nkolo nayo (ya lola) nde ezali malamu mpe ekowumela.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَأۡمُرۡ أَهۡلَكَ بِٱلصَّلَوٰةِ وَٱصۡطَبِرۡ عَلَيۡهَاۖ لَا نَسۡـَٔلُكَ رِزۡقٗاۖ نَّحۡنُ نَرۡزُقُكَۗ وَٱلۡعَٰقِبَةُ لِلتَّقۡوَىٰ
132. Мре tinda libota lia yo na losambo, mpe žala molende na yango, tozali kosenga yo bozui te, biso nde tozali koleisa yo, mpe suka ya malamu ezali тропа bobangi (Allah).
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَقَالُواْ لَوۡلَا يَأۡتِينَا بِـَٔايَةٖ مِّن رَّبِّهِۦٓۚ أَوَلَمۡ تَأۡتِهِم بَيِّنَةُ مَا فِي ٱلصُّحُفِ ٱلۡأُولَىٰ
133. Мре bakolobaka: Mpona nini ayeli biso likamwisi kowuta epai y a Nkolo naye te? Boye elembo (kurani) eye ekomama kala eyelaki bango te?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَلَوۡ أَنَّآ أَهۡلَكۡنَٰهُم بِعَذَابٖ مِّن قَبۡلِهِۦ لَقَالُواْ رَبَّنَا لَوۡلَآ أَرۡسَلۡتَ إِلَيۡنَا رَسُولٗا فَنَتَّبِعَ ءَايَٰتِكَ مِن قَبۡلِ أَن نَّذِلَّ وَنَخۡزَىٰ
134. Мре soki topesaka bango etumbu liboso, balingaki koloba: Oh Nkolo wa biso! Mpona nini otindelaki biso motindami te? Kasi tolandaki mateya yambo ete toyoka soni тре tozanga ntina?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
قُلۡ كُلّٞ مُّتَرَبِّصٞ فَتَرَبَّصُواْۖ فَسَتَعۡلَمُونَ مَنۡ أَصۡحَٰبُ ٱلصِّرَٰطِ ٱلسَّوِيِّ وَمَنِ ٱهۡتَدَىٰ
135. Loba: Moto nyoso azela, bino тре bozela. Bokoyebaka banani bazali na nzela ya semba тре bakambami.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
 
ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ತ್ವಾಹಾ
ಅಧ್ಯಾಯಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ ಪುಟ ಸಂಖ್ಯೆ
 
ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

ಅನುವಾದ - ಝಕರಿಯಾ ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ.

ಮುಚ್ಚಿ