Check out the new design

ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ * - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಯಾಸೀನ್   ಶ್ಲೋಕ:

Yâsin

يسٓ
Yâ, Sín[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَٱلۡقُرۡءَانِ ٱلۡحَكِيمِ
Na kurani oyo etonda bwanya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
O kati ya nzela ya semba.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
تَنزِيلَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلرَّحِيمِ
Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
لِتُنذِرَ قَوۡمٗا مَّآ أُنذِرَ ءَابَآؤُهُمۡ فَهُمۡ غَٰفِلُونَ
Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
لَقَدۡ حَقَّ ٱلۡقَوۡلُ عَلَىٰٓ أَكۡثَرِهِمۡ فَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّا جَعَلۡنَا فِيٓ أَعۡنَٰقِهِمۡ أَغۡلَٰلٗا فَهِيَ إِلَى ٱلۡأَذۡقَانِ فَهُم مُّقۡمَحُونَ
Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَجَعَلۡنَا مِنۢ بَيۡنِ أَيۡدِيهِمۡ سَدّٗا وَمِنۡ خَلۡفِهِمۡ سَدّٗا فَأَغۡشَيۡنَٰهُمۡ فَهُمۡ لَا يُبۡصِرُونَ
Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَسَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ ءَأَنذَرۡتَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تُنذِرۡهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّمَا تُنذِرُ مَنِ ٱتَّبَعَ ٱلذِّكۡرَ وَخَشِيَ ٱلرَّحۡمَٰنَ بِٱلۡغَيۡبِۖ فَبَشِّرۡهُ بِمَغۡفِرَةٖ وَأَجۡرٖ كَرِيمٍ
Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán[1] na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu.
[1] Ar-Rahmán: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّا نَحۡنُ نُحۡيِ ٱلۡمَوۡتَىٰ وَنَكۡتُبُ مَا قَدَّمُواْ وَءَاثَٰرَهُمۡۚ وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ فِيٓ إِمَامٖ مُّبِينٖ
Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto[1] na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele.
[1] Mikoloto: Ezali: Misala oyo mutu atiki sima ya liwa naye, ezala ya malamu: (Lokola mwana ya malamu oyo ayebi nzambe mpe abondeli ye, mpe lisusu kotonga ba mosquee), Ezala to pe ya mabe: (Lokola kosangisa Allah nakati ya mabondeli).
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
 
ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಯಾಸೀನ್
ಅಧ್ಯಾಯಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ ಪುಟ ಸಂಖ್ಯೆ
 
ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

ಅನುವಾದ - ಝಕರಿಯಾ ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ.

ಮುಚ್ಚಿ