Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ആലുഇംറാൻ   ആയത്ത്:
فَٱنقَلَبُواْ بِنِعۡمَةٖ مِّنَ ٱللَّهِ وَفَضۡلٖ لَّمۡ يَمۡسَسۡهُمۡ سُوٓءٞ وَٱتَّبَعُواْ رِضۡوَٰنَ ٱللَّهِۗ وَٱللَّهُ ذُو فَضۡلٍ عَظِيمٍ
Mpe bazongaki na bolamu mpe ngolu kowuta epai na Allah. Mpe likama moko ya banguna ezuaki bango te, mpe balandaki maye mazali kosepelisa Allah, mpe Allah atonda bomengo koleka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّمَا ذَٰلِكُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ يُخَوِّفُ أَوۡلِيَآءَهُۥ فَلَا تَخَافُوهُمۡ وَخَافُونِ إِن كُنتُم مُّؤۡمِنِينَ
Ya sôló, satana nde azali kobangisa bino na Lisungi ya bato naye, bobanga bango te, kasi bobanga ngai soki bino bozali bandimi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَا يَحۡزُنكَ ٱلَّذِينَ يُسَٰرِعُونَ فِي ٱلۡكُفۡرِۚ إِنَّهُمۡ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۚ يُرِيدُ ٱللَّهُ أَلَّا يَجۡعَلَ لَهُمۡ حَظّٗا فِي ٱلۡأٓخِرَةِۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ عَظِيمٌ
Koyoka mpasi o’motema te mpona baye bakei na lombango na kati ya bopengwi. Ya sôló, bango bakopesa Allah mpasi soki moke te. Allah akani kopesa bango eloko soki moko te o’mokolo ya suka. Bango bakozua etumbu monene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ٱشۡتَرَوُاْ ٱلۡكُفۡرَ بِٱلۡإِيمَٰنِ لَن يَضُرُّواْ ٱللَّهَ شَيۡـٔٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
Ya sôló, baye basombi bopagano o’esika ya bondimi, batungisi Allah na eloko soki moko te, mpe bango nde bazui etumbu enene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَنَّمَا نُمۡلِي لَهُمۡ خَيۡرٞ لِّأَنفُسِهِمۡۚ إِنَّمَا نُمۡلِي لَهُمۡ لِيَزۡدَادُوٓاْ إِثۡمٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ مُّهِينٞ
Baye bapengwi, bakanisa te ete ngonga eye totikela bango ezali nkita epai na bango. Kasi topesi bango tango, mpo babakisa masumu mpe bango bakozua etumbu elongobani.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مَّا كَانَ ٱللَّهُ لِيَذَرَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ عَلَىٰ مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ حَتَّىٰ يَمِيزَ ٱلۡخَبِيثَ مِنَ ٱلطَّيِّبِۗ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيُطۡلِعَكُمۡ عَلَى ٱلۡغَيۡبِ وَلَٰكِنَّ ٱللَّهَ يَجۡتَبِي مِن رُّسُلِهِۦ مَن يَشَآءُۖ فَـَٔامِنُواْ بِٱللَّهِ وَرُسُلِهِۦۚ وَإِن تُؤۡمِنُواْ وَتَتَّقُواْ فَلَكُمۡ أَجۡرٌ عَظِيمٞ
Allah akotika bandimi te na lolenge bozali na yango, kino akabola mabe na malamu. Allah akolakisa bino mabombami te, kasi Allah akopona o’kati ya batindami naye oyo ye alingi. Bondima na Allah na batindami naye, mpe soki bondimi mpe bobangi (Allah), bokozala na lifuta linene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَا يَحۡسَبَنَّ ٱلَّذِينَ يَبۡخَلُونَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦ هُوَ خَيۡرٗا لَّهُمۖ بَلۡ هُوَ شَرّٞ لَّهُمۡۖ سَيُطَوَّقُونَ مَا بَخِلُواْ بِهِۦ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِۗ وَلِلَّهِ مِيرَٰثُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ
Mpe baye bazali koboya kokaba na bozui oyo Allah apesi bango, bakanisa te ete wana ezali malamu mpona bango. Ezali nde mabe mpona bango, na mokolo ya suka, bomengo wana, bikozinga bango, mpe nkita ya likolo mpe ya mabele nyonso ezali ya Allah. Mpe Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ആലുഇംറാൻ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക