Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: മുഹമ്മദ്   ആയത്ത്:

Muhammad

ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ أَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
1. Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَءَامَنُواْ بِمَا نُزِّلَ عَلَىٰ مُحَمَّدٖ وَهُوَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّهِمۡ كَفَّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَأَصۡلَحَ بَالَهُمۡ
2. Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡبَٰطِلَ وَأَنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡحَقَّ مِن رَّبِّهِمۡۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ أَمۡثَٰلَهُمۡ
3. Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَإِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَضَرۡبَ ٱلرِّقَابِ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَثۡخَنتُمُوهُمۡ فَشُدُّواْ ٱلۡوَثَاقَ فَإِمَّا مَنَّۢا بَعۡدُ وَإِمَّا فِدَآءً حَتَّىٰ تَضَعَ ٱلۡحَرۡبُ أَوۡزَارَهَاۚ ذَٰلِكَۖ وَلَوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَٱنتَصَرَ مِنۡهُمۡ وَلَٰكِن لِّيَبۡلُوَاْ بَعۡضَكُم بِبَعۡضٖۗ وَٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَلَن يُضِلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
4. Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
سَيَهۡدِيهِمۡ وَيُصۡلِحُ بَالَهُمۡ
5. Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَيُدۡخِلُهُمُ ٱلۡجَنَّةَ عَرَّفَهَا لَهُمۡ
6. Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تَنصُرُواْ ٱللَّهَ يَنصُرۡكُمۡ وَيُثَبِّتۡ أَقۡدَامَكُمۡ
7. Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَتَعۡسٗا لَّهُمۡ وَأَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
8. Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَرِهُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
9. Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ دَمَّرَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡۖ وَلِلۡكَٰفِرِينَ أَمۡثَٰلُهَا
10. Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ مَوۡلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَأَنَّ ٱلۡكَٰفِرِينَ لَا مَوۡلَىٰ لَهُمۡ
11. Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: മുഹമ്മദ്
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക