Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ആലുഇംറാൻ   ആയത്ത്:
ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَآ إِنَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغۡفِرۡ لَنَا ذُنُوبَنَا وَقِنَا عَذَابَ ٱلنَّارِ
Baye bazali koloba: Nkolo wa biso! Ya sôló tondimi, limbisa masumu ma biso, mpe tia biso mosika na etumbu ya lifelo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ٱلصَّٰبِرِينَ وَٱلصَّٰدِقِينَ وَٱلۡقَٰنِتِينَ وَٱلۡمُنفِقِينَ وَٱلۡمُسۡتَغۡفِرِينَ بِٱلۡأَسۡحَارِ
Baye bazali kokanga mitema, mpe bato ya bosembo, mpe bato ya botosi, mpe baye babimisaka mpona Allah, mpe baye basengaka Allah bolimbilisi yambo ete ntongo etana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
شَهِدَ ٱللَّهُ أَنَّهُۥ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ وَأُوْلُواْ ٱلۡعِلۡمِ قَآئِمَۢا بِٱلۡقِسۡطِۚ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
Allah asila kotatola ete nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te sé ye mei, ndenge moko na ba anzelu, na banganga ya mayele, Mpe (Allah) atonda bosembo Nzambe mosusu azali te sé ye Allah wa bokasi atonda bwanya.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلدِّينَ عِندَ ٱللَّهِ ٱلۡإِسۡلَٰمُۗ وَمَا ٱخۡتَلَفَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۗ وَمَن يَكۡفُرۡ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ فَإِنَّ ٱللَّهَ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
Ya sôló, lingomba liye lindimami epai ya Allah lizali Islam (komisokia). Mpe baye bazuaki buku liboso[1] bakabwanaki te, sé na tango boyebi ekomelaki bango na likunya kati na bango. Oyo akopengwa na mikapo mia Allah, ya sôló Allah afutaka na lombango.
[1] Kati na bayuda mpe bakliáto.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِنۡ حَآجُّوكَ فَقُلۡ أَسۡلَمۡتُ وَجۡهِيَ لِلَّهِ وَمَنِ ٱتَّبَعَنِۗ وَقُل لِّلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡأُمِّيِّـۧنَ ءَأَسۡلَمۡتُمۡۚ فَإِنۡ أَسۡلَمُواْ فَقَدِ ٱهۡتَدَواْۖ وَّإِن تَوَلَّوۡاْ فَإِنَّمَا عَلَيۡكَ ٱلۡبَلَٰغُۗ وَٱللَّهُ بَصِيرُۢ بِٱلۡعِبَادِ
Mpe soki basuanisi yo, loba na bango ete: Namisoki mobimba epai na Allah, na baye banso balandi ngai. Mpe loba na baye bazuaki buku mpe na baye batanga te: Bomisoki? Soki bamisoki, basili kokambama. Mpe soki bapesi mokongo, yo ozali na eloko ya kosala te sé kokomisa sango. Mpe Allah azali komona bawumbu naye.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَكۡفُرُونَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَيَقۡتُلُونَ ٱلنَّبِيِّـۧنَ بِغَيۡرِ حَقّٖ وَيَقۡتُلُونَ ٱلَّذِينَ يَأۡمُرُونَ بِٱلۡقِسۡطِ مِنَ ٱلنَّاسِ فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
Ya sôló baye bazali kopengwa na mikapo mia Allah, mpe bazali koboma bantoma mpamba, mpe bazali koboma baye bazali kotinda na bosembo, o kati ya bato pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلَّذِينَ حَبِطَتۡ أَعۡمَٰلُهُمۡ فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِ وَمَا لَهُم مِّن نَّٰصِرِينَ
Bango wana nde misala mia bango mibebisami awa na nsé, mpe o’mokolo ya suka, mpe bakozalaka na mosungi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: ആലുഇംറാൻ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക