Check out the new design

وه‌رگێڕانی ماناكانی قورئانی پیرۆز - وەرگێڕاوی لینگالا - موحەمەد بالینگۆگۆ * - پێڕستی وه‌رگێڕاوه‌كان

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

وه‌رگێڕانی ماناكان سوره‌تی: الطور   ئایه‌تی:
أَمۡ تَأۡمُرُهُمۡ أَحۡلَٰمُهُم بِهَٰذَآۚ أَمۡ هُمۡ قَوۡمٞ طَاغُونَ
32. То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki?
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ يَقُولُونَ تَقَوَّلَهُۥۚ بَل لَّا يُؤۡمِنُونَ
33. To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
فَلۡيَأۡتُواْ بِحَدِيثٖ مِّثۡلِهِۦٓ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ
34. (Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
35. To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ
36. To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te?
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَبِّكَ أَمۡ هُمُ ٱلۡمُصَۜيۡطِرُونَ
37. To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso?
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ لَهُمۡ سُلَّمٞ يَسۡتَمِعُونَ فِيهِۖ فَلۡيَأۡتِ مُسۡتَمِعُهُم بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
38. To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ لَهُ ٱلۡبَنَٰتُ وَلَكُمُ ٱلۡبَنُونَ
39. To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?!
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرٗا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٖ مُّثۡقَلُونَ
40. To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta?
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ
41. To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango?
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ يُرِيدُونَ كَيۡدٗاۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هُمُ ٱلۡمَكِيدُونَ
42. To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
أَمۡ لَهُمۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
43. To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
وَإِن يَرَوۡاْ كِسۡفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ سَاقِطٗا يَقُولُواْ سَحَابٞ مَّرۡكُومٞ
44. Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
فَذَرۡهُمۡ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي فِيهِ يُصۡعَقُونَ
45. Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
يَوۡمَ لَا يُغۡنِي عَنۡهُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
46. Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
وَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ عَذَابٗا دُونَ ذَٰلِكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
47. Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
وَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ فَإِنَّكَ بِأَعۡيُنِنَاۖ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ حِينَ تَقُومُ
48. Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَإِدۡبَٰرَ ٱلنُّجُومِ
49. Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa.
تەفسیرە عەرەبیەکان:
 
وه‌رگێڕانی ماناكان سوره‌تی: الطور
پێڕستی سوره‌ته‌كان ژمارەی پەڕە
 
وه‌رگێڕانی ماناكانی قورئانی پیرۆز - وەرگێڕاوی لینگالا - موحەمەد بالینگۆگۆ - پێڕستی وه‌رگێڕاوه‌كان

وەرگێڕان: زەکەریا موحەمەد بالینگۆنگۆ.

داخستن