ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ * - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಸೂರ ಅದ್ದಾರಿಯಾತ್   ಶ್ಲೋಕ:

Ad-Dhâriyât (BOPANZANI)

وَٱلذَّٰرِيَٰتِ ذَرۡوٗا
1. (Nalapi) na mipepe miye mipanzaka.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَٱلۡحَٰمِلَٰتِ وِقۡرٗا
2. Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَٱلۡجَٰرِيَٰتِ يُسۡرٗا
3. Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَٱلۡمُقَسِّمَٰتِ أَمۡرًا
4. Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَصَادِقٞ
5. Ezali solo oyo balaki bino.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَإِنَّ ٱلدِّينَ لَوَٰقِعٞ
6. Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡحُبُكِ
7. Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّكُمۡ لَفِي قَوۡلٖ مُّخۡتَلِفٖ
8. Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
يُؤۡفَكُ عَنۡهُ مَنۡ أُفِكَ
9. Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
قُتِلَ ٱلۡخَرَّٰصُونَ
10. Bato ya lokuta basili kobomama.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي غَمۡرَةٖ سَاهُونَ
11. В aye bazindi na molangwa ya mokili.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
يَسۡـَٔلُونَ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلدِّينِ
12. Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
يَوۡمَ هُمۡ عَلَى ٱلنَّارِ يُفۡتَنُونَ
13. Mokolo oyo bakomekama na moto.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
ذُوقُواْ فِتۡنَتَكُمۡ هَٰذَا ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تَسۡتَعۡجِلُونَ
14. Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٍ
15. Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
ءَاخِذِينَ مَآ ءَاتَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُحۡسِنِينَ
16. Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
كَانُواْ قَلِيلٗا مِّنَ ٱلَّيۡلِ مَا يَهۡجَعُونَ
17. Bazalaki kolala токе na butu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَبِٱلۡأَسۡحَارِ هُمۡ يَسۡتَغۡفِرُونَ
18. Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِيٓ أَمۡوَٰلِهِمۡ حَقّٞ لِّلسَّآئِلِ وَٱلۡمَحۡرُومِ
19. Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِي ٱلۡأَرۡضِ ءَايَٰتٞ لِّلۡمُوقِنِينَ
20. Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِيٓ أَنفُسِكُمۡۚ أَفَلَا تُبۡصِرُونَ
21. Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِي ٱلسَّمَآءِ رِزۡقُكُمۡ وَمَا تُوعَدُونَ
22. Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَوَرَبِّ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِ إِنَّهُۥ لَحَقّٞ مِّثۡلَ مَآ أَنَّكُمۡ تَنطِقُونَ
23. Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ضَيۡفِ إِبۡرَٰهِيمَ ٱلۡمُكۡرَمِينَ
24. Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَيۡهِ فَقَالُواْ سَلَٰمٗاۖ قَالَ سَلَٰمٞ قَوۡمٞ مُّنكَرُونَ
25. Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَرَاغَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ فَجَآءَ بِعِجۡلٖ سَمِينٖ
26. Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَقَرَّبَهُۥٓ إِلَيۡهِمۡ قَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
27. Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَأَوۡجَسَ مِنۡهُمۡ خِيفَةٗۖ قَالُواْ لَا تَخَفۡۖ وَبَشَّرُوهُ بِغُلَٰمٍ عَلِيمٖ
28. Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَأَقۡبَلَتِ ٱمۡرَأَتُهُۥ فِي صَرَّةٖ فَصَكَّتۡ وَجۡهَهَا وَقَالَتۡ عَجُوزٌ عَقِيمٞ
29. Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
قَالُواْ كَذَٰلِكِ قَالَ رَبُّكِۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡعَلِيمُ
30. Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
۞ قَالَ فَمَا خَطۡبُكُمۡ أَيُّهَا ٱلۡمُرۡسَلُونَ
31. (Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini?
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
قَالُوٓاْ إِنَّآ أُرۡسِلۡنَآ إِلَىٰ قَوۡمٖ مُّجۡرِمِينَ
32. Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
لِنُرۡسِلَ عَلَيۡهِمۡ حِجَارَةٗ مِّن طِينٖ
33. Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَ لِلۡمُسۡرِفِينَ
34. Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَأَخۡرَجۡنَا مَن كَانَ فِيهَا مِنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
35. Мре tobimisaki bandimi okati na bango.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَمَا وَجَدۡنَا فِيهَا غَيۡرَ بَيۡتٖ مِّنَ ٱلۡمُسۡلِمِينَ
36. Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَتَرَكۡنَا فِيهَآ ءَايَةٗ لِّلَّذِينَ يَخَافُونَ ٱلۡعَذَابَ ٱلۡأَلِيمَ
37. Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِي مُوسَىٰٓ إِذۡ أَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ فِرۡعَوۡنَ بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٖ
38. (Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَتَوَلَّىٰ بِرُكۡنِهِۦ وَقَالَ سَٰحِرٌ أَوۡ مَجۡنُونٞ
39. Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَأَخَذۡنَٰهُ وَجُنُودَهُۥ فَنَبَذۡنَٰهُمۡ فِي ٱلۡيَمِّ وَهُوَ مُلِيمٞ
40. Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِي عَادٍ إِذۡ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمُ ٱلرِّيحَ ٱلۡعَقِيمَ
41. Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
مَا تَذَرُ مِن شَيۡءٍ أَتَتۡ عَلَيۡهِ إِلَّا جَعَلَتۡهُ كَٱلرَّمِيمِ
42. Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَفِي ثَمُودَ إِذۡ قِيلَ لَهُمۡ تَمَتَّعُواْ حَتَّىٰ حِينٖ
43. Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَعَتَوۡاْ عَنۡ أَمۡرِ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَهُمۡ يَنظُرُونَ
44. Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَمَا ٱسۡتَطَٰعُواْ مِن قِيَامٖ وَمَا كَانُواْ مُنتَصِرِينَ
45. Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَقَوۡمَ نُوحٖ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَوۡمٗا فَٰسِقِينَ
46. Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَٱلسَّمَآءَ بَنَيۡنَٰهَا بِأَيۡيْدٖ وَإِنَّا لَمُوسِعُونَ
47. Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَٱلۡأَرۡضَ فَرَشۡنَٰهَا فَنِعۡمَ ٱلۡمَٰهِدُونَ
48. Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando,
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَمِن كُلِّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَا زَوۡجَيۡنِ لَعَلَّكُمۡ تَذَكَّرُونَ
49. Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَفِرُّوٓاْ إِلَى ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
50. Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَلَا تَجۡعَلُواْ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَۖ إِنِّي لَكُم مِّنۡهُ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
51. Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
كَذَٰلِكَ مَآ أَتَى ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا قَالُواْ سَاحِرٌ أَوۡ مَجۡنُونٌ
52. Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
أَتَوَاصَوۡاْ بِهِۦۚ بَلۡ هُمۡ قَوۡمٞ طَاغُونَ
53. Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ فَمَآ أَنتَ بِمَلُومٖ
54. Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَذَكِّرۡ فَإِنَّ ٱلذِّكۡرَىٰ تَنفَعُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
55. Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
وَمَا خَلَقۡتُ ٱلۡجِنَّ وَٱلۡإِنسَ إِلَّا لِيَعۡبُدُونِ
56. Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
مَآ أُرِيدُ مِنۡهُم مِّن رِّزۡقٖ وَمَآ أُرِيدُ أَن يُطۡعِمُونِ
57. Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلرَّزَّاقُ ذُو ٱلۡقُوَّةِ ٱلۡمَتِينُ
58. Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذَنُوبٗا مِّثۡلَ ذَنُوبِ أَصۡحَٰبِهِمۡ فَلَا يَسۡتَعۡجِلُونِ
59. Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن يَوۡمِهِمُ ٱلَّذِي يُوعَدُونَ
60. Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
ಅರಬ್ಬಿ ವ್ಯಾಖ್ಯಾನಗಳು:
 
ಅರ್ಥಗಳ ಅನುವಾದ ಅಧ್ಯಾಯ: ಸೂರ ಅದ್ದಾರಿಯಾತ್
ಅಧ್ಯಾಯಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ ಪುಟ ಸಂಖ್ಯೆ
 
ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಲಿಂಗಾಲ ಅನುವಾದ - ಅನುವಾದಗಳ ವಿಷಯಸೂಚಿ

ಪವಿತ್ರ ಕುರ್‌ಆನ್ ಲಿಂಗಾಲ ಅರ್ಥಾನುವಾದ - ಝಕರಿಯಾ ಮುಹಮ್ಮದ್ ಬಾಳಿಂಗೋ

ಮುಚ್ಚಿ