Check out the new design

पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो । * - अनुवादहरूको सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थको अनुवाद सूरः: मरयम   श्लोक:
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا فَٱعۡبُدۡهُ وَٱصۡطَبِرۡ لِعِبَٰدَتِهِۦۚ هَلۡ تَعۡلَمُ لَهُۥ سَمِيّٗا
65. Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali kati na yango, bondela ye mpe kanga motema тропа mabondeli naye. Boye osi oyoka été azali na ndoyi?
अरबी व्याख्याहरू:
وَيَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَءِذَا مَا مِتُّ لَسَوۡفَ أُخۡرَجُ حَيًّا
66. Mpe moto alobi: Boye soki nakufi nakosekwisama lisusu?
अरबी व्याख्याहरू:
أَوَلَا يَذۡكُرُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَنَّا خَلَقۡنَٰهُ مِن قَبۡلُ وَلَمۡ يَكُ شَيۡـٔٗا
67. Boye moto azali kokanisa te ndenge tokelaki ye liboso mpe ye azalaki eloko te?
अरबी व्याख्याहरू:
فَوَرَبِّكَ لَنَحۡشُرَنَّهُمۡ وَٱلشَّيَٰطِينَ ثُمَّ لَنُحۡضِرَنَّهُمۡ حَوۡلَ جَهَنَّمَ جِثِيّٗا
68. Na nkombo ya Nkolo wayo, tokosangisa bango na basatana, mpe sima tokofukamisa bango liboso ya lifelo.
अरबी व्याख्याहरू:
ثُمَّ لَنَنزِعَنَّ مِن كُلِّ شِيعَةٍ أَيُّهُمۡ أَشَدُّ عَلَى ٱلرَّحۡمَٰنِ عِتِيّٗا
69. Sima tokobendaka na mangomba manso kati na bango baye bazangaki botosi, baye bazalaki mabe koleka тропа Ar-Rahmân.
अरबी व्याख्याहरू:
ثُمَّ لَنَحۡنُ أَعۡلَمُ بِٱلَّذِينَ هُمۡ أَوۡلَىٰ بِهَا صِلِيّٗا
70. Sima, biso nde tokoyeba ba nani baye basengeli kokota mpo bazika na motó.
अरबी व्याख्याहरू:
وَإِن مِّنكُمۡ إِلَّا وَارِدُهَاۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ حَتۡمٗا مَّقۡضِيّٗا
71. Mpe bino banso bokoleka likolo na yango (ya gbagba). Mpo été yango ekozangaka te epai na Nkolo wayo.
अरबी व्याख्याहरू:
ثُمَّ نُنَجِّي ٱلَّذِينَ ٱتَّقَواْ وَّنَذَرُ ٱلظَّٰلِمِينَ فِيهَا جِثِيّٗا
72. Sima, tokolongisaka baye bandimaki mpe tokotika babubi о kati na yango (lifelo) ya kofukama.
अरबी व्याख्याहरू:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ أَيُّ ٱلۡفَرِيقَيۡنِ خَيۡرٞ مَّقَامٗا وَأَحۡسَنُ نَدِيّٗا
73. Mpe tango mikapo mia biso mizali kotangema likolo na bango, bapengwi bakolobaka na baye bandima: Lisanga nini ya malamu kati na oyo mibale ezali kitoko mpe bolongani ya malamu?
अरबी व्याख्याहरू:
وَكَمۡ أَهۡلَكۡنَا قَبۡلَهُم مِّن قَرۡنٍ هُمۡ أَحۡسَنُ أَثَٰثٗا وَرِءۡيٗا
74. Ebele toboma yambo na bango kati na mabota! Bazalaki malamu mpe na misolo ebele mpe kitoko.
अरबी व्याख्याहरू:
قُلۡ مَن كَانَ فِي ٱلضَّلَٰلَةِ فَلۡيَمۡدُدۡ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ مَدًّاۚ حَتَّىٰٓ إِذَا رَأَوۡاْ مَا يُوعَدُونَ إِمَّا ٱلۡعَذَابَ وَإِمَّا ٱلسَّاعَةَ فَسَيَعۡلَمُونَ مَنۡ هُوَ شَرّٞ مَّكَانٗا وَأَضۡعَفُ جُندٗا
75. Loba: Oyo akozala okati ya libungi, Allah akobakisela ye libungi kino akozuaka etumbu, to soki tango ekoki ekoyebanaka te ba nani bazalaki na mabe koleka, na ba nani bazalaki na basoda ya motawu.
अरबी व्याख्याहरू:
وَيَزِيدُ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ٱهۡتَدَوۡاْ هُدٗىۗ وَٱلۡبَٰقِيَٰتُ ٱلصَّٰلِحَٰتُ خَيۡرٌ عِندَ رَبِّكَ ثَوَابٗا وَخَيۡرٞ مَّرَدًّا
76. Mpe Allah akobakisela baye bakambamaki bokambi, mpe misala malamu maye mawumelaka, ekoki na litomba malamu mpe bozongi malamu epayi ya Nkolo nayo.
अरबी व्याख्याहरू:
 
अर्थको अनुवाद सूरः: मरयम
अध्यायहरूको (सूरःहरूको) सूची رقم الصفحة
 
पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो । - अनुवादहरूको सूची

जकरिया मुहम्मद बालेङ्गोगो द्वारा अनुवादित।

बन्द गर्नुस्