Check out the new design

Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo * - Sadržaj prijevodā

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Prijevod značenja Sura: Muhammed   Ajet:

Muhammad

ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ أَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَءَامَنُواْ بِمَا نُزِّلَ عَلَىٰ مُحَمَّدٖ وَهُوَ ٱلۡحَقُّ مِن رَّبِّهِمۡ كَفَّرَ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَأَصۡلَحَ بَالَهُمۡ
Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡبَٰطِلَ وَأَنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّبَعُواْ ٱلۡحَقَّ مِن رَّبِّهِمۡۚ كَذَٰلِكَ يَضۡرِبُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ أَمۡثَٰلَهُمۡ
Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَإِذَا لَقِيتُمُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَضَرۡبَ ٱلرِّقَابِ حَتَّىٰٓ إِذَآ أَثۡخَنتُمُوهُمۡ فَشُدُّواْ ٱلۡوَثَاقَ فَإِمَّا مَنَّۢا بَعۡدُ وَإِمَّا فِدَآءً حَتَّىٰ تَضَعَ ٱلۡحَرۡبُ أَوۡزَارَهَاۚ ذَٰلِكَۖ وَلَوۡ يَشَآءُ ٱللَّهُ لَٱنتَصَرَ مِنۡهُمۡ وَلَٰكِن لِّيَبۡلُوَاْ بَعۡضَكُم بِبَعۡضٖۗ وَٱلَّذِينَ قُتِلُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ فَلَن يُضِلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
سَيَهۡدِيهِمۡ وَيُصۡلِحُ بَالَهُمۡ
Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيُدۡخِلُهُمُ ٱلۡجَنَّةَ عَرَّفَهَا لَهُمۡ
Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango).
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِن تَنصُرُواْ ٱللَّهَ يَنصُرۡكُمۡ وَيُثَبِّتۡ أَقۡدَامَكُمۡ
Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فَتَعۡسٗا لَّهُمۡ وَأَضَلَّ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ذَٰلِكَ بِأَنَّهُمۡ كَرِهُواْ مَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ فَأَحۡبَطَ أَعۡمَٰلَهُمۡ
Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
۞ أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ دَمَّرَ ٱللَّهُ عَلَيۡهِمۡۖ وَلِلۡكَٰفِرِينَ أَمۡثَٰلُهَا
Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ مَوۡلَى ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَأَنَّ ٱلۡكَٰفِرِينَ لَا مَوۡلَىٰ لَهُمۡ
Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
 
Prijevod značenja Sura: Muhammed
Indeks sura Broj stranice
 
Prijevod značenja časnog Kur'ana - Prijevod na lingala jezik - Muhammed Balingongo - Sadržaj prijevodā

Prijevod: Zekerija Muhammed Balingongo.

Zatvaranje