Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: شعراء   آیت:

Ach-Chu’arâ

طسٓمٓ
1. Twâ, sín, mîm.[1]
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo ya liboso.
عربي تفسیرونه:
تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
2. Oyo nde mikapo mia buku ya polele.
عربي تفسیرونه:
لَعَلَّكَ بَٰخِعٞ نَّفۡسَكَ أَلَّا يَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
3. Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima.
عربي تفسیرونه:
إِن نَّشَأۡ نُنَزِّلۡ عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ ءَايَةٗ فَظَلَّتۡ أَعۡنَٰقُهُمۡ لَهَا خَٰضِعِينَ
4. Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni).
عربي تفسیرونه:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن ذِكۡرٖ مِّنَ ٱلرَّحۡمَٰنِ مُحۡدَثٍ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهُ مُعۡرِضِينَ
5. Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân[2], sé bakopesa yango mokongo.
[2] Ar-Rahmán: Bótala Ar-Ra’d mokapo: 30.
عربي تفسیرونه:
فَقَدۡ كَذَّبُواْ فَسَيَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
6. Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango.
عربي تفسیرونه:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلۡأَرۡضِ كَمۡ أَنۢبَتۡنَا فِيهَا مِن كُلِّ زَوۡجٖ كَرِيمٍ
7. Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu?
عربي تفسیرونه:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗۖ وَمَا كَانَ أَكۡثَرُهُم مُّؤۡمِنِينَ
8. Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te.
عربي تفسیرونه:
وَإِنَّ رَبَّكَ لَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
9. Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu.
عربي تفسیرونه:
وَإِذۡ نَادَىٰ رَبُّكَ مُوسَىٰٓ أَنِ ٱئۡتِ ٱلۡقَوۡمَ ٱلظَّٰلِمِينَ
10. Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe.
عربي تفسیرونه:
قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَۚ أَلَا يَتَّقُونَ
11. Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te?
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبِّ إِنِّيٓ أَخَافُ أَن يُكَذِّبُونِ
12. Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te.
عربي تفسیرونه:
وَيَضِيقُ صَدۡرِي وَلَا يَنطَلِقُ لِسَانِي فَأَرۡسِلۡ إِلَىٰ هَٰرُونَ
13. Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna.
عربي تفسیرونه:
وَلَهُمۡ عَلَيَّ ذَنۢبٞ فَأَخَافُ أَن يَقۡتُلُونِ
14. Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai.
عربي تفسیرونه:
قَالَ كَلَّاۖ فَٱذۡهَبَا بِـَٔايَٰتِنَآۖ إِنَّا مَعَكُم مُّسۡتَمِعُونَ
15. (Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka.
عربي تفسیرونه:
فَأۡتِيَا فِرۡعَوۡنَ فَقُولَآ إِنَّا رَسُولُ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
16. Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo,
عربي تفسیرونه:
أَنۡ أَرۡسِلۡ مَعَنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
17. Mpo opesa biso bana ya isalayele.
عربي تفسیرونه:
قَالَ أَلَمۡ نُرَبِّكَ فِينَا وَلِيدٗا وَلَبِثۡتَ فِينَا مِنۡ عُمُرِكَ سِنِينَ
18. Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te?
عربي تفسیرونه:
وَفَعَلۡتَ فَعۡلَتَكَ ٱلَّتِي فَعَلۡتَ وَأَنتَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
19. Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: شعراء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول