Check out the new design

पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो । * - अनुवादहरूको सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थको अनुवाद सूरः: न्नज्म   श्लोक:

An-Najm

وَٱلنَّجۡمِ إِذَا هَوَىٰ
1. Na monzoto tango ekweyaka.
अरबी व्याख्याहरू:
مَا ضَلَّ صَاحِبُكُمۡ وَمَا غَوَىٰ
2. Moninga na bino abungi te mpe akosami te.
अरबी व्याख्याहरू:
وَمَا يَنطِقُ عَنِ ٱلۡهَوَىٰٓ
3. Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te.
अरबी व्याख्याहरू:
إِنۡ هُوَ إِلَّا وَحۡيٞ يُوحَىٰ
4. Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye.
अरबी व्याख्याहरू:
عَلَّمَهُۥ شَدِيدُ ٱلۡقُوَىٰ
5. (Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango.
अरबी व्याख्याहरू:
ذُو مِرَّةٖ فَٱسۡتَوَىٰ
6. Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu.
अरबी व्याख्याहरू:
وَهُوَ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡأَعۡلَىٰ
7. Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka.
अरबी व्याख्याहरू:
ثُمَّ دَنَا فَتَدَلَّىٰ
8. Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka.
अरबी व्याख्याहरू:
فَكَانَ قَابَ قَوۡسَيۡنِ أَوۡ أَدۡنَىٰ
9. Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango.
अरबी व्याख्याहरू:
فَأَوۡحَىٰٓ إِلَىٰ عَبۡدِهِۦ مَآ أَوۡحَىٰ
10. Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki.
अरबी व्याख्याहरू:
مَا كَذَبَ ٱلۡفُؤَادُ مَا رَأَىٰٓ
11. Motema ekosaki te oyo emonaki.
अरबी व्याख्याहरू:
أَفَتُمَٰرُونَهُۥ عَلَىٰ مَا يَرَىٰ
12. Boye bokoboyela ye na oyo amonaki?
अरबी व्याख्याहरू:
وَلَقَدۡ رَءَاهُ نَزۡلَةً أُخۡرَىٰ
13. Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale .
अरबी व्याख्याहरू:
عِندَ سِدۡرَةِ ٱلۡمُنتَهَىٰ
14. Pene na sidr muntaha(1).
1 Sidr muntaha: Ezali nzete oyo ezuami likolo ya mapata sambo.
अरबी व्याख्याहरू:
عِندَهَا جَنَّةُ ٱلۡمَأۡوَىٰٓ
15. Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami.
अरबी व्याख्याहरू:
إِذۡ يَغۡشَى ٱلسِّدۡرَةَ مَا يَغۡشَىٰ
16. Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango.
अरबी व्याख्याहरू:
مَا زَاغَ ٱلۡبَصَرُ وَمَا طَغَىٰ
17. Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote.
अरबी व्याख्याहरू:
لَقَدۡ رَأَىٰ مِنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ
18. Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye.
अरबी व्याख्याहरू:
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱللَّٰتَ وَٱلۡعُزَّىٰ
19. Bopesa ngai sango ya Láta(2) na Uzza(1)?
1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?
अरबी व्याख्याहरू:
وَمَنَوٰةَ ٱلثَّالِثَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰٓ
20. Mpe mosusu ya misato Manáta(1).
1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?
अरबी व्याख्याहरू:
أَلَكُمُ ٱلذَّكَرُ وَلَهُ ٱلۡأُنثَىٰ
21. Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi?
अरबी व्याख्याहरू:
تِلۡكَ إِذٗا قِسۡمَةٞ ضِيزَىٰٓ
22. Wana ezali bokaboli ya mabe.
अरबी व्याख्याहरू:
إِنۡ هِيَ إِلَّآ أَسۡمَآءٞ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَمَا تَهۡوَى ٱلۡأَنفُسُۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّن رَّبِّهِمُ ٱلۡهُدَىٰٓ
23. Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango.
अरबी व्याख्याहरू:
أَمۡ لِلۡإِنسَٰنِ مَا تَمَنَّىٰ
24. To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa?
अरबी व्याख्याहरू:
فَلِلَّهِ ٱلۡأٓخِرَةُ وَٱلۡأُولَىٰ
25. Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah.
अरबी व्याख्याहरू:
۞ وَكَم مِّن مَّلَكٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ لَا تُغۡنِي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـًٔا إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ أَن يَأۡذَنَ ٱللَّهُ لِمَن يَشَآءُ وَيَرۡضَىٰٓ
26. Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli.
अरबी व्याख्याहरू:
 
अर्थको अनुवाद सूरः: न्नज्म
अध्यायहरूको (सूरःहरूको) सूची رقم الصفحة
 
पवित्र कुरअानको अर्थको अनुवाद - लिंगाला अनुवाद : मुहम्मद बालेङ्गोगो । - अनुवादहरूको सूची

जकरिया मुहम्मद बालेङ्गोगो द्वारा अनुवादित।

बन्द गर्नुस्