Check out the new design

Kilniojo Korano reikšmių vertimas - Vertimas į ngalų k. - Muchamed Balingugu * - Vertimų turinys

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Reikšmių vertimas Sūra: Ar-Rahmaan   Aja (Korano eilutė):
مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ يَلۡتَقِيَانِ
19. Atika bibale mibale bileka na bokutani.
Tafsyrai arabų kalba:
بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخٞ لَّا يَبۡغِيَانِ
20. Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
21. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
يَخۡرُجُ مِنۡهُمَا ٱللُّؤۡلُؤُ وَٱلۡمَرۡجَانُ
22. Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga).
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
23. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
وَلَهُ ٱلۡجَوَارِ ٱلۡمُنشَـَٔاتُ فِي ٱلۡبَحۡرِ كَٱلۡأَعۡلَٰمِ
24. Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
25. B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
كُلُّ مَنۡ عَلَيۡهَا فَانٖ
26. Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi).
Tafsyrai arabų kalba:
وَيَبۡقَىٰ وَجۡهُ رَبِّكَ ذُو ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ
27. Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
28. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
يَسۡـَٔلُهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ كُلَّ يَوۡمٍ هُوَ فِي شَأۡنٖ
29. Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
30. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
سَنَفۡرُغُ لَكُمۡ أَيُّهَ ٱلثَّقَلَانِ
31. Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
32. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ إِنِ ٱسۡتَطَعۡتُمۡ أَن تَنفُذُواْ مِنۡ أَقۡطَارِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ فَٱنفُذُواْۚ لَا تَنفُذُونَ إِلَّا بِسُلۡطَٰنٖ
33. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah).
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
34. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
يُرۡسَلُ عَلَيۡكُمَا شُوَاظٞ مِّن نَّارٖ وَنُحَاسٞ فَلَا تَنتَصِرَانِ
35. Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
36. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
فَإِذَا ٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ وَرۡدَةٗ كَٱلدِّهَانِ
37. Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
38. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُسۡـَٔلُ عَن ذَنۢبِهِۦٓ إِنسٞ وَلَا جَآنّٞ
39. O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango(1).
1 Mokapo oyo elakisi ete bakotunama te omokolo ya suka mpamba te masumu na bango eyebani.
Tafsyrai arabų kalba:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
40. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
Tafsyrai arabų kalba:
يُعۡرَفُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ بِسِيمَٰهُمۡ فَيُؤۡخَذُ بِٱلنَّوَٰصِي وَٱلۡأَقۡدَامِ
41. Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango.
Tafsyrai arabų kalba:
 
Reikšmių vertimas Sūra: Ar-Rahmaan
Sūrų turinys Puslapio numeris
 
Kilniojo Korano reikšmių vertimas - Vertimas į ngalų k. - Muchamed Balingugu - Vertimų turinys

Išvertė Zakarija Muchamed Balingugu.

Uždaryti