Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: At Tûr   Verset:
أَمۡ تَأۡمُرُهُمۡ أَحۡلَٰمُهُم بِهَٰذَآۚ أَمۡ هُمۡ قَوۡمٞ طَاغُونَ
То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ يَقُولُونَ تَقَوَّلَهُۥۚ بَل لَّا يُؤۡمِنُونَ
To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te.
Les exégèses en arabe:
فَلۡيَأۡتُواْ بِحَدِيثٖ مِّثۡلِهِۦٓ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ
(Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ
To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَبِّكَ أَمۡ هُمُ ٱلۡمُصَۜيۡطِرُونَ
To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَهُمۡ سُلَّمٞ يَسۡتَمِعُونَ فِيهِۖ فَلۡيَأۡتِ مُسۡتَمِعُهُم بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَهُ ٱلۡبَنَٰتُ وَلَكُمُ ٱلۡبَنُونَ
To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?!
Les exégèses en arabe:
أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرٗا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٖ مُّثۡقَلُونَ
To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ
To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ يُرِيدُونَ كَيۡدٗاۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هُمُ ٱلۡمَكِيدُونَ
To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَهُمۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa.
Les exégèses en arabe:
وَإِن يَرَوۡاْ كِسۡفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ سَاقِطٗا يَقُولُواْ سَحَابٞ مَّرۡكُومٞ
Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama.
Les exégèses en arabe:
فَذَرۡهُمۡ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي فِيهِ يُصۡعَقُونَ
Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake.
Les exégèses en arabe:
يَوۡمَ لَا يُغۡنِي عَنۡهُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te.
Les exégèses en arabe:
وَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ عَذَابٗا دُونَ ذَٰلِكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
Les exégèses en arabe:
وَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ فَإِنَّكَ بِأَعۡيُنِنَاۖ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ حِينَ تَقُومُ
Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema.
Les exégèses en arabe:
وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَإِدۡبَٰرَ ٱلنُّجُومِ
Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: At Tûr
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture